NSANGO: 60-0522M Kotiama Lokumu Ya Mwana #3
- 25-0518 Kotiama Lokumu Ya Mwana #3
- 21-0704 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #3
- 18-0701 Kotiama Lokumu Ya Mwana #3
- 16-0228M Kotiama Lokumu Ya Mwana #3
Molingami Moseka Peto,
Ntango tofinaka Play, ezali mafuta ya nzói likoló ya libángá, ezali esengo ezangí maloba, ezali endimiseli epambólámí, ezali lóngo na bomoto ya bisó, ezali elikia mpe efándelo ya bisó, ezali Libángá ya Bileko, ezali nyoso oyo ezali malamu, ezali Nzela ya Nzambe epesami mpo ya lelo.
Zambí tofinaka Play, Mongóngó ya Nzambe ebálisí bisó; ebandísí bisó na Klisto, lokola Moseka Peto na Liloba na Ye. Tozali na Molakisi sé Moko, Mongóngó Moko, mosakoli Moko, oyo azali kokamba bisó na Molimó Mosanto.
Kasi oyo nde lingomba, Nazali kolakisa bino. Oyo ezali kokende likoló ya ba bande. Nalingi bato bazali koyoka ba bande bámikanisela oyo ezali mpo ya lingomba ya ngai.
Kondimisama ya motindo nini oyo epai na bisó ete tozali kati ya Mokano mwa Ye mobongí be. Bande izali mpo ya lingomba na ye. Azali kolakisa bisó. Azali koyebisa bisó, bóyoka ba bande.
Abandákí molongó ya Kotiama na Bokonzi ya Mwana na boyébisáká bisó oyo esalemaki kaka mwa mikolo libosó.
Nsima, na Liteya moko na moko, azali koloba na ntina ya ntango abóngwanisamákí. Boni esengeli kozala na litómbá mpo ya Mwasi ya libala koyóka oyo esalemákí mpe oyo Mwasi ya libala alobakí na ye.
Mosakoli na bisó akosambisama na Liloba oyo ateyákí mpe atikaki likoló ya ba bande. Mwasi ya libala na ngambo mosúsu ayebisaki ye ete akoyambama na Nkoló na bisó. Na nsima akotálisa bisó epai na Ye lokola mabonza ya mosalá na ye, nde tokozónga na mabelé lisúsu kobika libela.
Liloba moko na moko tozali koyóka ezali eteni moké ya libángá ya motúya. Tozali sé kokóba kobongisa Yango mpe kobongisa Yango lokola Azali komónisa mingi koleka awa ezali bisó kotanga kati ya milongó.
Boni tolingaka kokabola Yango na bandeko na bisó mibali mpe basi: “Oyókakí oyo?”
“Aponakí bisó kati na Ye libosó kútu mokili mózala”? Nde libulá ya bisó. Nzambe aponáki bisó, mpe atikaki Yesu áya mpe áfúta motúya. Yango nini? Kosopa na Ye Makila ma Ye, ete lisúmu litángamela bisó te. Eloko te osálí.
Na bongo, nsima na yango kaka, osimbaki ko oyo?
“Bule, bule, bule, epai na Yawe.” Ozali na miso ma yo matali na epai ya Kalvari, mpe ezali na eloko te ekotélemisa yo! Etambweli mpenza ya bomoi na yo, ozali kotambola kokita na Nzela Monéne ya Mokonzi, opakólámí na Mafúta ya motúya ya epakweli, kokóta kati na esiká eleki Bule ya bule. Whew! Amen.
Tozalaki kaka lokola lingénda ya Alona, nzete ya kala ya kokaoka oyo amemaki mpo na mbúla ntuku minei kati na lisobé. Kasi sikawa, mpo ete toumélí na Esiká ya Búle wana na boyókáká Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó likoló ya ba bande, totóísí nkasá mpe folólo, totóndí na Molimó Mosanto na Ye, mpe tozali Mwasi na Ye ya libala kogánga na sámbá ya mapululu ma bisó:
- Bule, bule, bule, epai na Yawe, bande izali ya libosó kati na mitéma mia bisó.
- Bule, bule, bule, epai na Yawe, Aponáki bisó libosó ya bozalisi ya mokili.
- Bule, bule, bule, epai na Yawe, Tozali Mwasi ya libala ya Yesu Klisto.
- Bule, bule, bule, epai na Yawe, esali bokesene moko te oyo moto ata nani áloba, tozali kolongola ba bande te, Tozali nde koyóka na koleka.
- Bule, bule, bule, epai na Yawe, totii miso ma bisó na epai ya Kalvari, eloko moko te ekotélemisa bisó.
NAzali na nsai mingi kobakisama na mitéma elongó na mingi awa baoyo bayebi ete Oyo ezali Liloba ya Nzambe lizangí kokwéa. Na bongo Yango, Ezali Liloba moko na moko Solo, Liloba moko na moko na Yango, Lisakola moko na moko na Yango. Mpe na ngolu ya Nzambe, tozwí libakú malamu ya komóna mboka oyo mokolo moko tokokende na yango.
Yaka komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Mosakoli azali kozua Liloba moko na moko mpe azali kaka kokóba kobongisa Yango. Akozua Yango kuna na Genese mpe kobongisa Yango, kozua Yango kuna na Esode mpe kobongisa Yango lisúsu, mpe kútu na Emoniseli; mpe Ezali mwa eteni moko na moko Yesu!
Ndeko Joseph Branham
Liteya:
Kotiama na Bokonzi ya Mwana #3 60-0522M
Makomi:
Matai 28:19
Yoane 17: 7-19
Misala 9:1-6, Mikapo ya 18 mpe 19
Baloma 8: 14-19
1Bakolinti 12: 12-13
Bagalatia 1:8-18
Baefese Mokapo 1
Baebele 6:4-6, 9:11-12