Nsango: 63-0318 Elembo Ya Liboso
- 25-0316 Elembo Ya Liboso
- 23-0723 Elembo Ya Liboso
- 22-0130 Elembo Ya Liboso
- 21-0124 Elembo Ya Liboso
- 19-0331 Elembo Ya Liboso
- 17-0325 Elembo Ya Liboso
BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA
Mokolo ya 23/01/ 2021
Molingami Mwasi na libala ya Wolo ya Peto,
Bokosepela kotanga mokanda ya bolingo oyo euti na Nkolo na biso Yesu bobele mpo na bino? Bokosepela koyoka Ye kolobela bino eloko nini Ye akanisaka mpo na bino?
“ Mpo na Ngai, bino bozali lokola Wolo ya Peto; boyengebene na bino ezali boyengebene na NGAI. Bizaleli na bino ezali bizaleli ya nkembo ya NGAI moko. Lolenge na bino mpenza ezuami na kati na NGAI. Oyo NGAI NAZALI, bino bozali kotalisa yango polele. Oyo NGAI NAZALAKI, ezali komonisama na kati na bino. Libunga ata moko te ezali na kati na bino. Bino botondisami na nkembo, na kati pe na libanda. Longwa ebandeli kino suka, bozali mosala na NGAI, pe misala na NGAI nyonso ezalaka ya kobonga be. Na bosolo, mayele ya seko pe mwango na NGAI MOKO esili kotiama na kati na bino. ”
Moto akoki kososola mosanda na yango ndenge nini? Moto akoki kososola yango ndenge nini? Ata tokoki kosala yango te, tokoki koyamba yango na nzela ya kondima, mpo Nzambe asili koloba yango.
Ye alingaka mpenza biso mingi koleka na lolenge ete Aponaki biso mpo na komonisa biso mabombami na Ye nyonso ya minene.
Biblia ekomamaki liboso na kozalisama ya mokili. Pe Klisto, lokola Mwana-na-mpate, abomamaki liboso na kozalisama ya mokili. Pe bino, Mwasi-na-libala na Ye, nkombo na bino ekomamaki na kati ya Buku na Bomoi ya Mwana-na-mpate liboso na kozalisama ya mokili.
Kasi, mabombami nyonso oyo esilaki kokangama na bilembo na bileko oyo eleki. Tozalaki na bosenga ya Tata Mosikoli moko mpo aya kosenga baoyo ya Ye, kasi ezalaki ata na moto moko te oyo akokaki kosala yango; moto moko te na Lola, moto moko te na mokili, moto moko te na nse ya mabele. Ezalaka na moto moko te oyo azalaki ata na makoki ya kotala Buku yango.
Na sima, Mwana-na-mpate abelemaki longwa na Kiti-na-bokonzi, azalaki na Makila na nzoto na Ye mobimba. Ezalaki bobele Ye nde azalaki na makoki yango. Kasi mpo ete mwango monene ya Nzambe ekokisama na mobimba, Asengelaki kozala na moto moko oyo Ye akokaki komona ete azali na makoki mpo Ye amonisa mabombami minene na Ye na moto yango, mpo na bato oyo Ye alingaki komonisa bango Yango.
Ye asilaki kopona mwanje na Ye ya nguya mpo na komonisa Yango na ye liboso na kozalisama ya mokili, pe etonga ya bato ya lolenge mosusu oyo Ye abengaki Mwasi-na-libala na Ye. Nkombo ya mwanje na nguya yango ezalaki William Marrion Branham. Etonga ya bato ya lolenge yango ezali BINO, Mwasi-na-libala na Ye oyo abongisama liboso.
Pe Azuaki Buku, (nkembo!) afungolaki Buku, pe abukaki Bilembo yango; pe atindaki Yango awa na nse, epai ya mwanje na Ye ya nsambo, mpo amonisa Yango na bato na Ye!
Tozali mpenza kozongisa matondi mpo na koyeba ete biso tozali bato na Ye, baoyo mwanje motindami na Ye ya nsambo azali komonisa yango.
Mabombami minene mosusu nini oyo esilaki kobombama longwa kozalisama ya mokili ekomonisamela bison a eleko ya malili oyo?
Na sima, ekomonisama ba-Nkake nsambo oyo ebombama, oyo ekomama pe ata moke te. Ezali solo. Pe nandimi ete, na nzela ya Ba-nkake nsambo yango, ekomonisama na mikolo ya suka mpo na kosangisa Mwasi na libala mpo na kondima ya konetolama.
Mabombami nyonso esilaki komonisama na mwanje motindami na nsambo ya Nzambe. Ezali bobele ye moto akoki komonisa yango na Mwasi na libala na Ye. Na sima libombami ya Nkake Nsambo ezali na kati ya Nsango oyo. Nandimi ete Yango ezali komonisala sikawa mpo na kosangisa Mwasi na libala mpo na kondima ya konetolama.
Kasi nazobanza ete, ntango mabombami yango ekobanda komonisama, Nzambe alobaki: ”Bomba yango. Zela mwa moke. Nakomonisa Yangon a mokolo wana. Kokoma Yango ata moke te, Yoane, mpo ete bakobeta libaku na ntina na yango. Tika yango bongo, bomoni. Kasi, Nakomonisa Yango mokolo wana ntango ekosengela ete esalema.
Tondimi été lelo ezali mokolo yango. Nzambe azalaka na nzela bobele moko mpo na Komonisa Yango na bato : Mosakoli na Ye. Na boye soki bolingi kozua Emoniseli ya Bilembo, Ba-nkake nsambo, pe mabombami nyonso oyo ebombamaki, boya kosangana na biso wana tokoyokaye oyo Nzambe aponaki mpo na komonisa yango, komonisa biso yango, mokolo ya Lomingo, na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, wana tokoyoka liteya oyo Elembo Ya Liboso , eteyamaki mokolo ya 18/03/1963.
Ndeko Joseph Branham
===============================
Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya:
Matai 10:1/ 11:1-14/ 24:6 / 28:19
Yoane 12:23-28
Misala2:38
Batesaloniki3-12
Baebele 4:12
Emoniseli 6:1-2/ 10:1-7/ 12: 7-9/ 13:16/ 19:11-16
Malaki Mokapo ya 3 pe ya 4
Daniele 8:23-25/ 11:21/ 9:25-27