25-0309 Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo

Nsango: 63-0317E Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo

BranhamTabernacle.org

Balingami Baoyo Bazongisámí,

Natikalá soko moké te kolemba na boyóki Mongóngó ya Nzambe koyebisa tozali ba nani, epai wapi toútí, epai wapi tozali kokende, tozali awa kosala nini, boni Alingí bisó.

Bonganga ya Molimó, libota ya bokonzi, kopesa mbeka ya molimó epai ya Nzambe, mbuma ya mbebu na bango, kopesa masánzoli na Nkombo na Ye.” Baoyo ba—Baoyo bato motindo nini! Azali na bango.

Libondi mpe kimia ya bisó bobele moko iyaka na boyókáká Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó, nsima kozóngisa monoko epai ya Tata na bokabáká mbeka ya molimó na nzela ya mbuma ya mbebu na bisó, kopesa masanzoli na Nkombó na Ye.

Mokili mobimba oyo ezali kokímela. Bokeli bozali kokímela. Tozali kokímela mpe kozila boyéi ya Nkoló. Mokili oyo mosimbí eloko moko te mpo ya bisó. Tobelemí kolongwa mpe kokende na Lipati na bisó ya Libala mpe EZALELO Ekoya elongó na Ye mpe basúsu banso baoyo basili kozuama Kúná, bobele na epai esúsu ya ezipelo ya ntango, kozila bisó.

Tika ete tótélema mpe tóminingisa! Tófina mitéma mia bisó, tómilamusa na oyo ezali kosalema sikawa mpenza mpe oyo ekokóma na ntango ya kobwéta líso.

Ata mbala moko soki te kati na lisoló ya mokili etíkálá kokoka ete Mwasi ya libala ya Klisto ásangisama útá na mokili mobimba, banso na ntango moko mpenza, koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba mpe komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Bandimi, bómítúna, mongóngó yango nini, motéi yango nini, moto nini yango, akoki kosangisa mpe koyéisa Mwasi ya Klisto  nyoso elongó? Soko Ozali Mwasi ya libala ya Klisto, oyebi ete ezali na yango kaka te na Mongóngó mosúsu kasi Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.

Ee, Molimó Mosanto azali kati na moko na moko na bisó, mosala moko na moko ya lingombá, kasi Nzambe Ye moko Ayebisaki bisó Akosambisa mokili na Liloba na Ye. Mwasi ya libala ayebi ete Liloba ya Ye likoyaka epai ya mosakoli na Ye. Mosakoli na Ye nde molimboli SÉ MOKO wa bonzambe ya Liloba na Ye. Oyo elobaki Ye ekoki kobakisamela eloko te to eloko eyebi kolongolama na yango te. Ezali Liloba, likoló ya ba bande, oyo bisó nyoso tokosambisama na yango, mpe liloba mosúsu te soko ndimbola ya Liloba yango.

Ekoka te mpo ya mongóngó mosúsu ata nini kosangisa Mwasi ya libala. Bobele Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande nde mokoki kosangisa Mwasi na Ye ya libala. Ezali Liloba sé moko Mwasi ya libala bango nyoso bakoyókana likoló na yango. Ezali Mongóngó sé moko Nzambe Ye moko Andimisákí kozala Mongóngó ya Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala. Mwasi na Ye ya libala asengeli ázala na Likanisi Liókó mpe na Lobánzo Lókó mpo ya kozala elongó na Ye.

Batéi bakoki koteya, balakisi bakoki kolakisa, babateli bakoki kobatela, kasi Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande nde mosengeli kozala Mongóngó ya motúya koleka oyo basengeli kotia libosó ya bato. Nde Etémelo ya Mwasi ya libala.

Soko bozali na Emoniseli ya yango, na bongo oyo nde ekosalema.

Liloba liyebisi bisó Adama abungisaki libula ya ye, mabelé. Elekaki longwá na loboko na ye kino epai na oyo atékéláki, Satana. Atekáki kondima na ye epai na Nzambe, na mabánza ya Satana. Abungisaki eteni nyoso na yango na maboko ya Satana. Alekisaki yango longwá na loboko na ye kino na oyo ya Satana.

Nzambe azali Nzambe ya molongo, bipai binso, kasi Mwana na Ye, Adama, azalaki na mabelé oyo na nsé na bokonzi na ye moko. Akokaki koloba, akokaki kopesa nkombo, akokaki kosolola, akokaki kotelemisa bokeli, akokaki kosala eloko ata nini elingaki ye kosala. Azalaki na bokonzi mobimba, ya likoló mingi ya mabelé.

Adama abungisaki yango nyoso, kasi Nkembo na Nzambe, nyoso oyo atangwaki na yango mpe abungisaki esikolamáki na Mosikoli Ndeko na bisó, mosúsu te kasi nde Nzambe na Nguya Nyoso, oyo akómáki Emanuele, moko na bisó. SIKAWA, EZALI YA BISÓ.

Tozali bana mibali mpe bana basi na Ye baoyo bakoyángela mpe kozala mikonzi mpe banganga elongó na Ye. Tozali na bomoi ya Sekó elongó na Ye mpe baoyo nyoso tolingi. Bokono lisúsu te, bolózí lisúsu te, kúfa lisúsu te, bobele sékó na sékó nyoso elongó.

Ntango tokanisí yango,  tokoki nde kotika zábolo ákwéisa bisó na nsé boni? Ezali ya BISÓ, nde epai tozali kokende nokí mpenza. Apésí bisó eloko monéne koleka oyo Akokaki kopesa bisó. Mikolo miké miye mia mimekano na bitumba likoló na mabelé oyo mizali kozindisama noki na ELONGA ya bisó MONÉNE OYO ETIKALI KAKA MIKOLO MIKÉ LIBOSÓ NA BISÓ.

KONDIMA YA BISÓ ezalá naino monéne boye libosó soko moké te. Esengo na bisó ezalá naino likoló boye libosó soko moké te. Toyebi tozali ba nani mpe epai wapi tozali kokende. Toyebi tozali kati na Mokáno mwa Ye mobongí be na botíkaláká na Liloba na Ye. Nyoso tosengeli na yango kosala ezali kotikala na ba bande mpe kondima Liloba moko na moko; kosósola yango nyoso te, KASI KONDIMA LILOBA MOKO NA MOKO…mpe TONDIMÍ YANGO!

Kondima eyaka na boyóki, boyóki Liloba. Liloba likoyaka epai ya mosakoli. Nzambe Alobakí Yango. Nzambe Abómbakí Yango na bande. Nzambe Amónisaki Yango. Toyóki Yango. Tondimí YANGO.

Okoki bobele kozua Emóniseli oyo na boyókáká Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.

Nyoso oyo Klisto akosala na nsúka ekomónisamela bisó póso oyo, kati ya Bilembo Nsambo, soko Nzambe akolingisa bisó. Bomoni? Malamu. Ekomónisama. Mpe ekomónisama, lokola Bilembo bizali kobúkama mpe bizali kopesamela bisó, nsima tokoki komóna etandelo monene oyo ya lisiko ezali nini, mpe ntango nini mpe boni boni ekosalema. Ebómbami nyoso kati na Búku oyo ya mabómbami awa. Etiami elembo, ekangami na Bilembo Nsambo, mpe bongo Mwana Mpate kaka nde Moko Oyo akoki kobúka yango.

Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, eteni ya Mwasi ya libala útá na mokili mobimba akozala koyóka Mongóngó ya Nzambe banso na ntango moko. Tokozala kozingela lóla na mopepe mokási ya mabondeli ma bisó mpe kosanzola Ye. Nabiangi yo óya komíbakisa na bisó lokola tozali koyóka:

Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo 63-0317E.

Nabondeli bino bóbósana te na ntina ya mbóngwáná ya ntango kati na Jeffersonville nsúka ya póso oyo.

Ndeko Joseph Branham