23-0716 NTAKA KATIKATI NA BILEKO 7 YA LINGOMBA MPE BILEMBO 7

Nsango: 63-0317e NTAKA KATIKATI NA BILEKO 7 YA LINGOMBA MPE BILEMBO 7

BranhamTabernacle.org

Balingami Folólo Miké Ya Libeke,

Tomipusi biso moko likolo ya mai ya potopóto mpe tosemboli mapapu na biso wana. Mwa bitape na biso ibimi mpe izali sasaipi kotalisa Folólo ya Lobwaku. Tobulisi bomoi na biso nyoso epai na Nzambe mpe Liloba na Ye.

Tozali na ntango ya nsuka mpe tozali koúta na Monyele na Eloli, Likolo na Ngelé, kobelema mpo na Konetolama yango. Tozali komibatela pépélé mpo na mwa minúti kino mosuni moké moko na moko etondisami na Molimo Mosanto. Tozali kobelema KOMATA.

Mokolo mwango mokómi. Azali kobianga bato na Ye elongo epai na Ye moko kati na bókó ya solo elongo na Ye moko. Ezali Yesu Klisto kobika elongo na Molimo na Ye kati na mosuni na biso, kosala makambo yango moko Asalaki lokola elembo epai na mokili.

Eloko ya monene koleka kati na Makomi ezali kosalema na mokolo na biso. Ekela, oyo ata mwanje moko te, eloko te, akokaki kosala, bobele Mwana Mpate. Ayaki mpe Azuaki Buku longwa na Loboko ya mobali ya Ye oyo afandaki likolo na Ngbendé, afungolaki yango, abukaki Bilembo, mpe akitisaki Yango na mabele, epai na mwanje na Ye ya nsambo, komonisa yango epai na BISO, Mwasi na Ye ya libala.

Makambo mazali kosalema; Liloba Azali komonisa biso mokolo na mokolo, ezangi ndimbólá. Totombolaka mingóngo na biso na koganga mpe kobelela, Aleluya! Kopakolama, nguya, nkembo, bomonisami, Emoniseli ya Liloba na Ye ezali monene mingi koleka oyo ezaláká ndéle longwa na ebandeli ya ntango. 

Elongo na ekelamu moko moko oyo ezali na likolo, mpe na mabelé, mpe na nse ya mabelé, kati na mbú, mpe nyoso ezali kati na yango togangaka: Mapamboli, lokumu, nkembo, nguya, ezala na Ye oyo Afandi likolo na Ngbèndé, mpe epai ya Mwana-Mpate libela na libela, amen! Amen mpe amen!

Ekelamu nyoso, moto nyoso, útá na ebandeli ya ntango azilaki ete mokolo moye mokóma. Ata Nzambe Ye moko azilaki kino mwanje na Ye moponami ákoma na mabelé liboso ete Aya kozua Buku, kofungola yango polele mpe komonisa mabombami maye manso epai na Mwasi na Ye na Libala moponami.

Toyebi sikawa oyo moto moko te na mabelé, útá na ebandeli ya ntango, atikalá koyeba. Eloko moko na moko oyo ebungaki kati na bokwei. Eloko moko na moko oyo ebombamaki kati na Liloba na Ye. Eloko moko na moko Mwasi na Lilbala azali na yango bosenga etiamaki likolo na bande mpe etiamaki kati na mwa ndako ya ebombelo ya Nzambe.

Atalisi biso ngambo na ezipelo ya ntango mpe tomimoni biso mpenza elongo na Ye na Ngambo mosusu. Mwasi ya libala amibongisi na nzela ya boyoki Liloba.

Tozalaki kati na boyekoli. Tolati molato mobimba ya ebuneli ya Nzambe. Eloko moko te ekoki koninganisa biso. Eloko moko te ekoki kobangisa biso. Eloko moko te ekoki kosala biso mabe. Eloko moko te ekoki kosala ete tokakola likolo na Liloba moko. TOZALI LILOBA.

Tozali kozila Ye na liboké na biso ya fololo na maboko na biso. Ezali bobele likambo ya ntango. Saa oyo ya kala ezali kobetabeta makongá. Tozali koyoka mbalata kokima, zélo kobaluka na nse ya biyiká. Likalo oyo ya kala elingi kotelema. 

Wana ekokoma Ye, tokopumbwa longwa na mokili oyo ya kala mbala moko kati na Maboko ma Ye. Akosimba biso mpe akoloba: “Nakendeki kobongisa esika mpo na bino, kasi Esili nyoso sikawa, molingami.”.

Koya na Ye ebelemi mpenza. Tozali na nse ya bozili na etingia lokola naino liboso soko moke te. Tozali na kosepela mingi lokola Alingi ete toyoka Bilembo Nsambo mbala moko lisusu. Toyebi ete tokozua Emoniseli ya koleka, zambi Liteya moko na moko toyokaka ezali lokola totikalá naino koyoka Yango liboso te.

Kobika lelo mpe koyoka Etinda oyo azali kutu monene koleka ntango etiamaki likolo na Bande. Azali kútu komonisa mingi koleka epai na biso sikawa. Nini nde ekokaki kosalema?

Boya koyangana elongo na biso na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe bosepela na boyoki: 63-0317E Ntaka Kati Ya Bileko Nsambo Ya Lingomba Mpe Bilembo Nsambo. Ezali Bilei Bibombamaki oyo Nkolo abongisaki mpo na Mwasi ya Libala kolia.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati na bolengeli boyoki Liteya:

Lewitiko 25:47-55

Yilimia 32:1-15

Jekalia 3:8-9/4:10

Baloma 8:22-23

Baefese 1:13-14/4:30

Emoniseli 1:12-18/Mokapo Ya 5/10:1-7/11:18

23-0709 NZAMBE KOMIBOMBA KATI NA KOMIKITISA, NSIMA KOMIMONISA NA MOTINDO YANGO MOKO

Nsango: 63-0317M 23-0709 NZAMBE KOMIBOMBA KATI NA KOMIKITISA, NSIMA KOMIMONISA NA MOTINDO YANGO MOKO

BranhamTabernacle.org

Balingami Bato godi, Ndenge, Motindo, Bonganga ya Molimo, Ekólo ya Bokonzi,

Ntango ya nkembo nini oyo Azalaki kopesa Mwasi na Ye ya libala, komonisa Liloba na Ye lokola liboso ata moke te. Liteya moko na moko toyokaka ezali lokola nde toyóká Yango liboso  ata moke te. Mitema na biso mpe bomoto na biso itondi na esengo lokola tosepelaka na Maná na sika kokita longwa na likolo. Eyokanaka lokola lifili na Lipati na biso ya Libala oyo ezali koya noki lokola Aleisaka biso Emoniseli nsima na Emoniseli.

Tozali kopesa mbeka na molimo epai na Nzambe, na nzela ya mbuma ya bibebu na biso, kopesa lokumu na Nkombo na Ye. Tozui etemelo na biso lokola minzoto na likolo. 

Asangisi biso elongo na bisika na likolo, kosopa Molimo Mosanto na Ye likolo na biso, kolengela biso mpo na Boyei na Ye bobelemi. Nde nyoso tokoki kokanisa. Nde nyoso tozali na yango na makanisi na biso. Nyoso tolingaka kosala ezali KOYOKA LILOBA. Azali koyebisa biso lisusu mpe lisusu tozali Mwasi na Ye na libala. Oyo ezali mokano na Ye mobongi be na botikalaka na Nzela na Ye epesami.

Tozali ba soda kati na Lipinga na Ye na Lotómo ya Bande, mpe tozali na lipambu na yango. Ezali elembo ya lokumu. Tolingaka koloba yango makasi mpe koyebisa mokili, IYO, TOZALI MOKO NA BANGO.

Apesi Bilei bibombamaki mpo na biso kolia. Mana mpenza ma Nzambe Ye moko koloba na Mwasi na Ye na libala, koyebisa biso ete tozali kati na lipinga na Ye.

Tozali koyangana na nse ya motóndo monene ya likolo kati na boyokani ete, Molimo Mosanto atii enama moko moko na Nzoto kino lobiko na pwasa nyoso ya nzoto mpe ya molimo.

Tozuaka Liloba na Nzambe mpe kolonga zabolo na nguya na ye. Topapaka ye kino singa mike mike elongo na Liloba yango. Mokonzi na biso monene alobaki na biso: “Bozali Liloba. Bobanga te. Bokende alimá liboso na zabolo mpe boloba, ‘EKOMAMI.’” 

Aponaki biso kozala basoda na Ye. Tozalaki kati na boyekoli, tokembisamaki elongo na Liloba na Ye. Tolatisami sikawa mpe tobelemi mpo na bobundi. Mokonzi na mapinga na biso ya minzoto 5 apesaki biso motindo kosala nini: Botikala elongo na malakisi ya Bande.

Mpe bondimisama, koloba bobele oyo Bande elobaka. Koloba eloko mosusu te. Bomoni? Zambi, nalobi yango na ngai moko te. Ye nde alobi yango, bomoni. Mpe mbala mingi kobulungana, bato batelemaka mpe koloba: “Na bongo, songolo mpe pakala alobaki ete elingi koloba boye na boye.” Tika yango bobele lolenge Ezali.

Ezali te oyo William Branham azali koloba na biso likolo na ba bande, ezali oyo NZAMBE azali koloba na Mwasi na Ye na libala likolo na ba bande. Oyo izali MITINDO na Ye. Ezali na nzela bobele moko yakotosa mitindo kouta ma Mokonzi na mapinga ya minzoto 5 mpe kotika yango lolenge Ezali, FINA PLAY.

Tozali kati na lipinga na Nzambe, no bongo tosengeli kotosa mitindo na biso Liloba mpo na Liloba. Tozali kokoba liboso. Tozali bato ya litomba, bato ya kondima, bato ya nguya, bato ya lisosoli, bato ya Emoniseli.

Tozali kokóma kati na bondeko bobongi be elongo na Tata lisusu, kotelema na ngambo mosusu na libulu ya bozindo, na ekaniseli ya lisumu kotemela biso te. Adama na Ye azongisami.

Ezali Nzambe kati na komikitisa mbala moko lisusu. Ezali mpo na moto nyoso te, bobele Mwasi na Ye ya libala, mpe tomoni yango saa mpe polele na miso na biso. 

Nazali na nse ya kozila na etingia monene koyoka Bilembo Nsambo mbala moko lisusu. Akozala komonisa Liloba na ye epai na biso lokola liboso naino soki moke te. Tokozala kozua Emoniseli monene koleka ya Liloba na Ye.

Azilaki kino lelo oyo komonisa epai na biso na koleka. Nyoso tozali na yango bosenga etiamaki na bande mpe ezali wana mpo na biso koyoka yango kaka na bofini na mosapi na biso.

Etinda oyo ezali nkake Nsambo wana oyo ikobongisa be Mwasi na libala; zambi MABOMBAMI NYOSO YA NZAMBE MAKOMONISAMA NA MWANJE NA BISO MOTINDAMI YA 7 EPAI NA MWASI YA LIBALA.

Oyo ezali ntango ya nkembo koleka kati na lisolo ya ntango ya mokili. Tozali na kokota ya koya na Ye mpo na Mwasi na Ye ya libala. Mokili mozali kozila na etingia makambo manso malobamaki kati na Makomi; lokola mói kolala na kati na mokolo mpe makambo motindo na motindo kokoma. Kasi esili koleka, mpe bayebaki yango te. 

Bokanisa, etiami elembo na Nkake yango Nsambo ya libombami. Bomoni?

Makambo minene makosalema lokola tozali koyangana mbala moko lisusu koyoka Nzambe konguluma na Nkake mpe komonisa mingi epai na Mwasi na Ye ya libala likolo na Bilembo Nsambo.

Nabiangi bino komibakisa na biso na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali kobanda molongo monene oyo na Liteya: 63-0317M Nzambe Komibomba Kati Na Komikitisa, Nsima Komimonisa Na Motindo Moko.

Lokola Ndeko Branham abulisi lisusu Eyanganelo ya Branham mpe bato epai na Nzambe, tika ete tomibulisa lisusu biso mpenza, bandako na biso, mangomba na biso, to ezala ata wapi toyangani, epai na Ye.

Ndeko Joseph Branham

1 Ntango 17:1-8

Yisaya 35:8/40:1-5/53:1

Malaki Mokapo ya 3

St. Matai 11:10, 11:25-26

St. Yoane 14:1-6

1 Bakolinti Mokapo ya 13

Emoniseli Mokapo ya 21

23-0625 Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?

Nsango: 62-1230e Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Na Libala Liloba Na Liloba,

Mosakoli moko te, ntóma moko te, soki moke te, na ntango moko te, abiká ndele na ntango moko lokola oyo tozali kobika sikawa. Oyo nde nsuka. Likonzi na Móto lizongi lisusu. Likonzi ya Móto liye likambaki bana ya Yisalaele; yango Moko oyo ekweisaki Saulo na nzela na ye kokende Damaseke. Yango Moko oyo eyei na Nguya yango moko, kosala misala yango moko, mpe komonisa Liloba yango moko, kotikala Liloba na liloba elongo na Biblia!

Mabombami manso mabombamaki mamonisamaki na ye. Bomonaki, mabombami MANSO. Eloko moko ya sika te, eloko moko etikami libanda te, eloko moko te ekomonisama útá na moto mosusu; manso mamonisamaki epai na mwanje na Ye motindami ya Nsambo mpe mapesamelaki biso, Mwasi na Ye ya libala, likolo na bande.

Nde NYOSO Mwasi na libala asengeli na yango; BOTALA LISUSU, NYOSO OYO MWASI NA LIBALA ASENGELI NA YANGO. Basusu basengeli na biloko bisusu, mpe yango epesameli bango. Kasi oyo tosengeli na yango etiamaki na bande mpe epasameli biso likolo ya bande mpe EZALI kopesa biso KONDIMA ya Konetolama.

Tozali lingomba oyo Nkolo Nzambe apesaki ye. Oyo nde mboka mokonzi na ye ya mosala. Awa nde Ayebisaki biso totikala. Litongi moko te, BA BANDE. Tozali ebolo yango oyo tondimaka, mpe tozali na nzala mpe totingami na Liloba moko na moko. Ayebisaki biso totikala awa mpe totala likolo na Libanga Mpembe, ya Mangaliti, LILOBA LIKOLO YA BA BANDE. 

Mongóngó moko útá na Lola mosololaki na ye mpe molobaki: “Yeisa Bilei na kati. Bomba Yango na kati. Yango nde nzela bobele moko ya kobatela bango awa, ezali kopesa bango Bilei”. Alobaki te ete boluka eloko mosusu, soko ete ekozala na bimoniseli bisusu kouta na esika moko boye; botala likolo na BILEI BIYE BIBOMBAMI LIKOLO YA BANDE, BOTIKALA WANA.

Kasi bobele lokola basalaki kati na ndoto nyoso Amonisaki, bokó babimaki na nzela oyo; basusu bazuaki nzela moko, mpe basusu nzela mosusu. Motango moke mpenza batikalaki mpe batalaki likolo na oyo Ayebisaki bango.

Sikawa bokokanisa kutu yango na mosusu, ndoto. Oyo ezalaki emononeli. Bilei, Yango oyo. Oyo nde esika yango. 

Akokaki te kozala polele na lolenge mosusu epai na Mwasi na Ye ya libala koleka wana. Oyo ezalaki emononeli, liloto te, EMONONELI. Bilei bizali awa; ba bande. Esika yango oyo; ba bande. Tozali kosala mpenza oyo ayebisaki biso tosala: koyoka BA BANDE!

Esengeli na Emoniseli ya Molimo mpo na ko sosola makambo maye. Ekosengela na Emoniseli ya Molimo kondima mpe kososola oyo Akoyebisa na biso Lomingo loye. Ekozala ntango moko na nkembo mpo na Mwasi na libala. 

Ezali na makambo mingi Nzambe azali koyebisa mpe komonisa biso likolo na Liteya oyo. Nalingi nazua Liloba nsima na Liloba mpe napesa Yango epai na bino, kasi nayebi ete Akomonisa eteni ya motuya moko na moko epai na bino zambi oyo nde Alobaki ete bozali yango:

Oyo nde lingomba Nkolo Nzambe apesi ngai. Awa nde esika na ngai ya mosala. Awa nde natikalaka…ezali na ebolo ya bato awa baoyo bandimaka, mpe bazali na nzala mpe bazali kokangana na yango.

Tozali ebolo yango oyo bazali na nzala mpe bakangani na yango. Ebele basosolaka biso mabe mpe batiolaka biso, kasi ezali malamu, tolingaka mpe tobondelaka mpo na bango; kasi tolingaka na biso kaka MONGÓNGÓ MOKO kokamba biso.

Bolimbisa ngai, kasi esengeli napesa eteni na liloba oyo.

“Ntango abandi koyula, libombami likosila kokoka.” Sasaipi, botala, na nsima ezali ntango mpo na mingongo ya Bilembo Nsambo, ya Emoniseli 10, komonisama. Bososoli? Ntango mabombami manso ma Buku masili kokoka! Mpe Biblia elobi, awa, ete akosilisa mabombami.

Nani akosilisa mabombami? Mobateli na yo? Ebolo moko boye? Ngai? Mwanje ya Nsambo Motindami: William Marrion Branham. Moko te liboso, na ntango, to nsima na ye. 

AKOSILISA MABOMBAMI.

Ekoki kozala ntango ya nsuka. Ekoki kozala ntango mpo na minama kokomba etando ya likolo, mpe liyebisi longwa na likolo, koloba: “Ntango ezali lisusu te.” Soko ezali bongo, tika ete tomilengele, baninga, kokutana na Nzambe na biso.

Iyo Nkolo, tolingi tobongisama kokutana na Yo. Tolingi tosala nyoso tokoki. Tolingi tozala kati na Mokano mwa Yo mobongi be. Tobondeli Yo Tata Oyebisa biso, oyo esengelaki na biso kosala mpo tobongisama? 

Bilei ebele bitiama na kati sasaipi. Tika ete tosalela Yango. Tika ete tosalela Yango.

Matondi Tata mpo na Bilei Otii na kati mpo na Mwasi na Yo ya libala mpe emoniseli na Yango. Tozali kosalela yango mokolo na mokolo.

Nabondeli mpo na bolimbisi ya mwa lingomba na ngai awa, oyo Otindaki ngai ko-ko-ko-kokamba mpe kotambolisa. Pambola bango, Nkolo. Nasalaki kokokana na bimononeli mpe ndoto mpe makambo malobaki, boye, na boyebi na ngai bopusi malamu. Natii na kati Bilei ya motindo nyoso oyo na yebi, mpo na bango, Nkolo. Ezala nini, Nkolo, tozali baoyo ya Yo. Matondi Nkolo, Olobaki na biso mbala moko lisusu, ete otii na kati Bilei tosengeli na yango mpo na mobembo.

Nakoki te kozila na kpókósó koyoka, Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka, Mobali? 62-1230E, elongo na moko na moko na bino mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville. Nayebi ete makambo makomonisamela biso lokola liboso soko moke te. Ekoki kozala mbala ya nsuka koyoka Oyo. 

Boni soko ezali eloko moko koyebisa biso lolenge nini kokota kati na Kondima ya Konetolama? Ezali nde yango? Tokopota nde, kotenguma likolo na bitutú? Mpe ezali nde na eloko moko ebelemi kokoma? Mpe nzoto iye ya kala, ya bonunú, mpe ya mabe ikobongwana?

Nakobika nde komona yango, E Nkolo? Ekomi nde pene pene na motindo ete nakomona yango? Ezali nde libota oyo? Mibali, bandeko na ngai, ntango nini oyo? Tozali wapi?

Ndeko Joseph Branham

23-0618 ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA

Nsango: 60-1211E ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA

BranhamTabernacle.org

Balingami Bandimi Liloba Likokweaka Te,

Boni ezalaki bikamwa koyoka mpe kotanga Bileko Nsambo Ya Lingomba. Na liteya moko na moko toyokaka, mokapo moko na moko totangaka, Azali kopesa biso Emoniseli koleka. Tomimoni polele biso moko kokita kati na eleko ya lingomba moko na moko…Mwasi na Ye na libala, oyo atikalaki na Liloba ya ebandeli. 

Kati na bileko tomoni polele milimo yango mibale; bozimbisi mpe lokuta ya Satana, kobalola Liloba na Nzambe, kozimbisa, kobebisa mpe kokonza bato. Kasi ntango nyoso ezalaki na liboke moke na bato na Nzambe, Mwasi na Ye na libala, kotingama na Liloba moko moko.

Ezalaka mbala nyoso na ekebiseli moko oyo ezali wana ntango nyoso oyo epesameli bato, bosengeli KOTIKALA NA LILOBA. Bobela na sekonde bolongwi nsima na Liloba yango, bosili bokangami kati na motambo monene ya Satana; pelamoko Ewa asalaki uta na ebandeli. Azangaki kosalela Liloba. Adama akweaki mbala moko na bozangi botosi na Liloba. Kasi Yesu, kati na Bomoi na Ye moko mpenza, kobunda kati na Ye moko, Alongaki na nzela ya botosi na liloba ya Nzambe.

Alobaki soko tosepeli kofanda kati na kiti na Ye ya bokonzi, tosengeli tozala Liloba yango ya Bomoi. Mabondeli na biso, kokila, to ata mbongwana na biso ya mitema ikozuisa biso litomba wana te. Ekopesama bobele na Mwasi Liloba.

Makambo nakoka koloba mazali mingi mpenza, mpe maloba ya etinda na kokaki kolinga kokabola na moko na moko na bino; ezangi nsuka. Nayebi ete etinda oyo ezali kopela na mitema na bino moko na moko mpe bolingaka Liloba moko na moko, bobele lolenge nalingaka yango. Tolingi mokili eyeba ete: Iyo, tozali bato ya bande. Iyo, Tofinaka Play. Iyo, tondimaka Mongóngó likolo na ba bande ete yango nde ekobongisa be Mwasi na libala. Iyo, ba bande nde ekosangisa Mwasi na libala. Iyo, Kofina Play ezali mokano mwa Nzambe Mobongi Be. Iyo, nazali Mwasi na Ye na libala.

Nayebi ete nazali komizongela utá na mikanda ebele, kasi nazali na esengo mingi, na matondi mingi, nandimisami mpenza…ezangi kaka kobeteme ntembe, oyo ezali Mwango na Nzambe mpo na Mwasi na Ye na libala. 

Na Liteya moko na moko toyokaka, tomitunaka kati na kokamwa, boni bakoki te komona, kotanga to koyoka oyo tozali koyoka? Ezali wana kaka, likolo na bande, nsima ya bande, nsima ya bande. Esalaka ngai nayoka ete naloba na bango lokola Yesu Alobaki na Nikodeme: “Ozali molakisi na Yisalaele, mpe oyebi makambo oyo te?” 

Boyoka kaka boni mwanje akomisi yango pete.

Bobele na moboko ya ezaleli ya moto, moto ata nani ayebaka ete epai wapi bato mingi bazali makanisi makabwani likolo na makambo mike ya malakisi manene oyo bango nyoso bakangani na yango elongo.

Na moboko ya ezaleli ya moto YANGO MOKO, lisosoli ya molimo esengelami na yango te, moto nyoso ayebaka ete bato mibale bakozala na makanisi makeseni likolo na MAKAMBO MIKE ya malakisi minene.

Bakoki koyokana nyoso mpe koloba ete soko bato basali te oyo balobaka, to soko balongwi na bango, na bongo libebi likolanda. Kasi mosakoli ya solo akokamba ntango nyoso moto na Liloba mpe akokangisa bato na Yesu Klisto mpe akoyebisa bato te babanga ye to oyo ekolobaka ye, kasi babanga oyo Liloba ekolobaka.

Liloba elobaka nini? Nakotindela bino Eliya mosakoli. Na mikolo ya MONGONGO. Ekozala na mosakoli MOKO Liloba…bobele MOKO…mpo ete Nzambe apesaki Emoniseli epai na BOBELE OYO WANA MOKO. Ye nde akozongisa Mwasi na Ngai ya libala.

Na mingóngó mingi mpe na makanisi mingi mingi mpe maloba, moto akoki nde KONDIMISAMA MPENZA BONI?

Nani ko nde akozala na nguya ezangi kokweya oyo esengeli kozongisama na eleko oyo ya nsuka, mpo ete eleko oyo ya nsuka ekozonga na bomonisami ya Liloba Peto Mwasi ya libala?

Nde oyo Mwasi na libala alingaka koyoka, oyo azali na nguya ezangi kokweya; mpo ete akozala oyo asengelI KOZONGISA Mwasi ya libala. Akozala na makanisi makabwani te, azali Liloba. 

Motuna: Nkolo, tolingi toyeba, moto yango azali nani oyo akozala na maloba mazangi kokwea?

Nakoyebisa bino nani akozala na yango. Ekozala mosakoli oyo andimisami mpenza, to kútu oyo andimisami koleka mosakoli mosusu ata nani na bileko nyoso longua na Enoka kino lelo oyo, mpo ete moto oyo akozala na lotomo losengelami na yango ya mosakoli ya libanga ya motó, mpe Nzambe akomonisa ye polele. Akozala na bosenga komilobela te, Nzambe akoloba mpo na ye na nzela na Mongóngó ya elembo. Amen.

Eyano: William Marrion Branham.

Botika na yikisa bino mpiko lelo Mwasi na libala moponami. BOKOKI TE, MPE BOKOKOKA TE, KOKOSAMA. Bosimbi yango? Ezali at ana moto moko te akokoka kokosa bino. Paulo akokaki kokosa moponami ata moko te, soko ete ázalaki kati na libunga. Ata na eleko ya liboso ya lingomba na Efese, moponami akokaki kokosama te. Bamekaki bantómá mpe basakoli na lokuta mpe bakutaki bango bakosi mpe babimisaki bango. 

NKEMBO MWASI NA LIBALA….bozali ba mpate na YE mpe boyokaka Mongóngó na Ye mpe bolandaka YE. BOZALI MWASI LILOBA YA BOMOI!!

Ezali kaka te na eloko monene koleka koyeba Maloba maye. Koyeba kati na motema mpe bomoto, bozali Mwasi na Ye ya libala. Mikolo mokili mozalaki kozela misili mikómi. Mwasi na libala azali komiyeba ye moko mpe azali kokóma MOKO ELONGO NA YE; tozali BOZALISI YA SIKA YA NZAMBE. 

Mbala moko lisusu nazali koloba na bino, BOYOKA MONGONGO YA NZAMBE na  mokolo mwa Lomingo, epai se epai boyangani. Etali te soko liteya nini bokoyoka awa kaka bozali koyoka Mongóngó ya Nzambe mondimisami. Mongóngó yango nde Mongóngo Nzambe abiangaki mpe aponaki kozongisa mpe koyanganisa Mwasi na Ye ya libala.

Epai na mangomba nyoso, bato nyoso, bobiangami koyoka elongo na biso na Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Eleko Na Lingomba Ya Laodikia 60-1211E.

Ndeko Joseph Branham

23-0611 BASEKA ZOMI, MPE BAYUDA NKOTO MOKAMA NA NTUKU MINEI NA MINEI

Nsango: 60-1211M BASEKA ZOMI, MPE BAYUDA NKOTO MOKAMA NA NTUKU MINEI NA MINEI

BranhamTabernacle.org

Balingami Balingi ya Mana,

Tozali na esengo zambi tokoki kolia Bilei bizali na mokuwa to ndiká kati na Yango te. Mápa kokita longwa na Lóla, mabiangamaki “Mana,” kozipa bipai nyoso na elengi ya Lóla.

Na Emoniseli ya Molimo, Amonisi biso ezali na esika bobele moko tokoki kozua Mana oyo ya Sika na ndiká te: na boyókáká Mongóngó Apesi mpo na Mwasi na Ye ya libala.

Ezali bosengá na Ye ya ntango nyoso na eleko moko na moko ete mangomba bayoka Mongóngó ya Nkolo. Kati na eleko oyo ya nsuka, bosenga na Ye bozali kútu kokóba kozala makasi koleka eleko mosusu nyoso; mpo ete oyo ezali mokolo ya boyei ya Nkolo. Akebisaki biso, na noki nyoso, ete tosengeli koyoka Mongóngó na Ye ya solo, mondimisami.

Oh, ezali na mingóngó kati na mokili—makambo ebele mpenza mpe bosengá kolela mpo na lisalisi; kasi ekozala na mongóngó soko moke te ya litomba koleka mpe oyo ebongi na lisalisi lokola mongóngó ya Molimo. Boye: “Ye oyo azali na litói ya koyoka, tika ete áyoka yango elobi Molimo na mangomba.”

Nde yango, ekebiseli na Ye epai na mangomba, boni ezali na litomba koyoka Mongóngó ya Molimo. Solo solo wana nde monguna akobundisa, komeka kotángola litomba ya boyoki MONGONGO YANGO mosika na bato. 

Ayebisaka biso MINGONGO MINGI mizali. Makambo mingi mpe bosenga, kolela mpo na lisalisi, kasi bóbósana soki moke te, bosengeli koyoka MONGONGO NA YE MONDIMISAMI.

Soko nayokisi bino mpasi na bolobáká bongo, bolimbisa ngai, kasi, nayoki ekokaki koboyama, kasi, nazali Mongóngó ya Nzambe epai na bino.

Nde eyano: NAZALI MONGONGO NA NZAMBE EPAI NA BINO.

Ezali mpenza polele epai na Mwasi na Ye ya libala. Ebombami te, Ezali mpenza wana polele; moto nyoso akoki kotanga yango. Nazali te koyebisa bato eloko moko elobaki Ye te…nazali te kosala yango ngai moko. Alobi na biso polele nini nde eloko ya litomba koleka tosengeli kosala. Mokano ya Nzambe mobongi be ezali KOYOKA MONGONGO NA YE MPE AZALI MONGONGO YA NZAMBE EPAI NA BISO.

Bandeko mibali mpe basi, nazali koloba te ete bokoki te koyoka babateli na bino. Nazali koloba te ete bazali lokuta to ete ezali mabe soko batéyi. Na polele Nkolo atiaki biso awa kozala lisungi epai na Mwasi na libala mpe kotalisa bino na NSIMA na Liloba ya ebandeli; kotia Liloba yango liboso na bino lokola ya litomba koleka oyo bokoki koyoka. Tosengeli TOZONGA na MOKANO MWA NZAMBE MOBONGI BE. Adama oyo azongisami mobimba, akembisami nsima ya Liloba. Nzambe alobaki mokolo na mokolo mbebu na litoi na Adama kati na Elanga, mpe lelo, azali kosala eloko yango moko.

Tosengelaki tozala totelemi na katikáti mpe koloba: “Tozali bandeko!” Tokabwani te, Biso nyoso nzoto moko; Moko kati na elikia mpe Malakisi, (Malakisi ya Biblia.)

Tozali bandeko. Nazali te komeka kokabola Mangomba, nazali komeka komema biso nyoso elongo na eloko BOBELE moko ekoki koyeisa Mwasi na libala elongo. Tokoki te koyokana ata MOKO NA MOSUSU, to EBOLO YA BATEI; nyoso bakeseni, mpe balobaka makambo makeseni. Ezali na mwanje ya nsambo motindami bobele moko. Ezali na Mongóngó ya Nzambe kaka MOKO. Mongóngó Nzambe apesaki na Mwasi na Ye ya libala likolo na bande.

Nakozala polele. Emoniseli na ngai ezali: Koyoka Mongóngó ya Nzambe likolo ya bande EZALI MOKANO MWA NZAMBE MOBONGI BE.

Lokola na mikolo ya Samwele, ntango bato babelemaki na ye mpe balobaki na ye ete balingaki mokonzi koyangela bango. Ezokisaki motema na ye. Akendeki epai na Nzambe mpe ayebisaki Ye oyo elingaki bango. Nzambe alobaki na Samwele, babóyi yo te, Samwele, babóyi nde Ngai, ete Nakonza te likolo na bango.

 Azalaki kokonza likolo na bango boni? NA NZELA YA MOSAKOLI NA YE, SAMWELE. Ezalaki MOKANO MWA YE MOBONGI BE, mpe baboyaki ye. Mpo na kozala Mwasi na Ye ya libala, bosengeli KOZONGA na Mokano mwa Nzambe Mobongi be. Bosengeli te kozala na MIKANO 2 MIBONGI BE.

Boni nakokaki kolinga Mwasi na libala mobimba koya elongo útá na mokili mobimba koyoka Mongóngó ya Nzambe nyoso na ntango moko. Ezali te mpo “Na”zali koloba yango, kasi mpo ete NZAMBE AZALI KOSALA YANGO. Ezali eloko bobele moko koyeisa Mwasi na Ye ya libala elongo.

Nabiangi bino koya koyoka elongo na eteni ya Mwasi ya libala, mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, koyoka: Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei 60-1211m.

Soko bokoki komibakisa na biso te, boyikisa mobateli na bino mpiko koyoka Mongóngó ya Nzambe Lomingo loye na ntongo kati na lingomba na bino. Bokoki kobanza, Mwasi na libala na mokili mobimba, kati na lingomba moko na moko, ndako moko na moko, to ézala ata wapi bozwami, koyoka Mana ya Sika kozipa bipai nyoso na elengi ya Lóla.

Ndeko Joseph Branham

23-0604 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI

Nsango: 62-1210 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI

BranhamTabernacle.org

Molingami Mama Yesu Klisto,

Ezali koyokana bikamwa te? Mwana Mpate na Mwasi na Ye ya libala bafandi libela kati na mabongi be ya Nzambe. Tokoki nde kolimbola yango boni? Tokanisaka mpo na yango. Tolotaka mpo na yango. Totangaka oyo Liloba Lilobi mpo na yango. Tomonaka Ye kokabola Bosanto na Ye moko elongo na biso. Kati na Ye, tokomi boyengebene mpenza ya Nzambe.

Esengo nini yango ememelaka biso ntango tofinaka play mpe toyokaka Nzambe Ye moko kosolola na biso na nzela ya mwanje na Ye ya nguya mpe koyebisa biso makambo maye.

Ezali na eloko moko te kati na bomoi oyo, ézala ya kosepelisa lolenge nini, ezala malamu mpe kitoko lokola ekoki kozala, kasi bokokuta litondi na bobongi be nyoso kati na Klisto. Eloko mosusu nyoso ekweaka kati na bozangi ntina soki na Ye te.

Ayebisaka biso tokozala na nkombo ya sika, Nkombo na Ye. Nkombo na Ye ekopesamela biso ntango akozua biso epai na Ye moko. Ekozala bikamwa koleka lolenge tokokaki kutu kobanza. Tokokende epai nyoso Mobali na libala akendeke. Tokotikama na Ye soki moke te. Tokolongwa pembeni na Ye soki moke te. Tokokabola Kiti na bokonzi na Ye elongo na Ye. Tokolatisama motole elongo na nkembo mpe lokumu na Ye. 

Mpe lokola Amitalisaka epai na mokili, mpe mokili mobimba mofukamaka na makolo na Ye, na ntango yango mokili mobimba mokofukama na makolo na basanto, kotalisa ete bazalaki alima kati na kotelema na bango elongo na Ye.Nzambe apambolama libela!

Ayebaki biso liboso na nzela ya mobeko ya Bonzambe ete tokozala Mwasi na ye ya libala. Aponaki BISO; toponaki Ye te. Abiangaki BISO; toyaki te na lolenge ya biso moko. Akufaki mpo na BISO. Asukolaki BISO kati na Makila na Ye moko. Afutaki motuya mpo na BISO. Tozali baoyo na Ye, mpe na Ye kaka. Tomipesi mobimba epai na Ye mpe Ayambi mokumba. Azali motó na BISO. Alobaka na biso na nzela ya mwanje na Ye mpe totósaka, mpo ete yango nde mposa monene na biso.

Longwa na ebandeli kino na nsuka, Etinda likolo na ba bande ezali nyoso NZAMBE epai na BISO. Tika ete Bomoi yango ézala kati na BISO. Tika ete ézala Makil ana Ye makopetolaka BISO. Tika ete ézala Molimo na Ye oyo ekotondisaka BISO. Tika ete ézala Liloba na Ye kati na mitema mpe minoko na BISO. Tika ete ézala Mapipi na Ye makobikisaka BISO. Tika ete ézala Yesu, mpe Yesu kaka. Na nzela ya misala ya boyengebene te, oyo tosalaki. Klisto azali bomoi na ngai. Etinda oyo ezali bomoi na biso, zambi Ezali Klisto.

Oh, mingóngó mingi mizali kati na mokili—makambo mingi mpe bosengá kolela mpo na lisalisi; kasi ekozala na mongongó soki moke te ya litomba koleka mpe oyo ebongi kosunga lokola Mongóngó ya Molimo. Na bongo: “Tika ete ye oyo azali na litói, ayoka yango elobi Molimo na mangongomba.”

Nzambe Azali na Mongóngó moko mpo na lelo oyo. Endimisamaki na nzela ya Likonzi ya Móto kozala Mongóngó ya Nzambe. Ekozala na Mongongó moko soki moke te oyo ezali NA LITOMBA KOLEKA MPE NA BOBONGI KOSALISA KOLEKA lokola Mongongó wana likolo na bande mpo na lelo.

Boya komibakisa na biso Lomingo loye na 12:00 nsima na nzanga, ntango ya Jeffersonville. Tozali na Libenga mobimba litondi na Mafuta ya nzói. Tokotia yango likolo ya Libanga, likola ya lingomba moko te; likolo ya Libanga, Klisto Yesu. Mpe bino ba mpate bokende kolambola. Bokobika solo na mbala moko. Mikakatano nyoso ya lisumu mikokende ntango bokolambola Libanga. Nde oyo bosengeli kosala, boya koyoka Mongongo na Nzambe koyebisa biso nyoso na ntina na: Eleko Na Lingomba Ya Filadelefi 60-1210. 

Ndeko Joseph Branham

23-0521 ELEKO NA LINGOMBA YA TWATILA

Nsango: 60-1208 ELEKO NA LINGOMBA YA TWATILA

BranhamTabernacle.org

Balingami Minzóto Kati ya Motole na Ye,

Bosepela Mwasi na libala. Tozali kokóma Moko elongo na Ye. Mokolo na mokolo, Azali kopesa biso Emoniseli mingi na koleka ya Ye moko mpe ya Biso moko. Tozali kokóma na lisósoli na koleka na Nguya yango Ekoyeisaka na Bomoi oyo ezali kobika mpe kofanda kati na boso.

Tokoki kútu te kobanda kolimbola boni toyokaka. Tozikisami na Molimo na Ye. Ezali likanini na biso moko na moko. Eloko mosusu te ezalaka na ntina mpo na biso. Tomoni Liloba na Ye kokóma Liloba kati na biso. Eleisaka bomoto na biso. Tobikaka mokolo na mokolo kosambela Ye, kokumisa Ye, mpe kotóndo Ye ete tokoki koyoka Mongóngó na Ye koloba na biso.

Lokola tozali kotanga Buku na biso ya Eleko ya Lingomba, tokoka te kokitisa yango bobele na mpasi; Mitema na biso mizali kopasuka. Mokolo moko na moko momemaka Emoniseli. Tolingaka kopumbwa likolo mpe kobeta molóló, kopota kati na eteni ya ndako mpe kogánga: ”Nkembo, Aleluya, Lokumu na Nkolo.” “Otangaki oyo? “Nazali na yango etiami elembo ya lángi aw ana Langi na ngai, kasi natángá Yango soki moke te, SOKI MOKE TE lolenge wana liboso.” Azali komonisa Biblia mobimba longwa na Genese kino Emoniseli epai na biso, mpe namoni BISO MOKO KATI NA LILOBA NA YE.

Tomoni Mwasi na libala wana ya Solo oyo atikalaki na Liloba kati na bileko mpe ajimbisamaki ten a kojimbisama monene ya Satana. Alingaki kosambelama lokola Nzambe. Kasi ntango nyoso kuna ezalaki na MWASI NA LIBALA YA SOLO wana, kotikala sembo na Liloba na Ye. Libóké moke liponami wana litikalaki elongó na motindami na Ye. Kaka lokola biso, bakokaki te, mpe balingaki te, kokakola. Bayebaki ezalaki NA NZELA BOBELE MOKO kondimisama: kotikala na Nzela na Ye, Liloba na Ye, mwanje na Ye.

Boni Satana azalaki na kozimbisa kati na ntango. Amifungwelaki nzela kati na Bileko ya Lingomba bikeseni kino akokisaki ntina na ye. Akomi sasaipi pene na OYO EBONGI BE na motindo ete akokaki kozimbisa ata baponami mpenza soko nde ekokaki…kasi masanzoli na Nkolo, EKOKOKA TE, TOZIMBISAMI TE. Mpo na nini? TOTIKALAKI NA MONGONGO YA NZAMBE; LILOBA NA YE LIKOMI MOSUNI.

Nzela koleka zíngázíngá na Yango ezali te. Mongóngó ya Nzambe ezali nzela na Ye epesami mpo na lelo. Tokobaki kosala misala na Ye na bosembo kino nsuka. Topesameli nguya likolo na mabota, mpe tozali makasi, na makoki, bayangeli bayebi te komigúmba baoyo tokoki kotelema na nguya nyoso elongo na likambo ata nini. Ata monguna na biso ya nsuka mpenza abukáni. Botalisi na biso ya boyangeli, na nuya na Ye, ezali lokola oyo ya Mwana mpenza.

Oh, boni tosepelaki tokoka koyebisa yango na maloba boni boni toyokaka. Mokolo moko tokosala yango baninga na ngai. Tokolekisa Seko na Seko elongo na Nkolo na biso, mwanje na Ye, mpe moko na mosusu.

Lolola mwasi moíndo kala kuna na Memphis, toyebaki ezalaki Ye ntango toyokaki Ye. Mpo na nini? Oh, tozali MOKO NA BANGO.

Okolinga mpo na Molimo Mosanto ete ásolola na Yo mpe áyebisa yo ozali nani? Yaka kobika bozali ya Nkolo elongo na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Eleko Na Lingoba Ya Twatila 60-1208. Ekobongola bomoi na yo.

Nd. Joseph Branham

23-0514 Eleko Na Lingomba Ya Pelegamo

Nsango: 65-1207 Eleko Na Lingomba Ya Pelegamo

BranhamTabernacle.org

Balingami Bana Ya Mosakoli 

Tozali Liloba limonisami,baoyo bazali kopesama nguya na nzela ya Molimo, koyoka Mongóngó na Nzambe, lokola Ayebisaka biso, TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA.

Tata Apesi na Lingomba na Ye makabo LIBWA ya Molimo, mpe lotómo na misala MITANO, kasi Yesu Alobaki: Kati na eleko MOKO NA MOKO nakomiyebisa BOBELE epai na moto MOKO. Motindami bobele MOKO mpo na eleko moko na moko akoyamba oyo esengeli na Ngai koloba na eleko yango. MOTINDAMI yango MOKO azali motindami epai na Lingomba ya solo. 

Alobaka mpo na Nzambe na nzela ya emoniseli. Etinda ekosangelama bongo epai na nyoso, kasi ekoyambamaka bobele na libóké moko libongi na nzela moko boye. Moto na moto na libóké wana nde azali oyo azali na makoki ya koyoka oyo Molimo Azali koyebisa na nzela ya motindami. Baoyo bayokaka bazali te kozua emoniseli ya bango moko, soko te libóké ya bato kozua emoniseli ya bango nyoso, KASI MOTO NA MOTO AZALI KOYOKA MPE KOYAMBA OYO MOTINDAMI ASILAKI KOYAMBA LONGWA NA NZAMBE.

Boni esengelaki na biso kokeba koyoka Mongongo MOKO, mpo ete Molimo Azali kaka na Mongóngó moko oyo ezali Mongóngó na Zambe.

Ezali na MONGONGO MOKO YA NZAMBE mpe ezali na bosenga te ya komekama lokola LIBWA, to kokongolama lokola MITANO; BOBELE LILOBA MOKO YA NZAMBE PETO!!

Tokoki nde koyoka batei basusu? Iyo, kasi fungola ezali koloba BOBELE oyo elobami na mosakoli. Bamosusu makoki, mpe basengelaki, kolendisa, kolakisa mpe koteya; kasi Nzambe Abongisi nzela lelo mpo na biso lokola MOKOLO MOSUSU TE. Tokoki koyoka mpenza oyo Nzambe Azali koloba na lingomba.

Ayebisaki biso tosengeli kozala mpenza na bokebi. AYEBISAKI BISO, NGAI TE, ete babakisaka awa, to kolongola kuna, mpe noki-noki etinda ezali lisusu peto te. Na boyokaka ba bande, Ezali Liloba likolo na Liloba, Yango Elobi Nkolo.

Elembetele ya efandelo ya Molimo ezalaki koyeba mpe KOLANDA oyo mosakoli na Nzambe apesaki mpo na eleko na ye lokola atiaki lingomba na molongo.

Nde ntina TOLANDAKA, mpe tolobaka, mobateli na biso azali motindami mwanje na nsambo mpe tolingaka bobele koyoka oyo esengeli na ye koloba. Epai na biso ezali Mana Mabombami.

Emoniseli esopanaki likolo na mwanje na biso motindami. Emoniseli ya Liloba epesamaki mpe eyebisamaki epai na YE mpo na eleko na biso. Azalaki na mwa Emoniseli monene koleka ya oyo Klisto Azali; ebiangeli ya mwa likolo mingi, koleka bamosusu. Soko tokoki te kobika bomoi likolo koleka mobateli na biso, na bongo tolingi William Marrion Branham lokola mobateli na biso.

Toyebi ete bamosusu bakomona te oyo ekomonaka biso, mpe kondima makambo makondimaka biso, kasi bazali naino bandeko na biso mibali mpe basi, mpe tokolekisa Seko na Seko elongo na bango. Kasi esengeli totikala sembo na oyo tondimaka ete ezali nzela Nzambe atalisi biso kosambela mpe kolanda ye. 

Ezali pete mingi mpo na basusu koloba ete totiaka lokumu mingi epai na motindami, kasi likambo ezali ete, tozali kaka kozongela ye. Esengeli na yo koloba yango elongo na Nkolo. Zambi ezali Mongóngó na Nzambe koloba makambo oyo.

Tika ete tofungola mitema mpe makanisi na biso mpe totanga oyo Molimo alobaki na biso na nzela ya nwanje na ye: 

Noki-noki ezali koya kati na mokili, mwanje monene ya Pole oyo akoya epai na biso, oyo akokamba biso kobima, Molimo Mosanto monene, koya na nguya, mpe akokamba biso epai na Nkolo Yesu Klisto. Akoki mbala mosusu te koyeba yango, kasi akozala awa moko na mikolo oyo. Akosala ete… Nzambe akosala ete ayebana. Akosengela komiyebisa te. Nzambe Akotalisa oyo ya Ye Moko. Yangon de Alobaki ntango Yesu azalaki awa mpe bayebaki Ye te, bomoni. Alobaki: “Soko nasali misala ya Tata na Ngai te, boye bondima Ngai te; kasi soko nasali misala ya Tata na Ngai, mpe bokoki kondima Ngai te, boye bondima misala.” Ezali solo?

Azali nde te komibianga mwanje monene ya pole mpo na lelo? Toyebi ete ezali Molimo Mosanto kati na ye, kasi alobaki: Akoyeba ntango mosusu yango te, kasi akozala awa moko na mikolo oyo. Molimo Mosanto akoyeba te oyo Azali? Akosengela te komiyebisa; Nzambe akosala ete ayebana.

Boye azali koloba, mosakoli mpo na mokolo na biso azali mwanje monene ya pole oyo akokamba biso kobima mpe epai na Yesu Klisto na nzela ya Molimo Mosanto kati na ye. Wana nde Emoniseli mpo na mokolo na biso.

Nani nde akotalisa Mwasi na libala epai na Nkolo? MOBATELI NA BISO.

Kasi Mosakoli oyo akoya, mpe lokola mobongisi nzela mpo na boyei na liboso agangaki: “Botala Mwana-Mpate na Nzambe, oyo alongilaki masumu na mokili,” bobele bongo ye mpe na ntembe te akogánga koloba ete: “Botala Mwana-Mpate ya Nzambe, koya kati na nkembo.” Akosala oyo, mpo kaka lokola Yoane motindami na solo epai na baponami, boye mpe oyo motindami ya nsuka epai na baponami mpe mwasi Liloba abotami na Liloba.

Na boyebaka solo iye, mpe na bozalaka na litondi na emoniseli na Ye kati na mokolo oyo, tokomi Mwasi na Ye na libala oyo tobotami mpe todonisami na Molimo na Ye.

BOSEPELA MWASI NA LIBALA, OYO NDE NANI TOZALI!

Ntango moto oyo abotami na Molimo, atondisami na Molimo kati na kondima azui Liloba yango kati na motema na ye mpe atii yango likola na bibebu na ye, no bongo ezali lolenge moko lokola Bonzambe koloba. Ngomba moko na moko esengeli ekende. Satana akoki te kotelema liboso na moto wana.

Sikawa solo ya boyokani ezali kati na Mobali na libala mpe biso, Mwasi na Ye na libala. Atalasi biso Liloba na Ye ya bomoi, mpe toyambi Yango. Toko bete ntemba na yango soko moke te. Na ntina wana, eloko moko te ekoki koyokisa biso mpasi, kufa kùtu te. 

BOSEPELA MWASI NA LIBALA, OYO NDE NANI TOZALI!

Liloba lizali kati na Mwasi na libala (lokola lizalaki kati na Malia) Mwasi na libala azali na likanisi na Klisto mpo ete ayebaka oyo elingaka Ye esalema na Liloba. Akokisaka motindo na Liloba kati na Nkombo na Ye mpo ete azali na “yango elobi Nkolo.” Na nsima Liloba liyeisami na bomoi na nzela ya Molimo mpe ekokisami. Lokola momboto mokonami mpe mosopameli mai, moyaka na ntango mobimba ya kobuka, kokoisa ntina na yango.

Tokomi na ntango ya bobuki mpe tozali sikawa kokokisa ntina na Ye. Tokoki bobele kosala mokano na Ye. Moko te akosalisa biso eloko mosusu. Tozali na “Yango Elobi Nkolo,” to tofandi nye. Toyebi ete ezali Nzambe kati na biso, kosala misala, kokokisa Liloba na Ye moko.

Tosepelaka mpo ete mosakoli amonaki biso na ngambo ya ezipelo ya ntango wana etombolaki biso mingóngó na biso mpe to togangaki na bomoko: “Tozali kopema likolo na yango!”

Boya koyangana elongo na biso na Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Mongongo na Nzambe komemela biso libombami ya: Eleko Na Lingomba Ya Pelegamo 60-1207

Ndeko Joseph Branham

Mituya 23:8-9

Emoniseli 2:12-17, 17: 1-5, 17:15

An Independent Church of the WORD