20-0712 Konetolama

Ba-Mpongo Bazali Kosangana_– 11 juillet 2020

Balingami Bana-mibali pe bana-basi oyo bamonisami,

Nkombo na Nkolo ekumisama mpo na Bilei na Ye oyo Ebombamaki. Mwasi-na-libala azali kosala féti mokolo na mokolo kolia Mana Oyo Ebombamaki. Nsango sima na Nsango Azali kokoba koyebisa biso:”Ba-Bandes, ba-Bandes, ba-Bandes; YANGO ezali Bilei na Ngai ya Molimo oyo esengeli kopesa bino mpiko, mpo bozali Mwasi-na-libala na Ngai oyo abongisama liboso.”

Tosengeli mpenza na makambo mingi koleka oyo ezwami na ba-bandes? Eloko mosusu ezali oyo tosengeli koyoka? Motindami na Ye asengaki ata na Tata ete amonisa na mokengeli eloko nini asengeli koleisa na Lingomba na ye ntango ye akozala te.

Pambola mokengeli molingami na biso, mobateli-mpate. Tobondeli ete Opakola ye na Molimo Mosanto, na Liloba na Yo mpo na komonisa bango pe koleisa ba-mpate. Pe mokolo moko, kala mingi te, Otalisaki emoniseli ya mongombo moke awa, na ntina na Bilei oyo ebombamaki, ete ntango moko ekoya oyo bato bakosengela na yango nyonso.

Ba-bandes ezali Bilei Oyo Ebombamaki pe esengeli na  mokengeli mpo na koleisa ba-mpate. Asengelaki koleisa bango na koloba boye:”Fina bouton ya Koyoka liteya.”

Bososoli yango? Soki bobungi nzela, bozongela bande oyo lisusu. Nayebi te ntango boni nakoumela kozala elongo na bino. Bomikanisela, likambo oyo ezali Solo, ya YANGO ELOBI NKOLO. Ezali Solo. Ezali Makomi.

Nazali kozongisa matondi mingi  mpo na kozala na emoniseli yango pe kozala moko kati na lotomo ya monene koleka na mokili : Lotomo na Ye ya ba-Bandes.

Nazali kososola ete nazali koloba na bato nkoto na nkoto, na nzela ya bande, boyebi, pe tozali na lotomo ya ba-bandes na mokili mobimba.

Alobaki na biso ete Nzambe, liboso mokili esalema mpenza, azalaki na ba-mwango misato na sekele ya libombami monene na Ye. Ya liboso, komitalisa mobimba Ye moko kati na Klisto. Ya mibale, kozala na esika ya liboso mpo na komitalisa Ye moko na nzela ya Lingomba na Ye, oyo ezali biso, Mwasi-na-libala na Ye. Pe, ya misato, kozongisa Bokonzi na esika na yango mpenza oyo ekweyaki na masumu na nzela ya Adama ya liboso.

Sikawa, elaka yango ezali kokokisama. Klisto asili koya kati na Mwasi-na-libala na Ye, azali kosala misala ndenge moko Asalaki na ebandeli, pe azali kolengela pe kokokisa Liloba na Ye. Motò na Nzòto ezali kokoma eloko Moko na misala, na elembo, pe na Bomoi, ndenge Alakaki ete Akosala na mikolo ya suka.

Tozali Mwasi-na-libala na Ye, Nzoto ya Yesu Klisto, pe tokoki koyoka bobele Liloba na Ye oyo etatolami. Mpo tozali Liloba oyo ebakisami na Liloba, kobakisa na Liloba, yango nde ekomema epimelo mobimba ya Mwasi-na-libala ya Nkolo Yesu Klisto.

Tozali koyoka Nzambe oyo amonisami na nzoto pe azali koloba na Mwasi-na-libala na Ye. Sikawa tosili kokumba zemi ya Molimo na Ye. Klisto azali kobika na nzela na biso pe na kati na biso. Tosili kokoma bakangami ya eloko mosusu te, bobele Liloba na Ye. Tokoki kosala ekobo te; tosili mpenza kokumba zemi ya Liloba na Ye.

Mwasi-na-libala asili komibongisa Ye moko na nzela ya koyoka Liloba oyo esilaki kobongisama mpo na eleko na biso. Ntango esili kokoka, Konetolama ebelemi, pe tozali kokoma elonga na Ye.

Wana tokosangana elongo mokolo na Lomingo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville mpo na koyoka nzela na Ye oyo ebongisama mpo na eleko na biso, tobongisa minda na biso pe tomilengela biso moko wana tokoyoka liteya oyo “KONETOLAMA”, eteyamaki mokolo ya 4 décembre 1965.

Ndeko Joseph Branham