25-0803 MAKAMBO MASENGELI KOZALA

Nsango: 65-1205 MAKAMBO MASENGELI KOZALA

BranhamTabernacle.org

Balingami Misalá Ya Nzambe,

Liloba moko na moko oyo esolólamákí kati na Etindá oyo ezali mokandá ya bolingo epai ya Mwasi na Ye ya libala. Kokanisa ete Tata na bisó na Lóla alingí bisó mingi mpenza, na motindo ete Alingaki kaka tótánga Liloba na Ye te, kasi Alingaki tóyóka Mingóngó na Ye koloba na mitéma mia bisó ete Ákoka koyébisa bisó:
“ Bozali Liloba na Ngai ya bomoi, mosala na Ngai ya bomoi, ete Nákoka kotálisa yango polélé na mokili.”

Na bongo kokanisa ete nsima ya mbeka nyoso ya Ye Asálaki awa na mabelé, bomoi Abíkaki, nzela Atámbólaki, Asengaki bobele eloko moko:

“Ete epai ezali Ngai, bazala mpe wana lokola.” Asengaki bondeko na bisó, nde eloko moko kaka Asengaki Tata kati ya libondeli, boningá ya binó libela.

Epai wapi ezali Ngai, “Liloba na Ye,” tózala mpe wana lokola, koyamba bondeko na Ye, boningá na Ye, libela. Na ntina wana, esengeli tóbíka na Liloba moko na moko lilobaki Ye na bisó likoló ya ba bande mpo ya kozala Mwasi Liloba na Ye Moseka, oyo ezali kosala bisó eteni ya Mobali ya libala.

Nde Emoniseli ya Yesu Klisto kati ya ngonga oyo. Ezali te Oyo ezalaki Ye na ngonga mosúsu, oyo ezali Ye SIKAWA. Liloba mpo ya lelo. Wapi Nzambe azali lelo. Nde Emoniseli mpo ya lelo. Ezali sikawa kokóla kati ya Mwasi ya libala, kokómisa bisó na litongi mobimba ya bana ya Nzambe mibali mpe basi babongi be.

Tozali komimóna kati na Liloba na Ye. Toyebí tozali ba nani. Toyebi tozali kati ya manáka ma Ye. Oyo nde nzela ya Nzambe epesámí mpo ya lelo. Toyebí Konétolama ebelemi. Ekoúmela te balingami na bisó bakomónana. Bongo tokoyeba: Tosili tokómí.
Tozali bisó nyoso kokende na Lóla…ee, Lola, esiká mpenza ya solo kaka lokola oyo.

Tozali kokende na esiká ya solo epai wapi tokosála makambo, epai wapi tokobika. Tokosála misálá. Tokosepela. Tokobíka. Tozali kokende na Bomoi, na Bomoi ya Sekó ya solo. Tozali kokende na Lóla, na paladíso. Kaka lokóla Adáma na Ewa basálákí, mpe babíkákí, mpe baliaki, mpe basepélákí, kati na elanga ya Edéne libosó ete lisúmu líkóta, tozali mbala moko kozonga kuna lisúsu, kozonga, kozonga nsima. Adama ya libosó, na nzela ya lisúmu, abimísaki bisó libandá. Adama ya mibalé, na nzela ya boyengebene, azali kozongisa bisó na kati lisúsu; kolóngisa bisó mpe kozongisa bisó na kati.

Moto akokí nde kotia na maloba loléngé nini oyo elingí koloba epai na bisó? Solo ete tozali kokende na paladíso epai wapi tokobika kati na Sékó elongó. Mitungisi lisúsu te, mpasi to mawa, bobele bobongi be likoló ya bobongi be.

Mitema Mia bisó mizali kosepela, milimó mia bisó mizali na móto kati na bisó. Satana azali kotia likambá likoló ya likambá likoló na bisó mokolo na mokolo, kasi tozali naino kaka kosepela.
Mpo ya nini:

● TOYEBÍ, TOZALI BA NANI.
● TOYEBI, TOZÁNGÉLI YE TE, MPE TOKOZÁNGELA YE TE.
● TOYEBI TOZALI KATI YA MOKANO MWA YE MOBONGÍ BE.
● TOYEBI, APESI BISÓ EMONISELI YA SOLO YA LILOBA NA YE.

Ndeko Joseph okomaka likambo yango moko póso na poso. NKEMBO, Nakokoma yango póso nyoso mpo Alingí bóyeba boní Alingí bino. Baoyo bozali. Wapi ezali bino kokende. Elílí ezali kokóma elóko ya solo. Bozali Liloba kokóma Liloba.

Molingami mokili, yaka komíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, na ekanganeli ya biyókeli, te mpo ete “Na” biangí yo, kasi mpo ete “A” biangí yo. Te mpo ete “Na” poní bande, kasi koyóka Liloba elongó na eteni ya Mwasi ya libala zingázingá ya mokili mobimba banso na ntango yangó moko.

Tokoki nde kosósola ete ekokí mpo ya Mwasi ya libala koyóka Mongóngó ya Nzambe zíngazíngá ya mokili, banso na ntango yango moko mpenza? Esengeli bobele kozala Nzambe. Nzambe asálakí ete mosakoli na Ye ásala yango ntango mwanje na Ye azalaki awa na mabelé. Ayíkisáki Mwasi ya libala mpiko kosangana kati na libondeli, BANSO NA NTANGO YANGO MOKO YA JEFFERSONVILLE, 9:00, 12:00, 3:00; elekí monene boni sikawa, ete Mwasi ya libala akoki kosangana lokola MOKO koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba na bango banso na ntango yango moko?

Ndeko Joseph Branham

Litéya: Makambo Masengélí Kozala 65-1205
Makomi:

St. Matayo 22:1-14
St. Yoane 14:1-7
Baebele 7:1-10