Nsango: Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei 60-1211M
- 26-0906 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
- 24-1201 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
- 23-0611 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
- 20-1220 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
- 19-0303 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
- 16-0403 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA
19 décembre 2020
Balingami Oyo Bazali Kopema,
Tozali na esengo mpo tozali kolia Bilei ya Molimo Mosanto oyo ezangi mokuwa to mbuma na kati na Yango. Ezali Ba-gateaux oyo ekitaki longwa na Likolo, oyo ebengamaka Mana, pe ezipami mobimba na bopolo ya Lola. Tobengaka yango Bilei ya Bande mpo na Mwasi-na-libala ya Bande.
Tozali na Mésa moko oyo etondi na Yango, pe biso ba-mpate tosengeli bobele koléta pe koléta pe mitungisi na biso nyonso ekosila nye. Tondimaka ete tozali na esika moko pe na boyokani moko pe ezali na makelele moko lokola ya mopepe makasi oyo euti na Lola kino na ba-ndako pe ba-losambo na biso. Yango ezali Mongongo na Nzambe oyo ezali kolobela Mwasi na Ye ya libala oyo aponama.
Ye alobelaki biso, ete Eva apengwaki, Moaba apengwaki, bangondo oyo bazolala bakopengwa, ata pe lingomba ekopengwa, kasi BISO TOKOPENGWA TE, mpo ete biso totikalaki nà Liloba. Tokoki koningana te, tokoningana pe te.
Bileko na Lingomba oyo ezali koleka mpenza na ntango malamu mpo na Mwasi-na-libala. Maloba na Nzambe, oyo elobamaki na nzela ya mosakoli na Ye eleki mibu Tuku-motoba, ezali kokokisama sik’oyo. Ba-visions oyo Daniele amonaki esili koleka mibu Nkoto mibale, ezali kokokisama na eleko na biso. Tokoki kotanga pe komona lisakoli oyo ezali komonisama polele na ba-nsango mokolo na mokolo.
Bakonzi minene ya Visa, Banki ya Amerika, Salesforce nà ba-compagnies mosusu Nkama-mitano ya Bato na Mbongo basili kosangana na Likita mpo na Capitalisme Inclusif elongo nà Vatican. Likita yango, oyo ekambami na Pàpà Francois, ekosala nyonso mpo na kotombola lolenge moko ya capitalism inclusive, mpo na kolendisa bakambi yango ete basalela koleka politiki ya bosembo mpo na kokitisa bokabwani ya bozwi kati na bato.
Baoyo bazali na ba-compagnies yango bazali na misolo koleka milliards nkoto 10 na ndambo ya ba-dollars ya bango moko. Likita mpo na Capitalisme Inclusif esili kosenga boyokani nà Vatican ete yango ekozala “na nsé ya bokambami ya toli” ya Pàpà Francois.
Biblia elobi na biso na buku ya Daniele 8:
23 Na suka ya bokonzi na bango, ntango bato na masumu bakokoma na suka, mokonzi moko ya nkanda mingi pe ya mayele mabe, akotelema wana.
24 Pe nguya na ye ekozala ya makasi, kasi na nguya na ye moko te:
Pàpà azali sik’oyo kosala boyokani mpo kokembisa nguya na ye nà ba-compagnies minene, ba-organisations, pe bakambi ya mokili; baoyo bazali kokambama na mwasi Moyuda moko na nkombo ya Madame Lynn Forester de Rothschild.
… pe akobebisa makambo na ndenge ya kokamwa, pe akofuluka, akosala makambo ndenge na ndenge, pe akoboma bato na nguya nà basantu.
25 Pe na nzela ya politiki na ye, akofulukisa misala ya makoki na maboko na ye;
Ndeko Branham alobaki “misala ya maboko” ezali ba-industries.
… pe akozala na lolendo na motema na ye, akobomisa bato mingi oyo bazalaki kofanda na kimia, pe kotelemela mokonzi ya bakonzi; kasi akobebisama, zàngà loboko na moto.
Ndeko Branham alobaki ete likambo ekosalema na kati-kati ya mibu misato na ndambo.
Sik’oyo, ntango akozua misolo nyonso na maboko na ye, “Na ntango wana, akobuka boyokani na ye nà Bayuda,” Ndenge Daniele alobaki awa ete akosala yango, “na kati-kati ya ndambo ya suka ya ba-mposu ntuku-nsambo,” ya Daniele. Na sima, ndeko, ye akosala nini? Akozua mombongo nyonso ya mokili nà nkita nyonso, akosala boyokani nà mokili, mpo ye akozala na bozwi nyonso ya mokili, na mobimba na yango. Pe na ntango wana, basakoli mibale wana bakokota na mosala pe bakobenga bato wana nkoto nkama na ntuku-minei na minei. Na sima, eloko nini ekosalema? Na sima, elembo na nyama, ya Emoniseli 13, ekobanda, mpo ete ye akozala na nkita nyonso, mombongo nyonso, pe makambo nyonso ya mokili. Pe eloko nini ekosalema na sima? Elembo na nyama ekokota na mosala, ete, “Moto moko te akoki koteka to kosomba, bobele ye oyo azali na elembo ya nyama.”
Satana akoki komeka kotungisa yo na eleko oyo, nakoki pe kozua Elembo ya nyama? Totala eloko nini mosakoli na biso alobaki na biso:
Bomoni, mpo ete Moponami asala likambo yango, ezali mpenza, ekoki kosalema ata moke te . Akokoka kosala yango te, bomoni. Mpamba te, ye akosala nini? Bomoni? “Kasi ezali kotiola Makila ya Boyokani…” Sikawa, bomoni, soki asili koponama pe azali kati na etonga, akoki kosala yango te. Ekoki kosalema te ete ye asala yango .
Nkombo na Nkolo esanzolama, ekoki KOSALEMA TE ete biso tosala yango, biso tozali “KATI NA ETONGA YANGO!” Tokoki kopema wana tozali komikanisela konetolama monene oyo Nzambe apesaki mosakoli na biso, lolenge nini akosengela kotelema wana elongo nà biso nyonso mokolo wana, mpo YE akozala na mokumba mpo na biso nyonso. Lolenge nini ye akokende liboso epai na Ye, pe akosambisama na Liloba oyo ye ateyaki biso.
“Ekozala pe bongo na bato nyonso? Polo pe akosambisama?” Alobaki, “Iyo, Polo pe akosambisama, elongo nà etonga oyo ye ateyaki bango.” Nalobaki :Ngai nateyaki Nsango yango moko oyo ye ateyaki.”
Pe ba-millions ya bato wana batombolaki maboko na bango pe balobaki, “Tozali kopema likolo na yango!”
Boya, botombola maboko na bino pe bopema elongo na biso mokolo ya Lomingo na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka liteya: Bangondo Zomi, Pe Bayuda Nkoto Nkama na Ntuku-minei na Minei , eteyami mokolo ya 11 decembre 1960 na mpokwa.
Ndeko Joseph Branham
Source
https://branham.org/articles/12182020_TheEaglesGatheringTogether