Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 3, 2026

Kotálisa Liloba Na Ye 65-0426

Kasi kómbékómbé oyo abúngisá loléngé na yangó bandá kala, pámbate eyebí lisúsu te komísémbola kati ya mipepe mpe komílukela bilei na yango lokóla esengéláki. Kasi ekofándaka likoló ya ba nsinga ya telefóne mpe ezali kosála makambo lokóla moléi ya bipolá-pola. Eluk–elukaka símbilíki ikúfá oyo ibomámí na mítuka, mpe ye na ba nsómbé babimaka kúna mpe baliaka elongó. Apumbwa-pumwa pelamókó nsómbé, na esiká ya kotámbola lokola asengeláki. Abúngísá loléngé na ye.

Mpe Nalobi oyo na bolingo nyoso bosanto mpe na limemia, lingómbá ebúngísá loléngé na yango lokola ndeko mwasi mpongo. Akofánda-fanda zingázingá. na esika ya kotímola kati ya Liloba mpo ámóna soko makambo maye mazali sóló, azali nde kozila libóndo ya mikanda ya eteyelo ya mokolo mwa Lomíngo mibongisámaki na libóndo ya ba nganga mayele esika moko boye, símbilíki moko boye ekúfá oyo ebomamáki esika mosúsu. Kopumbwa-pumbwa pelamokó nsómbé! Nzambe sungá bisó kopumbwa mosíká na yango.

Bilaká biye bizali sóló. Ezali oyo moto moko alobáki na ntina na Yango te, Kasi oyo Nzambe alobáki na ntina na biango! Bizali sóló. Nazali na nsai mingi kosangisama na ba mpongo.

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Zambi esiká sé esiká nzóto oyo ebomámí ezali, nde esiká ba mpongo bakoyángana elongó.
Matái 24: 28

An Independent Church of the WORD,