Category Archives: audio-lin

20-0621 Mokangami

NSANGO: 63-0717 Mokangami

PDF

BranhamTabernacle.org

Bandeko Mibali pe Basi,

Oh Nzete Mwasi-na-libala, mitema na biso ezalaki kopela moto te na kati na biso mokolo ya Lomingo wana Asangisaki biso lisusu elongo na mokili mobimba mpo na kolobela biso ete :

“Bokosala eloko oyo Ngai nayebi, lokola Mwasi-na-libala.”

“Bokozala eteni na Ngai. Bokozala Mwasi-na-libala na Ngai.”

“Bomoi na Ngai ekozala na kati na Nzoto na bino. Bobele ndenge mobali na mwasi bazali moto moko, bino na Ngai tozali moto Moko.”

“Na mokolo wana, bokoyeba ete Ngai nazali kati na Tata, Tata azali kati na Ngai, pe Ngai kati na bino, pe bino kati na Ngai.”

Tozali na suka ya mokolo ya misato. Asilaki komitalisa Ye moko pe ayaki kati-kati na biso, pe alobaki:”Botala Ngai. Nazali Moto yango moko. Nyonso oyo Ngai nazali, Nasopaki yango na kati na Klisto, Nyonso oyo Klisto azalaki, Nasopaki yango kati na bino. Boye bino na ngai tozali MOKO..”

Alakaki na biso ete Akozongisa mibu oyo gazam, sauterelle, jelek na hasil baliaki. Alobaki na biso ete bozali baoyo nabongisaki ete bokozala kati na misisa ya Nzete yango.

Makambo oyo nyonso ekokaki kosalema te kino na eleko oyo. Oyo ezali mokolo, oyo ezali ntango, pe biso tozali Nzete Mwasi-na-libala na Ye oyo ezongi lisusu. Mpo na nini eleko oyo ?

Bango nyonso basangani elongo, oh, amen, na suka ya mokolo ya misato

Pe Asili kokokisa likambo yango na kotelemisa mokili, kovandisa biso na ba-ndako na biso mpo  Mwasi-na-libala na Ye akoka kosangana na mokili mobimba mpo na koyoka Bilei oyo esilaki kobombama mpo na mokolo ya misato.

Pole ya mpokwa esili koya, pe Ezali kotelisa mbuma likolo na Nzete pe ezali kobimisa Mwasi-na-libala na bilembo ndenge moko, bikamwa ndenge moko, pe mbuma ndenge moko na oyo bazalki na yango na ebandeli. Nasili kozongisa, elobi Yahweh.

Bongo, tolingi kokangama na ekanganelo na Liloba Yango. Ata mokili elobi nini, ata bato mosusu balobi nini, biso tokangami na ekanganelo ya Liloba Oyo, Nsango oyo, ba-Bandes oyo, pe makambo mosusu ezali na ntina te. Tosili koteka mayaka mosusu nyonso, mpo tosili kozua Mayaka oyo na motuya.

Tosangana elongo lisusu moko na Lomingo oyo na ngonga ya 13h00, ngongo ya Jeffersonville mpo na koyoka liteya : MOKANGAMI oyo eteyamaki moko ya 17 juillet 1963, wana tokomipesa lisusu biso moko na Ye mpo na komikaba mobimba pe kokangama na Ye na miniololo ya bolingo. Tolobela Ye na bozindo ya mitema na biso ete :

“‘Esika nyonso oyo Yo okokamba, ngai nakolanda Yo, Nkolo.’ Nakozala mokangami.”

 Ndeko Joseph Branham

20-0517 Nakosala Nini Na Yesu Oyo Abiangami Klisto?

Nsango: 63-1124M Nakosala Nini Na Yesu Oyo Abiangami Klisto?

BranhamTabernacle.org

Eloko nini ezali kosalema lelo kati na Mwasi-na-libala? Tozali komona pe tozali kokokisama ya eteni moko ya Makomi.

Nayebi ete bozali kososola ete bande oyo ezali kosalema ekobetama na bikolo nyonso na nsé na moi, pene na, na mokili mobimba; pe bamosusu na bino baoyo bozali awa, awa mpenza, pe bamosusu oyo bazali kuna esika ba-bandes oyo ekobetama na bikolo mosusu (na nzela ya molimboli oyo akozala kolimbola yango mpo na mabota ya Afrika, kuna epai na ba-Hottentots, pe_pe bisika nyonso.)

Mwasi-na-libala azali kosangana zinga zinga na Liloba Elobami oyo etiamaki na ba-bandes pe sikawa bazali kobeta yango pe bazali koyoka yango na mokili mobimba na ngonga moko. Ezali ELOKO MOKO oyo ekoki kosangisa Mwasi-na-libala. Mosakoli na Nzambe ye moko ayebisaki biso yango.

Mwasi-na-libala akosangana na nzela ya Liloba na Nzambe oyo emonisami kati na nzoto, Molimo Mosanto akotia bato elembo pe akokotisa bango kati na Nzambe, pe akotia kozanga kondima elembo libanda, bakozala libanda.

Eloko nini ezali kosalema lelo kati na Mwasi-na-libala? Tozali komoma été Makomi ezali kokokisama na miso na biso.

Pe Yesu alobaki :”Akosala mpenza makambo oyo Ngai nalobi. Akomonisa bino makambo oyo ekoya,” akotalisa bino yango liboso, liboso yango esalema awa. Bomoni ? “Akozua makambo oyo ya Ngai pe akotalisa bino yango, na sima, Akotalisa bino makambo oyo ekoya.” Yoane 15. Tomoni ete Azali kotalisa makambo. Pe Azali kozua makambo oyo ya Nzambe pe Azali kotalisa bino yango. Pe Akomonisa bino makambo oyo Yesu alobaki. Na elobeli mosusu, Akotalisa makambo polele.

Eloko nini Tata azalaki kolobela biso na nzela ya mosakoli na Ye ntango nyonso boye?

Nzambe akoki kotelemisa mwango na Ye te. Akoki kosala eloko moko te mokolo moko, pe abongola yango, mpo na kosala eloko mosusu, pe aloba ete ezalaki libunga na eleko wana.

Nzambe asalaka na mapinga ya bato te. Nzambe asalaka na moto moko, mpo bato bazali na makanisi ndenge na ndenge. Ye asalemi na lolenge ekeseni. Nzambe asengeli kozua moto yango, akobongola ye, pe akobimisa kati na ye  makambo na ye moko, kino Akokomisa ye na lolenge na Ye. Bomoni? Na sima Nzambe akosalela moto yango. Botala kati na bileko nyonso oyo esili koleka, Nowa pe Mose, basakoli, ata mokolo moko te bazalaki mibale na eleko moko.  Moto moko, ntango nyonso, na bileko nyonso oyo esili koleka.

Nzambe abongoli mwango na Ye na eleko na biso ata moke te. Atindelaki biso moto moko, mosakoli na Ye, mpo na komonisa biso Liloba na Ye, kobimisa pe kokamba Mwasi-na-libala. Yango wana, ezali maloba ya moto moko te, Ezali Liloba na Nzambe oyo elobami na nzela ya moto yango, ye azali Etemelo na biso. Ezali, pe ezalaka ntango nyonso, mwango na Nzambe.

Ntango motei moko alobi :”Nsango oyo ezali Etemelo na bino te, Molimo Mosanto kati na ngai akolimbola pe akoyebisa bino nini ezali Liloba pe oyo ezali yango te. Mikolo ya Nsango ya moto moko esili koleka.” Basili kozanga mwango na Nzambe.

Moto na moto azali na Etemelo na ye. Oh la la! Ezali mpenza lokola na mikolo ya basambisi :”Moto nyonso azalaki kosala oyo ezalaki malamu na miso na ye moko.” Na mikolo ya Basambisi, moto nyonso azalaki na etemelo na ye moko_ye moko. Azalaki kosala bobele oyo alingaki kosala. Ezali pe ndenge moko lelo. “Moto nyonso azalaki kosala oyo ezalaki malamu na miso na ye moko” Sikawa, boyebi ntina nini bazalaki kosala bongo na Basambisi? Yango ekoki kosala mpasi na motema mwa moke. Kasi ntina oyo bazalaki kosala bongo na Basambisi, ezalaki mpo bazalaki na mosakoli te na eleko wana, mpo Liloba na Nkolo eyaka na ye. Yango wana moto nyonso azalaki kosala oyo alingaki, na miso na ye moko.

Ezali mpenza yango nde esili kosalema lelo. Tozali na mosakoli te na mikolo oyo ya bibongiseli, kasi Nzambe alakaki biso moko. Bomoni ? Pe Asalaki yango. Na mikolo ya suka, Akotelemisa pe Akotinda Eliya lisusu kati na mosala, “Pe akozongisa mitema ya bana na Kondima ya ba-tata,” kozonga na pentecote ya ebandeli.

Atindelaki biso Eliya na Ye mpo na kobimisa Mwasi-na-libala pe kolimbola Liloba na Ye mpo na biso. Tozali komibongisa biso moko mpo na likambo monene ya suka oyo ekopesa Kondima oyo ekonetola Lingomba na Nkembo. Pee sika nini Ayebisaki biso ete tokozua KOndima yango?

Yango ezali kati na ba-Nsango.

Eloko nini ezali kosalema kati na Mwasi-na-libala? Tozali kosangana pe tozali kotondisama lisusu na Molimoi Mosanto na Ye wana tozali koyoka Nsango, yango ezali Mongongo na Nzambe oyo elobami na nzela ya motindami na Ye oyo andimisami. Ezali mwango na Nzambe mpo na lelo.

Ntango ya kosangana oyo, mpo na komona mangomba kosangana, komona bikolo kosangana. Ezali pe ntango ya kosangana ya Nzambe na Mwasi-na-libala na Ye. Pe nazali koloba yango na limemia pe botosi. Nandimi ete Mwasi-na-libala ya Klisto asili kobengama. Nandimi ete Asili kotiama elembo kati na Bokonzi na Nzambe. Nandimi ete Mecanique ezali wana. Bazali kozela Dynamique oyo ekolongola Ye na mokili, mpo na kokota na Nkembo, na Konetolama..

Dynamique ya LIngomba oyo ekozala kotondisama lisusu ya Molimo Mosanto oyo tosalelaki na epimelo moke wana Libanga-na-moto ezalaki kokita mpo na kosangana na Nzoto.

Tosangana elongo zinga zinga na mwango na Nzambe mpo na eleko na biso mokolo na Lomingo na 10h00, ngonga ya Jeffersonville, IN pe tozala eteni ya Makomi oyo ezali kokokisama, wana tokoyoka Mongongo na Nzambe koteya biso Nsango oyo : Nakosala Nini Na Yesus Oyo Abengami Klisto? _ eteyami na ntongo ya 24.11.1963.

Ndeko Joseph Branham