26-1011 Epimelo Ya Moto Oyo Abongi Be

Nsango: 62-1014M Epimelo Ya Moto Oyo Abongi Be

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Litongi Ya Moto Oyo Abongí Be,

Koyékolisama ya loléngé nini oyo tozaláki kozua. Mongóngó ya Nzambe mozaláki koloba mpe kopésa bisó malako, Liloba na Liloba, na Liloba, bobélé mpenza loléngé ya kolónga mongúna moko na moko. Amónisí mpe Atíí lóngo kati na motema na bisó, TOZALI LILOBA. Na bongo tokoki kolóngama te.

Ntango mongúná ayéi nsima na bisó, topapa ye káka mpe kopapa ye mpe kopapa ye na bómbe na bisó ya atomíki, Liloba ya Nzambe lilobámi, oyo ezali kobika mpe kofánda kati na bisó.

Ya sóló, etumba ezali na molongó, kasi sikawa tozali lisúsu na nsómo te; mitungisi lisúsu te. Tozali koyóka mongóngó ya bisó moko ya kati te. Tozali koyóka makoki ma bisó ya bokundoli te. Tozali koyóka bilingálinga na bisó te. Tokangi makanisi ma bisó na makambo oyo mpe totíí Molimó ya Liloba na Ye kati na motéma mpe bomoto na bisó. Topúpoli nyoso mosúsu libandá oyo ekeséni na Liloba na Ye.

Ntembe nyoso ekei. Nsómo nyoso ekei. Eyókeli nyoso ya ntembe ekeí. Boyóki nyoso ya komama ekeí. Ezali na elóko mosúsu te kotelema wana longólá sé Liloba ya Nzambe kobîka mpe kofánda KATI NA BISÓ, mpe Satána akokoka te kobunana na Yango.

Tozali kokóma Héma ya bomoi ya Nzambe na bomoi. Ezali Nzambe kofánda kati na bisó, kosála bisó tózala pelamoko na Ye mpenza, kotálisa Bozali na Ye kati na bisó.

Tozali kozua esiká ya Klisto, komema lotómo na Ye. Azali kofánda kati na litongi ya moto lokóla Azali komítálisa kati na bisó. Tozali sikawa na losámbo lobongí be elongó na Ye! Ezali Nzambe komímónisa Ye mpenza kati na bisó, wana esali bisó Héma na Ye.

Mobóko na bisó mozangi koningana kati na kondima makambo oyo nde nini? KONDIMA. Mpe kondima na bisó esengéli na eloko moko te; zambi kondima na bisó endimaka Liloba ya Nzambe. Zambí kondima eúti na koyóka, mpe koyóka Liloba ya Nzambe, mpe Liloba ya Nzambe likoyáka bobélé epai ya mosakoli, mpe okoki KOYÓKA mosakoli bobélé na bo Finaká Play…PAPÁ!!

Na boyókáká Mongóngó na Ye, tozali kozóngisama makilá na Nguya na Ye mpe tokúfí kati na makanisi ma bisó moko. Kondima na bisó ekómi kondima nkóló nkómbó, mpe Bomoi na Ye botiámi bóo bozóngisami makilá na káti na bisó. Tokómi bikelámu ya bomoi ya Nzambe, efándelo wapi Molimó Mosanto akoki kokitisa bongengi ya mapámboli ma Ye na nzela yango.

Mongóngó yangó likoló ya ba bánde mozali kosála nini?

Klisto atíndáki ngai kotonga bato na litongi ya Yesu Klisto, ete bákoka kozala eútelo ya nguya mpe efándelo ya Molimó, na Liloba na Ye. Na nzela na Liloba na Ye, bomóni, kotonga moto na esiká yango.

Na boyókáká Mongóngó na Ye, mpe bondimáká mpe bolandáká Liloba na Ye, etongí bisó kokóma matongi na Yesu Klisto; efándelo mpo ya Molimó na Ye. Tozali nguya ya bomoi, mayéle ya bomoi, motema molaí ya bomoi, bosanto ya bomoi, Nguya ya bomoi koúta na Nzambe na bomoi, oyo azali kosála bisó moto ya bomoi, elilingi ya bomoi, kati na litongi ya Nzambe.

“Kasi Nzóto ebongisélí Yo Ngai,” nzóto oyo Nzambe Akokí kofánda na kati, Nzambe Akokí kotámbola na kati, Nzambe Akokí komóna na kati, Nzambe Akokí kosolola na kati, Nzambe Akoki kosála na kati. Amen! Esálelo ya bomoi ya Nzambe, Nzambe kotámbola na makolo mibalé, kati na yo. Nkémbo! “Matámbé ya moyengebene makambámi na Nzambe,” Nzambe kotámbola kati na yo. “Zambi bozali mikandá mikomámí, mitangámi na bato nyoso.”

Nkémbo…!!! Ntina yango, etáli bisó te soko tobíkaka kati ya héma to kati ya mwa ndako ya matíti, kobika to kokúfa, kozinda to kokúfa na nsé ya mái. Oyo nde likambo bobélé moko tozali na motéma na bisó kati na yango, ETÍNDÁ OYO, MONGÓNGÓ OYO, LILOBA YA NZAMBE. Ezali Bokonzi ya Nzambe. Ezali nzela ya Nzambe epésámí mpo ya lelo. Ezali botongi Litongi Ya Moto Abongi Be, baoyo TOZALI!

Tika ete tóya elongó mpe totála bomoi na bisó lokola tozali koyóka molakisi na bisó koyékolisa bisó oyo tosengéli kosála, mpe motindo nini tosengélí kobika, kozala bana mibali mpe bana basi ya Nzambe baoyo B-A-B-O-N-G-I B-E.

Tokolaka Nkóló ete na lisungí mpe ngolu na Ye, tokobóndela mpe koluka Ye mokolo na mokolo na kotíka te, kino ekosila bisó koyóka moko na moko ya boséngá na Ye kotanga na litongi na bisó. Tokotíkala wana kino tokosila kozala bomónisami ya Klisto ya bomoi.

Póso moko na moko kosepela mpe kozila na mpósá ya oyo Nkóló akosála mpe akomónisa epai na bisó eleki oyo ekokí kolimbolama na maloba. Boni Nalingi mokili mobimba komíbakisa na bisó lokóla ezali te na likambo monéne koleka, to kobonga be koleka kofánda na bozali ya Mongóngó ya Nzambe mpe kokóma Litongi Libongí Be ya Mwasi ya libála na Ye Abongí Be.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: Litongi Ya Moto Oyo Abongi Be 62-1014 M

Ntango: 12:00 Nsima Ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.
Makomi:
St. Matái 5: 48
St. Luka 6: 19
St. Yoane 1:1 / 3:3 / 3: 16 / 5:14 / 14: 12
Misalá 2: 38 / 7: 44-49 / Mokapo ya 10 / 19: 11 / 28: 19
Baefese 4: 11-13
Bakolose Mokapo ya 3
Baebele 10: 5/ 11:1 / 11: 32-40
Yakobo 5: 14
2 St Petelo 1: 1-7
Yisaya 28: 19