25-0119 Emóniseli, Mokapo Ya Mitano Eteni Ya I 

Nsango: 61-0611 Emóniseli, Mokapo Ya Mitano Eteni Ya I 

BranhamTabernacle.org

Balingami Baoyo batiamí na Bokonzi ya Bana,

Ntango ya Malili makasi ya kokamwa nini oyo tozali kolekisa wana ezali Molimo Mosanto kotánisa Liloba na Ye epai ya Mwasi ya libala lokola libosó naino soki moké te.

Makambo maye ntango mosúsu toyókaki, totangáki mpe toyekólaki bomoi na bisó mobimba mazali sikawa kokóma kozipolama mpe komónisama lokola libosó naino soki moké te.

Moto aziláki mpo na mbula nkóto na nkóto mpo ya mokolo oyo mpenza. Bango nyoso bazalaki mpe babóndelaki koyóka mpe komóna makambo mazali bisó komóna mpe koyóka. Ata basakoli ya ntango ya kala bazalaki na mpósa mingi mpe kokimela na mitéma mpo ya mokolo oyo. Boni balingaki komóna bokokisami mpe boyei ya Nkoló.

Ata bayekoli ya Yesu, Petelo, Yakobo, mpe Yoane, bato baoyo batambolaki mpe basolólákí na Ye, bazilákí mingi komóna mpe koyóka manso maye mabómbamákí. Babóndeláki ete Éfungolama mpe Émónisama na mokolo ya bango, na ntango ya bango.

Kati na Bileko Nsambo ya Lingómbá, motindami moko na moko, Paulo, Martin, mpe Luther, balingaki koyeba sekelé nyoso ibombámáki. Mposa ya bango ezalaki komóna bokokisami ya Liloba kosalema na ntango bazalaki na bomoi. Balingaki komóna boyei ya Nkoló.

Nzambe azalaki na etandelo. Nzambe azaláki na ntango. Nzambe azalaki na bato baoyo azaláki kotálela…BISÓ.

Kati na bileko, nyoso bakwéaki.

Kasi Ayebaki, na nzela ya boyebi na Ye makambo libosó, ekozala na bato moko: Mwasi Liloba na Ye ya nkembo Oyo abongi be. BAKOLINGA KOZÁNGELA YE TE. Bakokakola te LIKOLÓ NA LILOBA MOKO. Bakozala Mwasi Liloba na Ye moseka peto.

Ntango yango oyo. Eleko yango oyo. Bisó nde baponami baoyo Aziláki útá Adáma akweáki mpe abúngisaki makoki ma ye. TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA.

Nzambe atálisaki Yoane libosó galasísi ya manso maye masengelaki kosalema, kasi ayebaki ntina nyoso te. Ntango abiángamáki likoló, amónaki kati ya loboko mobali ya Ye oyo afandaki likoló na kiti ya bokonzi búku moko esilaki kokomama na kati, etiamaki elembo na bilembo nsambo, kasi moko oyo akokaki kofungola búku yango azalaki te.

Yoane agángáki mpe aleláki na biloko mingi mpenza lokola nyoso ebúngákí, elikia ezalaki te. Kasi lokúmu na Nkoló, moko na ba mpaka alobaki na ye: “Lelá te, zambí tála, Nkosi na libota na Yuda, Ntina na Dawidi, Asili kolonga kofungola búku, mpe kokangola bilembo yango nsambo”.

Nde ezalaki ntango. Nde ezalaki eleko. Nde ezalaki moto oyo Nzambe aponaki kokoma nyoso emonáki ye. Kasi ata ko bongo ndimbola na Yango nyoso eyebanáki te.

Nzambe azalaki kozila mpe kozila mbeki ya Ye eponamákí, motindami na Ye mwanje ya nsambo, koya na mabelé, mpo Ákoka kosalela mongóngó na ye kozala Mongóngó na Ye, epai ya Mwasi na Ye ya libala. Alingaki koloba mbebu na litói na ntina ete KOZANGA KOSÓSOLA ÉZALA TE. Ye bobele Ye moko, alingáki koloba mpe komónisa mabómbami ma Ye manso epai ya balingami na Ye babongisamáki libosó, babongi be, Mwasi na Ye ya libala, molingami ya motema…BISÓ!!

Boni Azilaki koyebisa bisó makambo maye manso ma bikamwa. Lokola mobali akoyebisa Mwasi na ye ete alingi ye lisúsu na lisúsu, mpe atikalá te kolemba koyóka yangó, Alingaka koyebisa bisó lisúsu na lisúsu ete Alingi bisó, Aponaki bisó, Azilaki bisó, mpe sikawa Azali koya mpo na bisó.

Ayebaki boni tokolinga koyóka Ye koloba Yango lisúsu na lisúsu, na bongo Atikakí Mongóngó na Ye mótiama na bande, na ntina ete Mwasi na Ye ya libala ákoka Kofina Play mokolo mobimba, mokolo na mokolo, mpe koyóka Liloba na Ye kotóndisa mitema mia bango.

Mwasi na libala na Ye molingami Asili komibongisa na bomíléísáká na Liloba na Ye. Tokoyóka eloko mosúsu te, bobele Mongóngó na Ye. Tokoki bobele kolia Liloba na Ye Peto lipesamákí.

Tozali na mitéma lúkulúku mpenza. Tozali koyóka Yango kati ya bomoto na bisó. Azali koya. Tozali koyóka mozíki ya makwéla kobeta. Mwasi ya libala abóngámí mpo átambola na elekelo.  Moto nyoso atélemi, Mwasi ya libala azali koya kozala na Mobali ya libala. Nyoso esili ebongisami. Ntango yango ekómí.

Alingi bisó lokola mosúsu te. Tolingi Ye lokola mosúsu te. Tokozala Moko elongó na Ye, mpe baoyo nyoso tolingí, kati na séko na séko.

Obiangámi koya komibongisa mpo ya makwéla elongó na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe komónisa Emóniseli, Mokapo Ya Mitano Eteni Ya I  61-0611.

Ndeko Joseph Branham

25-0112 Emóniseli, Mokapo Ya Minei Eteni Ya III

Nsango: 61-0108- “Emóniseli, Mokapo Ya Minei Eteni Ya III”

BranhamTabernacle.org

Balingami ya Sekó na Séko,

Ezali ntango ya kolongola ekoti na bisó ya etumba mpe koláta likanisi ya molimó, zambí Nzambe azali komilengele kopesa Mwasi na Ye ya libala Emoniseli ya Liloba na Ye koleka.

Akozala kozipwela bisó mabómbami manso ma eleko eleki. Akoyebisa bisó oyo ekosalema na mikolo mikoya. Oyo basúsu banso kati na Biblia bamónaki sé komóna to bayókaki sé koyóka, Akomonisa eteni moké moko na moko ya Liloba na ye mpe ntina na Yango epai na bisó.

Tokoyóka mpe kosósola ndimbola ya bilílíngí ya Biblia: Bizali na bomoi, Libeke ya Tala-tála,Nkosi, Ngombe, Moto, Mpongo, Ebónga na Ngolu, Bakéngeli, Mibangé, Mingóngó, Therion, Zoon.

Tokoyoka mpe kosósola nyoso na ntina na bakéngeli ya Kondimana ya Kala. Yuda: mokéngeli ya Ebimelo ya ntango; Efalaima: mokengeli ya Elimwelo ya ntango; Lubeni: mokengeli ya epai na Ngelè; mpe Dani: mokéngeli ya epai na Likoló.

Eloko moko te ekokáki koya esika soko nini zingázinga na ebóngá na ngolu wana ézánga koleka likoló na mabóta wana. Nkosi, mayele ya moto; Ngombe: mbaláta ya mosala; Mpongo: mbangu na Ye.

Boni Likoló, mabelé, na kati-káti, mpe zingázingá mobimba, bazalaki bakéngeli. Mpe likoló na yango ezalaki Likonzi ya Móto. Eloko moko te emamáki ebónga na mawa wana ézánga koleka likoló na mabóta yango.

Sikawa ezali na bakéngeli ya Kondimana ya Sika: Matai, Malako, Luka mpe Yoane, kokende alimá libosó. Ekuke ya Ebimelo ya ntango ekéngélami na nkosi, ekuke ya epai ya likoló ekéngélami na mpongo ya kopumbwa, Yoane, mopalanganisi ya nsango malamu. Na mbisa mónganga na ngambo oyo, Luka, moto.

Nsango malamu minei izali kobatela Lipamboli ya Pantekoste na Likomi moko na moko kokembisa mpenza oyo elobaki yango. Mpe sikawa Misala na bantómá ikondimisaka lelo elongo na Nsango malamu minei ete Yesu Klisto azali lolenge moko lobi, lelo, mpe libela.

Ntango mopakolami ya solo ya Nzambe alobí, Ezali Mongóngó ya Nzambe! Tolingi bobele kogánga: “Bule, bule, bule, epai na Yawe!”

Ezali na yango kaka te na nzela ya kotangwa na Yango. Likambo Ezali ete, tokokí kotangwa na Yango te, mpamba te Ekotangwa na bisó te. Totiami elembo kino na mokolo ya Lisiko na bisó. Eloko Ezali te na eleko ekoya, eloko te na eleko beébeé, makambá, nzala, mposá ya mai, kufa, to ELOKO TE, ekokoka kokabola bisó na bolingo ya Nzambe oyo ezali kati na Klisto Yesu.

Libosó ya bozalisi ya mokili nkombo ya bisó itiamaki likoló ya Búku ya Bomoi ya Mwana Mpate komóna Pole OYO, koyamba Mongóngó moye, koyamba Etindá oyo, koyamba Molimo Mosanto mpo na mokolo ya bisó mpe kotambola kati na Yango. Ntango Mwana Mpate abomámáki, NKOMBO YA BISÓ itiámáki na Búku na ntango YANGO moko Nkombo ya Mwana Mpate etiámaki kuna. NKEMBO!!

Na bongo, Eloko moko te ekoki kokabola bisó na Etindá oyo. Eloko moko te ekokabola bisó na Mongóngó yango. Eloko moko te ekoki kolongwela bisó Emóniseli ya Liloba oyo. Ezali ya bisó. Nzambe abiangaki bisó mpe aponáki bisó mpe abongisaki bisó libosó. Nyoso ezali ya bisó, Ezali nde ya bisó.

Ezali na nzela sé moko kozua oyo nyoso. Osengeli kosukwama na mái ya Liloba. Osengeli koyóka Liloba libosó ete ókoka kokóta na kati Kúná. Mpe ezali na nzela bobele moko okokí kobelema na Nzambe, yango na nzela ya Kondima. Mpe Kondima eyáka na nzela ya koyóka, koyóka Liloba ya Nzambe, oyo ezali kotálisama útá na esiká elekí Bule kati na motindami ya eleko.

Na bongo, awa, mwanje ya eleko ya lingomba azali kongengela kati na mái mangó Oyo Mobali oyo azali awa, kotálisa mawa ma Ye, Maloba ma Ye, kosambisa na Ye, Nkombo na Ye. Nyoso ezali komónisama na kati awa epai wapi okabwani na bondimáká Yango. Bosimbi yango?

Bótika te koyóka ba bande, bótikala kaka na Yango. Bótála-tala Yango na Liloba mpe bómóna soko Ezali soló. Ezali nzela ya Nzambe epésami mpo ya lelo.

Yaka komíbakisa na bisó na ntango oyo ya Malili makasi lokola tozali kosangana elongó longwá na zingázingá ya mokili mobimba mpe koyóka Mongóngó ya Nzambe komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala lokola libosó soki moké naino te. Ezali na kopakolama monene te koleka kofina play mpe koyoka Mongóngó na Ye.

Longwa na bozindó ya motema mwa ngai, Nakoki koloba: Nazali na nsai mingi Nakoki koloba ete Nazali Moko na Bango elongó na moko na moko na bino.

Ndeko Joseph Branham

 Liteya: 61-0108- “Emóniseli, Mokapo Ya Minei Eteni Ya III”

Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville

25-0105 Emoniseli, Mokapo Ya Minei Eteni Ya II

Nsango: 61-0101 Emoniseli, Mokapo Ya Minei Eteni Ya II

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala Lingombá ya Ndako,

Tika ete tóyangana banso elongó mpe tóyoka Liteya, 61-0101 Emoniseli, Mokapo Ya Minei Eteni Ya II na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

24-1231 Etumba

NSANGO: 62-1231 Etumba

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala,

Natii motema kondima ete moko na moko na bino alekisaki Noële moko ya káfúkafu elongó na baningá mpe libota na yo. Boni Nazali na matóndi lelo koyeba ete Nkoló na bisó Yesu akangámi na elíelo ya bibwélé te lokola mokili ezali komóna Ye lelo, kasi Azali na bomoi mpe na kati ya Mwasi na Ye ya libala, komimónisa Ye moko na nzela ya Mongóngó na Ye lokola libosó naino soko moké te, LOKÚMU NA NKÓLÓ. Lokola Nasiláki ko yebisa, Nalingaki kozala na Elámbo mbala moko lisúsu kati na ba ndako/ mangombá ya bisó na mpokwa libosó ya Mbúla ya Sika, nsaánzá ya Zómi na miibalé na mokolo ya nsánzá 31. Mpo na baoyo bakolinga kozala elongó na bisó, tokozala koyóka Liteya, 62-1231 Etumba, na nsima kokende mbala moko na molúlu ya Elámbo, oyo Ndeko Branham abandisí na bosúkisi ya Liteya.

Mpo ya bandimi ya awa epai na bisó, tokobanda bande na 7:00 nsima ya nzángá. Nde mpo na basúsu, baoyo bazuami nabisiká ya ngonga ikeséni, bolimbisi bóbanda Liteya na ntango ekobonga mpo ya bino. Nsima ya Ndeko Branham komema Liteya na ye ya pókwa libosó ya Mbúla ya Sika, tokotélemisa bande na nsúka ya molongó ya 59, mpe tokozala na minúti penepene na 10 wana pianó ekokóba kobeta moziíki lokola Tozali kolia Elambo ya Nkólo. Na nsima tokozóngela bande lokola Ndeko Branham azali kosúkisa losambo. Likolo ya bande oyo, atikákí eteni ya kosukolana makolo ya losambo, oyo bisó mpe tokotika.

Malako likoló na lolenge ya kozua vinyo, mpe lolenge ya kotumba lipa ya Elambo makoki kozuama na bikanganeli na nsé. Bokoki koyóka to komizuela Liteya ya lolaká longwa na website, to okoki bobele koyoka losambo koúta na Voice Radio likoló ya Lifeline app ( oyo ekoyókisama na Angelé na 7:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville.)

Lokola tozali kobelema na mbúla mosúsu ya mosalá epai ya Nkoló na bisó, tika ete tólimbola bolingo na bisó epai na Ye na boyókáká libosó Mongóngó na Ye, na nsima tika ete tósangana na Elámbo na Ye. Ntango ya nkembo mpe ya bosanto nini oyo ekozala lokola tozali kobónza lisúsu bomoi ya bisó na Mosala na Ye.

Nzambe apambola bino,

Ndeko Joseph

24-1229 Emoniseli, Mokapo ya Minei Eteni ya I

Nsango: 60-1231 Emoniseli, Mokapo ya Minei Eteni ya I

BranhamTabernacle.org

Balingami Babulami Baoyo balátisámí na Bilamba Pèmbé,

Ntango toyoki Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó, Eloko moko ekómaka kati na bozindó ya bomoto ya bisó. Bozali ya bisó mobimba bobóngólami mpe mokili zingázingá na bisó mozali komónana ete molimwí.

Boni nde moto akokí kolimbola oyo ezali kosalema kati ya mitema mia bisó, makanisi ma bisó, mpe bomoto na bisó, wana ezali Mongóngó ya Nzambe kozipola Liloba na Ye na Liteya Moko na moko Tozali koyóka?

Lokola mosakoli ya bisó, toyoki ete tomemámí kati na lóla ya misato mpe emonáni lokola ete molimo ya bisó ezali kolongwa na nzoto oyo ya kufa. Maloba mazali te kolimbola oyo tozali koyoka wana Nzambe azali kofungolela bisó Liloba na Ye lokola libosó naino soko moké te.

Yoane atiamaki na esanga ya Patámo mpe asengamáki kokoma yango emónaki ye mpe kotia yango kati ya búku moko ebiangamí Emononeli, na ntina ete ékoka kokita kati na bileko. Mabómbami mangó mabómbamákí kino mamonisameláki bisó na nzela ya motindami ya Ye mwanje ya nsambo oyo aponami.

Na nsima Yoane ayokaki Mongóngó yango moko likoló na ye mpe akamatamákí kati na lóla ya misato. Mongóngó yango motalisaki ye bileko ya lingomba, koya ya bayúda, kosopama ya malózí, Konetolama, Boyei lisúsu, Bokonzi ya mbula nkóto, mpe Ezalelo ya Sekó ya babíkisami na Ye. Azuaki ye na likoló mpe amónisaki likambo mobimba epai na Yoane lokola Alobaki Akosála.

 Kasi Yoane amonaki nini ntango amonaki likambo yango libosó? Moto moko te ayebaki mpenza kino lelo oyo.

Eloko ya libosó amónaki kati na Boyei ezalaki Mose. Atálisaki basanto baoyo bakúfi baoyo bakosekwa; bileko motoba nyoso baoyo balálákí.

Kasi bobele Mose te atelemáki wana, kasi Elia azalaki wana mpe lokola.

Elia yango Azalaki kotelema Azalaki nani?

Kasi Elia azalaki wana; motindami ya mokolo ya nsúka, elongó na Ebólo ya ye, ya babóngwani, baoyo Banétólámí.

 NKEMBO…ALELUYA…Nani nde Yoane amónaki kotelema kuna?

Mosúsu te kasi mwanje ya 7 motindami ya Nzambe, William Marrion Branham, na EBÓLO YA YE BABÓNGWANI, BANÉTOLÁMÍ…MOKO NA MOKO NA BISÓ!!

Elia atálisaki libóndo ya babóngwani. Bokanisa, Mose azalaki libosó, na nsima Elia. Elia asengelaki kozala motindami ya mokolo ya nsúka, ete elongó na ye mpe ebólo ya ye nde lisekwa likoya…ekoya li…boye, ekoya  Konetolama, Nalingi koloba. Mose ayeisáki lisekwa mpe Elia ayeisaki ebólo ya Banétolami. Mpe, kuna, bango nyoso mibale batalisamaki kuna mpenza.

Ata bolobaka na ntina ya kozipolama, komonisama, mpe Emoniseli.

Yango oyo! Tozali na yango awa mpenza na bisó elongo sikawa, Molimo Mosanto, Yesu Klisto, lolenge moko lobi, lelo, mpe libela. Bozali…Ezali koteyamela bino, Ezali kolakisamela bino, Ezali komeka kosala ete bómona nini nde ezali malamu mpe nini nde ezali mabe. Ezali Molimo Mosanto Ye Moko Koloba na nzela ya mbebu ya moto, kosala kati ya bato, komeka kotálisa mawa mpe ngolu.

Tozali Babulami tolati Bilamba Pembé baoyo mwanje na Ye amónaki baoyo baútaki na mabelé bipai nyoso kolia Lipa ya Bomoi. Tobandámí mpe tobaláni na Ye mpe toyóki Kopepwa yango ya bolingo kati ya motema na bisó. Tomibónzeli epai ya Ye, mpe bobele na Mongóngó na Ye. Tomíbebisí te, mpe tokomíbebisa te na mongóngó mosúsu ata nini.

Mwasi ya libala azali komílengele kobuta likoló lokola Yoane asalaki; kati na Bozali ya Nzambe. Tokozuama na likoló na Konetolama ya Lingomba. Boni yango ezali kobalola bomoto ya bisó!

Nini nde Akomonisa bisó na nsima?

Kosambisama; libanga ya saladi, mpe oyo etálisí; eteni oyo ezali kosala. Libanga ya Yasipi, mpe mabangá masúsu manso ndengé na ndengé. Akozua nyoso oyo kokita koleka na Ejekiele, kozonga na Genese, kozonga kuna na Emoniseli, kokita na kati-káti ya Biblia, kokangisa yango elongó; mabangá manso maye mpe lángi iye.

Ezali Molimó Mosanto yango moko, Nzambe yango moko, kotalisa bilembo yango mokó, bikamwiseli yango moko, kosala makambo yango moko bobele lokola Alakáki. Ezali Mwasi ya libala ya Yesu Klisto komibongisa na boyókáká Mongóngó na Ye.

Totómbeli bino boyei bolamu komibakisa na bisó lokola tozali kokóta kati na bisiká ya likoló na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka Elia, motindami ya Nzambe na eleko oyo ya nsúka, komónisa mambómvami  mabómbamákí kati na bileko.

Ndeko Joseph Branham

Liteya: 60-1231 Emoniseli, Mokapo ya Minei Eteni ya I

Bolimbisi bokanisa Liteya ya bisó ya Mbula ya Sika, Mokolo ya Mibale na mpokwa: Etumba 62-1231. Ezali te na nzela Malamu koleka kobanda Mbúla ya Sika.

24-1222 Likabo Ya Nzambe Lizíngámí

Nsango: 60-1225 Likabo Ya Nzambe Lizíngámí

BranhamTabernacle.org

Molingami Mama Yesu,

Oo Mpate Ya Nzambe, Ozali Likabo Monene ya Nzambe Lizingamí epai ya mokili. Opesi bisó Likabo monene koleka oyo epésámá ndèle, Yo moko. Libosó ete Ókela monzóto ya libosó, libosó ete Ókela mabelé, sánzá, etando ya mói, Oyebaki bisó mpe Oponaki bisó kozala Mwasi na Yo ya libala.

Ntango Omónaki ndèle bisó, Olingaki bisó. Tozalaki mosuni ya mosuni na Yo, mokuwa ya mokúwa ya Yo; tozalaki eténi ya Yo. Boni Olingaki bisó mpe Olingaki kozala na bisó na bondeko. Olingaki kokabola Bomoi ya Sekó na Yo elongó na bisó. Toyebaki ndèle, tokozala Mama Yesu ya Yo.

Omónaki ete tokokwéa, na bongo Osengélaki kopesa nzela ya kozóngisa bisó. Tobúngaki mpe na elikia te. Ezalaki na nzela bobele moko, Osengelaki kokóma “Bozalisi ya Sika”. Nzambe mpe moto basengelaki kokóma Moko. Osengelaki kokóma bisó, na ntina ete tókoka kokóma Yo. Na bongo, Otiaki etandelo na Yo monene kati ya mosala elekí Mbúla nkóto na nkóto kati ya elanga ya Edéne.

Ozilákí mpenza mingi kozala elongó na bisó, Mwasi na Yo ya libala Liloba oyo abongi be, kasi Oyebaki libosó Osengelaki kozongisa bisó na nyoso oyo ebúngaki na ebandeli. Ozilaki mpe Ozilaki mpe Ozilaki kino lelo oyo kokokisa etandelo ya Yo.

Mokolo yango ekómi. Ebólo moké wana Omónakí na ebandeli ezali awa. Molingami na Yo ya motema Oyo alingí Yo mpe Liloba na Yo koleka Eloko ata nini.

Ezalaki ntango mpo ya Yo koya mpe komímónisa Yo moko kati na mosuni ya moto lokola Osalaki na Abalayama, mpe lokola esaláki Yo wana ekómáki Yo Bozalisi ya sika. Boni Ozilaki mpo ya lelo oyo ete Ókoka komónisa bisó mabómbami na Yo nyoso minene oyo mabómbamákí longwa na Bozalisi ya mokili.

Ozali mpenza na lipambú na ntina ya Mwasi na Yo ya libala. Boni Olingaka kotálisa Ye mpe koyebisa Satana: “Ézala nini ozali komeka kosalela bango, bakoningana te; bakokakola te likoló ya Liloba ya Ngai, Mongóngó ya Ngai.

Bazali MWASI LILOBA YA NGAI ABONGÍ KWA.” Bazali bozéngá koleka epai na Ngai. Tala kaka bango! Kati na mimekano mpe bitumba ya bango nyoso, batikali sembo na Liloba ya Ngai. Nakopesa bango likabo ya lobiko na lobíko. Nyoso ezali Ngai, Napesi bango. TOKOZALA MOKO.

Nyoso tokoki koloba ezali: “YESU, TOLINGÍ YO. Tika tótómbela Yo boyei bolamu na ndako ya bisó. Tika ete tópakola Yo mpe tósukola makaká na Yo na mpisoli ya bisó mpe tópepwa yango. Tika ete tóyebisa Yo boni tolingí Yo.”

Nyoso oyo tozali, topesi na Yo Yesu.

Nde likabo ya bisó epai ya Yo YÉSUS.

Tolingí Yo. Tokumisi Yo. Tosambeli Yo.

Nabiangi moko na moko na bino komibakisa na bisó mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe yambá YÉSUS kati na ndako ya binó, kati ya lingombá ya binó, kati ya motuka na yo, epai sé epai okoki kozala, mpe óyamba Likabo monéne koleka oyo epésamelá ndèle moto; Nzambe Ye moko koloba mpe kozala na yo na bondeko.

Ndeko Joseph Branham

60-1225 Likabo Ya Nzambe Lizíngámí

LIYEBISI YA GODI

Molingami Mwasi Ya Libala,

Nkoló atiaki yango likoló na motema ya ngai kozala na Liteya mpe Losambo ya Elámbo Godi Libosó ya Mbúla ya sika lisúsu na mbúla oyo. Eloko monene koleka nini oyo tokokaki kosala, baninga, koleka koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó, kosangana na Elambo ya Nkoló, mpe kobónzela Nzambe bomoi ya bisó lisúsu na Mosala na Ye na bokóti kati na Mbúla ya sika. Ntango mosanto nini oyo ekozala kokanga mokili libandá, mpe kosangana na Mwasi ya libala mpo ya koyangana ya godi oyo kati ya Liloba, lokola Tozali koloba útá na mitema ya bisó: “Nkoló limbisa bisó na mabunga nyoso tosalaki kati na Mbúla mobimba; sikawa Tozali kobelema na Yo, kosenga ete soko Okozua lobóko na bisó mpe kokamba bisó na Mbúla oyo ezali koya. Tika ete tósalela Yo koleka lolengé tosálá ndèle, mpe soko ekozala na Mokano na Yo ya Bonzambe, tika ete ézala Mbúla ya konétolama monene oyo ekosálema.

Nkoló, tolingi na bisó bobele kokende Ndako kobika elongó na Yo kati na Seko na Seko.” Nakoki kozila te koyangana zíngázíngá na Kiti ya Bokonzi mpo ya losambo ya komibúlisa lisúsu oyo ya godi, Lokúmu na Nkoló.

Mpo ya bandimi kati ya Jeffersonville mpe zíngázingá, Nakolinga kobanda bande na 7:00 nsima ya nzángá na ngonga ya bisó ya awa. Liteya mobimba mpe Elambo ikozala likoló na Voice Radio na ntango yango, lokola tosalaki mbala eleki. Tokozala na vinyo ya Elambo ebongisamina Mokolo mwa Misato, sánza ya Zómi na mibalé mokolo ya sánza 18, kobanda 1:00-5:00 nsima ya nzángá, Mpo ya binó kozua na litongi ya YFYC.

Mpo ya baoyo kati na bino libándá ya Jeffersonville mpe zingázingá, bózala nsómí kozala na losambo godi oyo na ntango ekoki mpo na bino.

Tokozala na ekanganeli ya internet na Litéya mpe losambo ya Elámbo nsima mingi te.

Lokola Tozali kobelema na Eyenga oyo ya Noële, Nalingi kotómbela yo mpe libota na yo ELEKO YA EYENGA MALAMU MINGI mpe ya BOBATELAMI, mpe CHRISTmas Elámu, itondi na esengo ya Nkoló Yesu oyo asekwí…LILOBA.

Tika ete Nzambe Apambola bino,

Ndeko Joseph

24-1208 ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA

Nsango: 60-1211E ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Baponami,

Tala, Natelemi na ekuke, mpe nazali kobeta: soko moto nani akoyóka Mongóngó na Ngai, mpe akofungola ekuke, Nakokóta epai na ye, mpe nakolia elambo elongó na ye, mpe ye elongó na Ngai.

Batei, bófungwela mwanje ya Nzambe bikuke na bino libosó ete ntango éleka. Bózongisa Mongóngó ya Nzambe na bitéyelo ya binó na nzela ya boyókisaká ba bande. Yango kaka nde Mongóngó ya Nzambe mondimísámí mpo ya mokolo ya bisó na Maloba mazángí kokwéa. Yango bobele nde Mongóngó mozali na Oyo Elobí Nkoló. Ezali Mongóngó sé moko Mwasi ya libala nyoso akoki koloba AMEN na yango.

Ezali eleko monene koleka ya ntango nyoso. Yesu azali kopesa bisó ndimbola ya Ye moko lokola mikolo ya ngolu na Ye mizali kosila. Ntango ekómí na nsuka. Amonisi bizaleli ya Ye mpenza epai ya bisó na eleko oyo ya nsuka. Abwakeli bisó líso ya nsuka na Bonzambe ya Ye moko ya ngolu mpe oyo etómbwí koleka. Eleko oyo Ezali Emoniseli ya libánga ya motó ya Ye moko.

Nzambe ayaki kati na eleko oyo ya Laodikia mpe Alobaki Kati na mosuni ya moto. Mongóngó na Ye etiamáki na bande mpe ebómbamáki kokamba mpe kobongisa be Mwasi na Ye ya libala Liloba. Ezali na yango kaka na Mongóngó mosúsu te oyo ekoki kobongisa be Mwasi na Ye ya libala kasi Mongóngó na Ye Moko.

Kati na eleko oyo ya nsuka, Mongóngó na Ye likoló ya ba bande motiámí pembéni; mobimísámí na mangombá. Bakoyóka na bango ba bande kaka te. Na bongo Nzambe alobi: “Natemeli bino nyoso. Nakosánza bino na monoko na Ngai. Nsuka yango oyo.”

“Mpo ya bileko nsambo kati ya nsambo, Namóní eloko te kasi bobele bato kokúmisa liloba ya bango moko likoló ya oyo ya Ngai. Boye na nsuka ya eleko oyo Nazali kosanza bino na monoko na Ngai. Nyoso esílí. Nakoloba nyoso polélé. Ee, Nazali awa kati ya Lingomba. Amen ya Nzambe, mokáno ya sémbo mpe ya solo akomimónisa Ye moko mpe ekozala na nzela ya MOSAKOLI NA NGAI.”

Lokola ezalaki libosó, bazali kopota kosala lokola esálaki ba tata na bango kala na mikolo ya Akaba. Ezalaki na nkámá minei na bango mpe bango nyoso bazalaki na boyókani; mpe na bolobaká bango nyoso eloko yango moko, bazímbísaki bato. Kasi mosakoli MOKO, KAKA MOKO, azalaki solo mpe basúsu banso bazalaki lokutá mpo ete Nzambe apesaki emóniseli BOBELE epai ya MOKO.

Oyo ezali te koloba ete batéyi nyoso bazali lokutá mpe bazali kozimbisa bato. Soki te ezali Ngai koloba ete moto na ebiangeli koteya akoki te koteya to kolakisa. Nazali koloba ete bótáno ya lotómo ya SOLO akotia BA BANDE, Mongóngó ya Nzambe epai ya Mwasi ya libala, lokola Mongóngó ya litómbá koleka bo SENGELI KOYÓKA. Mongóngó likoló ya ba bande nde Mongóngó bobele moko mondimísamáki na Nzambe Ye moko kozala Oyo Elobí Nkoló.

Bókeba na basakoli ya lokutá, zambí bazali ba ngombólo ya kopasola-pasola.

Bokoyeba boni na  bosolo nzela malamu mpo ya lelo? Ezali na kokabwana ya ndenge wana kati ya bandimi. Ebólo moko ya bato balobi ete bótáno ya lotómo ya botéi nde ekokómisa Mwasi ya libala na bobongi be, nzokande mosúsu balobi Finá kaka Play. Tozali bato ya kokabwana te; tosengeli nde kosangana lokóla MWASI YA LIBALA MOKO. Eyano ya malamu nde nini!?

Tika ete tófungola mitema na bino elongó mpe tóyóka oyo Nzambe azali koloba kati na mosakoli na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala. Zambi biso nyoso tondimáni ete, Ndeko Branham azali motindami na Ye mwanje ya nsambo.

Likoló kaka na ezaleli ya bomoto yango moko, moto nyoso Ayebi ete epai wapi bato bazali mingi ezali kútu na bokeseni likoló na makambo miké-miké kati na lilakisi monéne oyo bango nyoso bazali kosimba elongó. Nani ko nde akozala na nguya ezangi kokwéa oyo esengeli kozongisama na eleko oyo ya nsuka, zambí oyo na eleko ya nsúka ekozónga nsima komónisa Mwasi ya libala Liloba Peto? Elingi koloba tokozala na Liloba mbala moko lisúsu lokola epesamákí, mpe esósólamákí na bobongi be kati na mikolo ya Paulo. Nakoyebisa bino nani nde akozala na yango. Ekozala mosakoli lokola mobimba mpenza andimísamaki, to kútu mingi andimísamáki mobimba mpenza koleka mosakoli ata nani mosúsu kati na bileko nyoso kobanda Enoka kino lelo oyo, mpo ete moto oyo akozala solo mpenza na lotómo ya lisakoli ya libángá ya motó, mpe Nzambe akomónisa ye polélé. Akozala te na bosengá ya koloba mpo na ye moko, Nzambe akoloba mpo na ye na nzela ya mongóngó ya elembo. Amen.

Na bongó, Etindá oyo elobamákí na nzela ya motindami na Ye epésamákí na bobongi be, mpe esósólámi na bobongi be.

Eloko mosúsu nini nde Nzambe alobaki na ntina ya motindami na Ye mwanje ya nsambo mpe Etindá na Ye?

  • Akoyoka bobele koúta na Nzambe
  • Akozala na “oyo elobi Nkoló mpe akoloba mpo na Nzambe.
  • Akozala mokoko ya Nzambe.
  • Akozóngisa, LOKOLA ELOBAMI KATI NA MALAKI 4:6, MITEMA YA BANA EPAI YA BA TATA.
  • Akozóngisa baponami ya mokolo ya nsúka mpe bakoyóka mosakoli andimísámí kopesa solo mpenza lokola ezalaki na Paulo.
  • Akozóngisa solo lokola bazalaki na yango.
  •  Na nsima Alobaki nini na ntina na bisó?

Mpe baponami wana elongó na ye na mokolo wana bakozala baoyo solo mpenza bakomónisa Nkoló mpe bakozala Nzóto ya Ye mpe kozala mongóngó ya Ye mpe kosala misalá na Ye. Aleluya! Bomóni yango?

Soko bozali naino na ntembe ya motindo nini, bósenga Nzambe na nzela ya Molimó na ye átóndisa bino mpe ákamba bino, mpo ete Liloba lilobí: “BAPONAMI YA SOLO BAKOZIMBISAMA TE”. Ezali na moto ata moko te akokoka kozímbisa bino soko bozali Mwasi ya libala.

Ntango ba Metodisiti bakwéaki Nzambe atémisaki basúsu na boye ekóbaki kati na ba mbúla kino na Mokolo oyo ya nsúka ezali lisúsu na libota mosusu kati na mboka, Baoyo na nsé ya motindami ya bangó bakozala mongóngó ya nsúka na eleko ya nsuka.

Ee mobali. Lingombá ezali lisusu “monoko” ya Nzambe te. Ezali monoko na yango moko. Boye Nzambe Azali kobalukela ye. Akobúlunganisa ye na nzela ya mosakoli mpe Mwasi ya libala, mpo ete mongóngó ya Nzambe ekozala kati na ye. Ee, ezali boye, zambí elobí kati na mokapo ya nsúka ya Emóniseli molongo ya 17: “Molimo mpe mwasi ya libala balobi: “Yaka.” Mbala moko lisúsu mokili ekoyoka mbala moko alimá longwá na Nzambe lokola na Pentekoste; kasi na solo mpenza Mwasi Liloba yango akobóyama lokola na eleko ya libosó.

Mwasi ya libala azali na mongóngó, kasi ekoloba bobele oyo ezali likoló ya ba bande. Mpo ete Mongóngó yango ezali MBALA MOKO KOUTA NA NZAMBE, boye esengeli na ndimbola moko te lokola epésamáki na bobongi be mpe esósólámí na bobongi be.

Bóya komíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó yango komónisa biso: Eleko Na Lingombá Ya Laodikia 60-1211E.

Ndeko Joseph Branham

24-1201 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei

Nsango: Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei 60-1211M

BranhamTabernacle.org

Mbote Baningá,

Naino libosó te kati na lisoló ya mokili mobimba etíkalá kozala na ntango nini Mwasi ya libala ya Klisto kati ya molongo akokaki kosangana elongó na lobánzo moko, wana lokito longwa na Likoló, Mongóngó mpenza ya Nzambe, kokita na makasi nyoso.

Makomí mazali kokokisama. Ezali ntango ya elembo ya kosangana ya Mombóto. Lisangá lizangí komónana ya Mwasi ya libala ya Klisto lizali kosalema lokola Tozali kofanda kati na Bozali ya Mwana, kotela, komiléngela na boyókaká Mongóngó mpenza ya Nzambe.

Tozali kobonga be na nzela ya bótáno ya lotómo na Ye.

 Bato boni bandimaka ete makabo mpe bibiangeli izali libandá ya mbóngwana ya motema? Biblia elobi ete makabo mazali matáno kati ya lingomba. Nzambe atiaki kati ya lingomba Bantómá, to batindami, ba ntómá, basakoli, balakisi, bapalanganisi ya Nsango malamu, babáteli.

  • Motéi: Nakokaki kokende kati ya balabála. Moto moko akoloba: “Ozali motéi?” Mbe Nakoloba: “Ee mobali. Oo ee, Nazali motéi.”
  • Molakisi: Mpe sikawa ntina Nazui Soki moké te koteya na ntóngó oyo, ezalaki mpo ete, Nakanisaki, kati na bolakisáká, tokosósola yango malamu koleka na esiká ete tózua kaka nkomá Mpe tópumbwa koleka yango lokoló. Mbe tólakisa yango bobele kolakisa.
  • Ntómá: Elobelo “motindami” elingi koloba “oyo atíndámí.” Ntómá elingi koloba oyo atindami. Motindami Azali ntómá. Na—Na, Nazali motindami, Lokola boyebi, Nasálaka bopalanganisi nsango, mpe mosala ya motindami, penepene mbala nsanbo ngámbo ya bibale minene, kati na mokili mobimba.
  • Mosakoli: Ondimí ete Nazali mosakoli ya Nzambe? Na bongo kendé salá oyo eyebisi ngai yo ete ósála.
  • Mobateli: Boyebí nde yango esaleli ngai bino? Bobiangí ngai mobateli ya bino, mpe bolobi malamu, mpo yango nde Nazali.

Mpe Namónaki nkóto mbala nkóto wana kotelema kuna, Nalobaki: “ Bazali bango nyoso ba Branham?” Alobaki: “Te” Alobaki: “Bazali bandimi na yo.” Mpe Nalobaki, Na—Nalobaki: Nalingi námona Yesu.” Alobaki: “Nano te. Ekozala na ntango libosó ete Áya. Kasi Akoya epai na yo libosó mpe okosámbisama na Liloba otéyákí.

Nsima bisó nyoso tokotómbola mabóko ya bisó mpe tokoloba: “Tozali kopéma likolóna yangó!”

Eloko moko elingí kosálema. Nini nde ezali kokóma? Bakufi kati na Klisto babandí kosekwa zingázingá na ngai. Nazali koyóka mbóngwaná koya kati na nzóto ya ngai. Nsúki pémbé ya ngai, ekei. Tálá elongi ya ngai…masusá-masusá ma ngai manso malímwí. Bolózí mpe mpasi ya ngai…iLONGWÍ. Koyóka mawa mingi kolémwa na motéma elímwí na pwasa. Nabóngwani na mwa ntango moké, na kobweta líso.

Na nsima tokobanda kotala zingázíngá na bisó mpe komona balingami na bisó. Oo, oo, tálá Mama na Tata…Nkembo, mwana ya ngai mobali…mwana na ngai mwasi. Tatá kóko, Mamá kóko, oo Nazangi bino nyoso mibalé mingi mpenza.

Ée…tálá moningá na ngai ya kala wa motema. OO BÓTALA, ezali Ndeko Branham, mosakoli ya bisó, Aleluya!! Ezali awa. Ezali kosálema!

Na nsima elongó, nyoso na mbala moko, tokokamatama na likoló libandá kuna esikâ moko boye kati na etando mosiká na mabelé. Tokokútana na Nkólo na nzela na Ye kokita. Tokotema wana elongo na Ye likoló ya mabúngútulú ya mabelé oyo mpe koyemba nzembo ya lisiko. Tokoyemba mpe kokúmisa Ye mpo ya ngolu na Ye ya lisiko oyo Apesi bisó.

Nini nyoso nde ezali kati na ebómbelo mpo ya Mwasi na Ye ya libala. Ntango nini oyo tokozala na yango kati na séko na séko moto na moninga na ye, mpe  Nkoló na bisó Yesu. Maloba ya bato ya kokúfa makoka te kolimbola, Nkoló, boni Tozali koyóka na mitema mia bisó.

Soko olingi koyóka Ye kobianga yo Mwasi na Ye ya libala, mpe koyebisa yo oyo ekoúlanama na yango elongó na Ye, yaka komíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe okopambolama na epimeli te.

Ndeko Joseph Branham

60-1211M Baseka Zómi, Mpe Bayúda Nkóto Mokámá Na Ntúkú Minei Na Minei

An Independent Church of the WORD,