Nsango: 63-0630m Esode Ya Misato
Molingami Mwasi ya libala Esóde ya Misato,
Soko Ozali na líso ya molimó te, omóna yango te. Kasi líso ya molímó likokí komóna Nguya ya Nzambe kotámbola zambí Ezali mpenza elongó na Liloba. Ezali Liloba, mpe Liloba ya Nzambe likokí kobongwana sokí te. Oyo esalákí Ye na ebandeli, Azali kosala motindo moko sasaipi mpe líso ya molimó lizali komónaYango, lizali Kondima Yango, mpe lizali KOYÓKA YANGO.
Mokili mokokí kozanga koyókana na ngai kati na oyo Nandimí kozala nzela epesámí na Nzambe mpo ya lelo: Mongóngó ya motúya koleka osengeli koyóka Ezali Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande. Bosengeli Bóyóka ba bande kati ya ba ndakonzambe ya binó, kasi SOKO bondimí mpenza Etíndá oyo kati ya solo, boye bokoki kozanga koyokana te na oyo mosakoli ya Nzambe alobí.
Lomíngo loye tokoyangana lokola bana ya Baebele basaláki mpo ya kozua máná mapesamákí mpo ya bango na butú mobimba, maye makokaki kobatela bango kati ya mokolo mobimba molandákí. Tokoyangana mpo ya Máná ma bisó ma Molimó maye makopésa bísó makasi mpo mpo ya Boyéi ya Esóde ya bisó monéne ekoya nokí.
Ezali na yango kaka na nzela malamu koleka te soko kaka te kotika Mongongo ya Nzambe koloba yango Ye moko, na ntína na Ye moko, mpe Liteya oyo tokoyóka ETÓNDÍ NDE KOTÓNDA!
Nzambe amemákí moto moko kati na lisóbé, ayekólisákí ye Kúná. Mpe azóngisákí ye, mpe amemákí makambo na ngambo, mpe abimísákí bato. Bomóní eloko Nalingí kolobá? Akokí kobóngola manáka ma Ye te. Azali Nzambe.
Na boye áwa Azali koyebisa bisó polélé Atíkalá kobóngola manáka ma Ye soko moké te. Oyo esalákí Ye longwá na ebandeli, Akosala yango lisúsu na nsúka, Alakákí. Na bongo tosengeli tóyeba oyo manáka ma Ye mazalakí ndèle lokola ekozala eloko yango moko sikawa.
Akosalaka na ebólo ya bato soko moké te. Atikalá kosala yangó sokó moké te. Asálaka na moto moko; mpe Asálákí yango; mpe Akosála yango. Alakákí, atákati ya Malakí 4, Alingaki kosála yango.
Atíkalá kosala na ebólo ya bato te. Boye, Alakákí kati na mokolo ya bisó Akotínda moto Moko, Malakí 4, na Yango Elobí Nkoló.
Ezali solo. Na bongo elaká na Ye wana, oyo ezalaki Ye; elaká oyo Elobakí Ye Akosala, mpe bis’oyo awa. Bato ya esengo, nini oyo, tosengelakí kozala; kopesa bango elembo, na nzela ya Liloba na Ye lilakamákí. Alakákí Akosála yango.
Ndenge nini nde Nzambe Aponákí kokamba Mwasi na Ye ya libala ndèle?
Nzambe Aponákí, kati na mikolo ya Esóde, Abiangákí ebólo ya bato kobima. Mpe libandá ya ebólo yango, Nalingí bóyeba eloko moko, Azalaki bobele na mibalé baoyo bakendeki na mbóka ya elaká. Aponákí nini kobimisa bango na yango?
Yango oyo. Oyo ezali mpenza na motúya mpo ya makanisi ya molimó kosímba. Boni nde Nzambe Aponákí kokamba mpe komema Mwasi ya libala na Mboka ya Elaká?
Politíki? Ebongiseli? Aponákí mosakoli, na elembo ya likoló koleka ya Likonzí ya Móto, ete bato bámíkosa te. Oyo mosakoli alobaki ezalakí Solo. Mpe Nzambe Akití, kati na Likonzí ya Móto, mpe Amíndimísákí, Atálisaki Liloba na Ye. Ezali solo? Yango nde Amemákí, Esóde na Ye ya libosó. Esóde na Ye ya mibalé…
Na bongo, komíndimisa bato básála mabúngá te, Atindelakí bango mosakoli na elembo ya likoló koleka ya Likonzí ya Móto mpo ya esóde ya bangó monene.
Asalákí nini, na esóde ya libosó? Atindakí mosakoli, apakolamákí na Likonzí ya Móto, mpe abiangáki bato kobima. Ezalaki esóde ya Ye ya libosó…
Esóde ya mibalé, Ayéisákí mosakoli, mopakolami, oyo azalaki Mwana na Ye, Nzambe-mosakoli. Mose alobakí Akozala mosakoli; mpe Azalaki na Likonzí ya Móto, mpe asalákí Bilembo mpe bikamwiseli…
Mpe awa Alakákí elóko yango moko kati na esóde kati na mikolo ya nsúka, mpe Akokí kobóngola yango te…
Mingi bakoyókana na yango na bolobáká, ee, atindaki mosakoli kobianga Mwasi ya libala kobima, kasi sikawa Molimó Mosanto akokamba Mwasi ya libala na nzela ya botéi; kasi alobaki yango te…tókoba kotanga.
Bótála Likonzí ya Móto libiangáki bango kobima, likambákí bango na mboka ya elaká, na nsé ya mosakoli mopakolami. Lionzí ya Móto oyo bakokakí kotála, likambákí bango na mboka ya elaká, na nsé ya mosakoli mopakolami. Mpe ntango nyoso babóyákí ye. Ezali solo? Yango mpenza.
Likonzí ya Móto yango moko lizali kokamba bato lisúsu na Mbóka ya elaká, Bokonzi ya mbúla nkóto. Likonzí ya Móto, na nsé ya bokambami ya Nzambe…Nzambe azalákí Móto, mpe Likonzí ya Móto lipakólakí bobele mosakoli. Likonzí ya Móto lisengelaki kotelema pelamókó motátoli ya Lóla éte Mose abiangamáki kobima
Sikawa, bókanisa, Mose azalaki Likonzí ya Móto te. Azalaki mokambi mopakolami na nsé ya Likonzí yango ya Móto, mpe Likonzí ya Móto lindimisákí bobelé Etindá na ye na Bilembo mpe bikamwiseli.
Míko mazali te, baningá. Ezali te oyo ezali ngai koloba; Nazali sé ndeko wa binó. Kasi ezali oyo Nzambe azali kokokisa epai na bino, oyo ezali kosala yango Solo. Likonzí ya Móto yango moko Asáleláki mpo ya mibalé mosúsu Amemí Yango lelo kati na binó, mpe Akokísí Yango na nzela ya zébi.
Nzambe Abongolaka manáka ma Ye soki moké te. Nzambe azali na nzela epesámí mpo ya Mwasi na Ye ya libala lelo: Likonzí ya Móto na nsé ya bokambami ya Nzambe…Nzambe azalaki Móto, mpe Likonzí ya Móto lipakoláki bobele mosakoli.
Ezali na Mongóngó sé moko, mosakoli sé moko, oyo azali na Yango Elobí Nkoló, William Marrion Branham. Azali Likonzi ya Móto te, kasi azali mokambi mopakolami na nsé ya Likonzí yango ya Móto.
Bisó nyoso tolingí kozala kati ya MOKÁNO mwa Nzambe MOBONGÍ BE. Liloba ya Ye NDE Mokano mwa Ye Mobongí Be. Liloba lindimísámí mpo ya mokolo na bisó nde Etíndá oyo. Mosakoli na Ye aponamákí kokamba Mwasí na Ye ya libala. Soko ondimí yango te, okokí kozala Mwasi na Ye ya libala te.
Yaká mpe míbongisá mpo ya Esóde ya bisó monéne na boyókáká Liloba ya Nzambe Libongí Be elongó na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: Esóde Ya Misato 63-0630M.
Ndeko Joseph Branham