Litéya: 63-0901M Elembo
Molingami Mwasi ya libala Elembo,
Ntango tozali koya elongó, tosololaka kaka na ntina na Etindá te, toyaka elongó kopakola Makilá, kotia Elembo; mpe Elembo nde Etíndá ya ngonga! Nde Etíndá ya lelo oyo! Nde Etíndá ya ntango oyo.
Totíí Elembo yango epai ya bisó moko, na ba ndako ya bisó, mpe mabóta ma bisó. Tozali na nsóni te. Etálí bisó te ézala nani ayébí yango. Tolingí moto nyoso áyeba yango, moleki nzelá nyoso ámóna mpe áyeba: Tozali Bato ya Bande. Tozali Ndako ya Bande. Tozali Mwasi ya libala ya Nzambe Bande.
Molimó Mosanto = Elembo = Etíndá. Bazali banso eloko yango moko. Okokí kokabola bango te. Tata, Mwana, Molimó Mosanto = Nkoló Yesu Klisto. Okokí kokabola bango te.
Etindá = Motíndami. Balobí mabé báloba nini, MOSAKOLI ALOBAKI, okokí kokabola bango te.
Nzambe azali esengo na yo. Nzambe azali makasi ma yo. Koyeba Etindá oyo, koyeba ete Yango kaka nde Soló moko ezali, koyeba ete Yango nde Elembo, yango nde bokoki ya bisó.
Bókó bakokí koloba: “Nandimí Yango. Nandimí Yango. Nandimí Ezali Soló. Nayambí Yango lokola Soló.”
Nyoso wana ezali malamu, kasi ata ko bongo esengeli Épakolama. Mosakoli alobaki Etíndá oyo nde Elembo mpo ya lelo. Etíndá oyo nde Molimó Mosanto. Soko nde ozali na Emóniseli ata nini ya Etíndá oyo okoki polélé mpenza komóna ngonga oyo tozali kobíka kati na yango. Bongo mingi bazali koloba: “Nandimí Yango. Nzambe atíndákí mosakoli. Ezali Etíndá ya ngonga,” kasi bádóndwa na bolobáká ete balingí te, mpe bakosala te likambo ya koyókisa bato Mongóngó mpeza ya Elembo, kati na masámbo ya bango.
Nzambe alobaki te kati na mwanje na Ye ya nguya mpe áloba eloko mokó bobele soko ezalakí na ntina. Ayebisaki bisó alakisákí bisó na nzela ya bilílíngí mpe bilembetele. Kati na Litéya oyo, mosakoli akóti na bozíndó monéne koyebisa bisó oyo Laába mpe libota na ye basalákí mpo bábíkisama, bákóma Mwasi ya libala. Azalakí polélé na ntina na oyo asalakí.
Ntango bilengé mibali ya bande bayókísákí “BANDE”…Bózila monúti moko, motindami wana asalákí nini? Ayókísákí Bande. Bongo mwasi yango asálakí nini? Akómísákí ndako na ye LOSÁMBO YA BANDE. Ayókákí nsóni te koloba: “Bomóní singa motáné wana, elingí koloba Nazali LOSAMBO YA BANDE”.
Okanisi soko álobaka: “Ee, Nandimí Motindami na Etíndá, kasi toyókisaka na bisó ba bande te kati na losámbo ya bisó. NAzali na mobateli oyo alobí TE, mpo na ye ezali kaka kotéya mpe kozongela oyo ba bande elobí.” Okanisi ete akokákí kobikisama…???
Atiákí elembo, mpe ndako na ye ebíkísámáki, to akokákí kobomama na nsé Kúná epai ezalaki ye.
Boyôká batéi mingi komísálela bilongá mpo na oyo etálí koyókiyba bande, kasi pene ya banso balobaka: “Mosakoli alobá soki moké te boyókisa ba bande kati ya losámbo.”
Mosakoli alobaki Laába akómisákí ndako na ye losámbo, mpe losámbo na ye eyókákí ba Bande. Mpe mpo ete ayókísákí ba Bande kati ya losámbo na ye, ye, na losámbo na ye nyoso ya Bande, bazalaki na nsé ya Elembo mpe babíkisámáki. Losámbo mosúsu nyoso bakúfákí.
Bandeko mibali mpe basi, bolimbisi, Nazali koloba te ete mobateli akokí te kotéya Etindá oyo, to ezali mabe soko asálí yango. Na lolengé ya ngai moko, Nazali kotéya sikawa na nzela ya mokandá oyo, kasi fungólá motema na yo mpe yóká oyo mosakoli azali koloba mpe kokébisa yo mpo na yango. Soko mobateli na yo azali te, to akoyókisa te ba bande kati na losámbo ya binó na bopésáká lolengé moko boye ya elongá; ézala ata nini, kokokana na Liloba, ata áloba boní ete Nandimí Etíndá ya ngonga, kokokana na oyo Nandimí ete Liloba lilobí, Elembo, Etíndá ya ngonga, ezali Kotiama te.
Lomíngo loye, Nabiangí yo koya koyóka elongó na Eyanganelo ya Branham na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, Litéya: Elembo 63-0901M. Soko okokí komíbakisa na bisó te, yóká Litéya sé Litéya ya Elembo, mpe tíá Yango.
Ndeko Joseph Branham
Makomí ma kotanga libosó ya boyóki Liteya:
Genese 4:10
Esóde Mokapo ya 12
Yosua Mokapo ya 12
Misala 16:31/ 19:1-7
Baloma 8:1
1 Bakolinti 12:13
Baefese 2:12 / 4:30
Baebele 6:4/ 9:11-14/10:26-29 / 11:37 / 12:24 /13:8, 10-20
St. Yoane 14:12