Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Quote of the Day
August 15, 2026

62-0117 Kokáta likambo libosó ya ntango

Moto moko alobákí, “ Tíká kàka makanisi na yo másila sikawa. Tálá kàka mbala moko alimá epai ya likoló na misándá. Tíká makanisi na yo másila. O kobíka likambo moko.” Mpe na ntembe te nde oyo osáli. Ezali solo. Kasi, obíkí likambo moko boye, kasi nde likambo ya lolenge nini? Bomóní, ntango osálí yango, ofungóli na yo kàka bomoto na yo epai ya Satána. Akopesa yo eloko moko boye. Ezali solo.

Kasi, Nakanisi, moto oyo azali koya epai ya Klisto asengélákí koya na mayele na ye nyoso azali na yango, mpe kozóngela kati na makanisi na ye, ntango ayei epai na Ye, elaká moko na moko oyo ezali kati ya Makomi. Bátélá makanisi na yo na bokéngi, ntango oyéí epai na Klisto. Kotika yango ésíla te. Zábolo akosálisa yo likambo ata nini. Bomóní? Ekopesa yo eyókeli moko boye. Akokí kosála yango, mpe lokóla. Kasi olingí óbika likambo, eloko moko boye oyo Biblia elakísí, eloko moko boye oyo ezali eloko yango mpenza.

Lípa Ya Mokolo na mokolo

II Timote 1: 12

…Nayebí nani nde Nandimeli, mpe Nandimisámí ete azali na makokí ya kobátela yango etikí ngai epai na Ye kino na mokolo yango.

Na Mokolo Oyo

50-0815 Nzambe azali nani?

55-0815 Kobunda Na Etíngiá Nyoso Mpo Ya     Kondima Epésámélákí Babulami Mbala Moko Mpo ya libélá.

56-0815 Kondima

59-0815 Lokola Mama Mpongo Apanzí Nzubu na Ye.

65-0815 Mpe Oyébí Yango Te

An Independent Church of the WORD,