24-0908 KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

Nsango: 65-0822m KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

BranhamTabernacle.org

Balingami Eyanganelo Ya Branham,

Boni miso ma bisó mapambolami; mpo mazali komona. Boni matói ma bisó mapambolami; mpo mazali koyoka. Basakoli Mpe bayengebene basepelaki komona mpe koyoka makambo tomóní mpe toyókí, kasi basalaki yango te. TOMÓNÍ MPE TOYÓKÍ MONGÓNGÓ YA NZAMBE.

Nzambe Ye moko Aponaki kokoma Biblia na Ye na nzela ya basakoli na Ye. Nzambe Ye moko mpe Aponaki komónisa ba sekelé na Ye nyoso na ntango oyo ya nsuka epai ya Mwasi na Ye ya libala na nzela ya mosakoli na Ye. Ezali misala na Ye, Liloba na Ye libimisámí, kosála yango nyoso eténi na Ye.

Wana eleko ya biso ekómákí, Asálaki éte mosakoli na Ye ákóma na ntango yango moko. Apémelaki ye mpe Alobakí na nzela na ye. Ezalaki nzela na Ye ebongisamákí libosó mpe epesamáki ya kosala yango. Lokola Biblia, Ezali Liloba ya Nzambe, mpe liloba ya moto te.

Tosengeli tozala na Etémelo, mobóko; Liloba ya nsuka. Boko bato balobaka été Biblia Ezali Etémelo ya bango, ezali te oyo elobami likolo ya ba bande; lokola nde yango ezalaki koloba eloko ekeseni. Ezali likambo monene boni Nzambe abómbaki Emoniseli ya solo ya Liloba na Ye epai ya ebelé monene, kasi Amonisaki Yango mpe Akómisaki yango polele epai ya Mwasi na Ye ya libala. Basúsu bakoki na bango kaka komipekisa te, bazali na lolándá mpe bazali te na Emoniseli mobimba ya Liloba ya Nzambe limónisami.

Nzambe alobaki kati na Liloba na Ye (Biblia) na nzela ya basakoli na Ye mpe alobaki na biso: “Nzambe, oyo na ntango ya kalakala mpe na mitindo mingi alobaki na ba tata na nzela ya basakoli”. Na bongo, Basakoli ya Nzambe nde bakomáki Biblia. Ezalaki bango te, kasi Nzambe koloba kati na bango.

Alobaki kati na mikolo ya biso ete Akotinda Molimo na Ye ya solo epai ya biso kotambolisa biso kati ya solo nyoso. Akoloba mpo na ye moko te; kasi nyoso ekoyoka ye, yango nde akoloba: mpe akotalisa biso makambo makoya.

Etindá likoló ya ba bande ezali nde ba solo ya Nzambe imónisamí. Esengeli na ndimbola ata moko te. Ezali Nzambe kolimbola Liloba na Ye Ye moko lokola Azali koloba Yango likoló ya ba bande.

Ezali na bokóbi te kati na oyo bato basúsu balobí, bobele oyo Nzambe Alobí.

Oyo elobamí likoló ya ba bande nde Mongóngó bobele moko MOKOBONGWANA SOKI MOKÉ TE. Bato babóngwanaka, makanisi mabóngwanaka, ndimbola ibóngwanaka; Liloba ya Nzambe libóngwnaka soki moké te. Ezali Etémelo ya Mwasi ya libala.

Mosakoli Apesi biso ndakisa ya mopaleli oyo azali etémelo na lisano lia motópe. Liloba na ye nde ya nsuka. Okoki kobete yango ntembe te. Oyo elobí ye, nde yango, mpútu. Sasaipi mopaleli azali na búku ya mibeko asengeli kolanda. Eyebisaka ye bisika nini mongété to esímbeli mabe ya motópe izali, ntango obongi na kosakana mpe ntango ozali libanda ya mibeko ya lisano; oyo mibeko mizali mpo ya lisano lia motópe.

Atangí mpe ayekoli búku yango na ntina ete ntango alobí, mpe asali boyángeli na ye, yango nde mobeko, yango nde Liloba ya nsúka.

Osengeli kotikala na oyo elobí ye, motuna te, koswana te, nyoso elobí ye, nde lolenge esengeli ézala mpe ekoki kobóngolama te. Nkembo.

Ndeko Branham alobaki te été ose gelaki koteya te, to kolakisa te, nzokande, alobaki koteya, mpe koyoka babateli na bino, kasi Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande mosengeli kozala Etémelo ya bino.

Esengeli likonzi ya kotingamela lízala, na maloba masúsu, mobóko. Moto nyoso asengeli kozala na mobóko mwangó. Ezali Liloba ya nsuka. Nzambe apesaki esiká sé moko kozua yango, Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande. Ezali ndimbola ya bonzambe ya Liloba ya Nzambe. Ezali LILOBA YA NSÚKA, AMEN, YANGO ELOBI NKOLO.

Yesu Ye moko alobaki tobiangaka bango “banzambe,” baoyo balobaki Liloba na Ye; mpe bazalaki banzambe. Alobaki ntango basakoli bapakolamáki na Molimo ya Nzambe, bamemaki mpenza Liloba ya Nzambe. Ezalaki Liloba ya Nzambe koloba na nzela na bango.

Nde ntina mosakoli na biso Azalaki mpenza na meko. Akambamaki na Molimo Mosanto koloba Liloba ya Nzambe Lizangí kokwéa. Nzambe Aponaki ye mpo ya eleko ya biso. Aponaki Etinda ekokaki na ye koloba, ata lolenge ya mosakoli ya biso mpe ekokaki kosalema kati na eleko ya biso.

Maloba malobaki ye, lolenge asalaki makambo, ebetaki basúsu na lolánda, kasi efungolaki miso ma biso. Alátisáki kútu ye na motindo ya mokóto molátákí ye. Lolenge na ye, mpósá ya ye, makambo manso bobele lolengé losengelaki ye kozala. Aponamáki na bobongi bé mpo ya biso, mwasi ya libala ya Nzambe.

Nde ntina, ntango TOYEI ELONGO, Ezali Mongóngó tolingaka kotia LIBOSÓ koyóka. Tondimi tozali koyoka Liloba Peto lilobámí longwa na motindami ya Nzambe aponámáki mpe azuámáki.

Toyebi basúsu bakoki komona to kosósola yango te, kasi alobaki azalaki kosolola na eyánganelo ya ye kaka. Azalaki te na mokumba ya oyo Nzambe Apesaki basúsu koléisa; azalaki na mokumba sé ya motindo ya Biléi azali koléisa biso.

Nde ntina tolobaka tozali Eyanganelo ya Branham, zambí alobaki Etindá ezalaki bobele mpo ya bato na ye kati na Eyánganelo, etonga moké oyo balingaki kozua mpe koyoka ba bande. Azalaki koloba na baoyo Nzambe apesaki na ye kokamba.

Alobaki: “Soko bato balingi kosangisa-sangisa biléi mpe makambo kuna libanda, bózua emoniseli útá na Nzambe mpe bósala oyo Nzambe ayebisi bino bósala. Nakosala eloko yango moko.

Kasi Mateya maye, likoló ya ba bande, mazali mpo ya lingombá oyo kaka.”

Boni na bosolo ayéisaki Yango petee mpo ya Mwasi na Ye ya libala komona mpe koyoka Mongóngó ya Nzambe mpe kolanda malako ma Ye.

Soko okosepela komibakisa na biso koyoka Mongóngó yango, tokozala koyoka biso nyoso na ntango moko Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, :65-0822M- “Klisto Amónisami Kati Na Liloba Ya Ye Moko”.

Soko okoki komíbakisa na biso te, Nayíkísí yo mpiko koyoka Litéya oyo ntango sé ntango okokí.

Ndeko Joseph Branham

Makomí ma kotánga libosó ya boyóki Litéya:

Esóde 4:10-12

Yisaya 53:1-5

Yilimia1:4-9

Malaki 4:5

St. Luka 17:30

St. Yoane 1:1 /1:14 / 7:1-3 /14:12 /15:24 /16:13

Bagalatia 1:8

2 Timote 3:16-17

Baebele 1:1-3 /4:12 / 13:8

2 Petelo 1:20-21

Emoniseli 1:1-3/ 10: 1-7 / 22:18-19