Nsango: 65-0119 Nzambe Oyo Atóndí Na Mawa
Balingami Misála ya Nzambe,
Bozali Liloba ya Nzambe limónisámi oyo lilakamáki mpo ya lelo oyo.
Bozalaki na binó bobélé kozala. Bokozala te, kasi sikawa bozali bana mibali mpe bana basi ya Nzambe; zambí Nzambe oyo Atóndí na mawa, Azaláki na bino na makanisi na Ye na ebandeli mpenza.
Libosó kútu Akóma nzóto awa na mabelé; libosó ata nini ézala, ozalaki moko ya biténi na Ye. Ayebáki oyo nkómbó na yo ekozala. Ayébáki lángi na nsúki nini okozua. Ayebaki nyoso na ntina na yo.
Nsima ntango oyokaki Mongóngó na Ye kopela libosó na yo, ezalákí na eloko moko kati na yo oyo egángáki kogánga; oyébí oúti wapi mpe oyéi na Yango. Oyebaki ete ezalaki Sóló. Oyebaki ezalaki nzela ya Nzambe epesámi mpo ya lelo oyo zambi mombóto wana mozaláki ntango nyoso kati na yo.
Azali sikawa komema biso likoló ya mapapú ya mpongo. Liloba liyebisi biso ntango nyoso ete Akokanisaka basakoli na Ye na bampongo. William Marrion Branham nde mpongo ya Nzambe motindami oyo andimisámi mpo ya lelo oyo. Nde mapapú ya mpongo tosengeli komemama likoló na yango kokende na mboka na elaká, zambí ye, mpongo mosakoli ya Nzambe, azali momemi ya etindá ya Nzambe, kobiánga kobima mpe koloba Liloba na Ye, kobongisa be Mwasi na Ye ya libála.
Tozali kolanda Nzambe lokola tozali kolanda William Marrion Branham etindá na Ye ya kokangola. Mpe Biblia elobaki ete, “bakúfaki te elongó na bazangi kondima.” Mpo ete Nzambe Atóndáki na mawa epai na bango; mpo ete bazalaki kolanda mibeko na Ye.
Nzambe Alingi ete tólanda mibeko na Ye, mpe mibeko na Ye milobaki: Nazali Mongóngó ya Nzambe epai na binó. Bóloba KAKA oyo ezali likoló ya ba bande wana. Mongóngó na Ngai nde bobélé Mongóngó mokolobaka Maloba mazangi kokwéa. Elobamáki na bobongi be mpe bóyamba yango koúta na Mongóngó na Ngai. Ntina wana, Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde nde nyoso bosengeli na yango, zambí Ngai, Nzambe kati na mawa na Ngai, Natálisi Yangó epái na binó. Ezali Nzela na Ngai mpo ya lelo oyo.
Nzambe oyo Atóndi na mawa aponáki mpe abongísákí bino kozala na Emóniseli koyóka Mongóngó wana. Nzambe oyo atondi na mawa ayebakí na ntango oyo ya nsúka, ntango ekozala na mingi bakosósola mabé, mingóngó mingi mikeséní mpe ndimbólá-ndimbola na Etíndá, oyo esengelámí na Mongóngó mobongi be, mpe nzela ebongí be, mpe nzela Ebongí be tosengelákí kokende na yango mpo tókoka komíyókela, Liloba na Liloba na Liloba, mpenza káka oyo Alingaki koloba na Mwasi na Ye ya libála.
Okoki bobélé te kozua oyo moto mosúsu alobákí. Osengélí kozua oyo Nzambe Alobákí. Alobákí. “Tiká ete liloba ya moto nyoso ezala lokutá, mpe ya Ngai sóló.”
Na bongo, Nzambe, oyo Atondi na mawa, apésákí nzela ete Mwasi na Ye ya libála ákoka ko Yóká 24/7, mikolo 365 Kati na mbúla, na Bofináká Play, mpe koyeisama na bomoi na Mongóngó ya Nzambe koloba mbebu na litói kino na mitéma na bango.
Tozali Liloba na Ye likómi mosuni. Tozali na nguya te, kasi Apésí bisó bokonzi na Ye. Moko na moko na bisó azali na Yango. Soko obóyi Yango, o Kotíkala esiká ozali. Kasi soko toyambi Yango, Ekosála mingi na koleka, zambí Nzambe atóndi na mawa.
Mpe ntango mobali to mwasi, etálí ngai te ózala kati na motindo nini, ozali na bokonzi ya Nzambe, na nzela ya elaká kosálá makambo mingi na koleka, “Soko olobi na ngómbá oyo, longwá, mpe soko obéiti ntembe te na motéma na yo, kasi ondimí ete oyo elobákí yo ekosálema, okoki kozua yango elobákí yo.” Ozali na nguya te, kasi ozali na bokonzi.
Mwasi ya libála akoki bobele kobonga be mpe kasangana na boyókáká Liloba na Ye libongi bé mpe lipésámí mpo ya lelo: Mongóngó na Ye. Ezali Mongóngó bobélé moko mokoki kobongisa be mpe kosangisa Mwasi ya libála. Nde Mongóngó bobélé moko Nzambe Ayebisáki bisó tóyóka mpe TÓLANDA. Lokola Mose, Ndeko Branham ayebaki ete ye nde aponamáki komema bisó bana kuna na mboka ya elaká zambí elaká epésámelaki ye. Mpe asengeli komema bisó na Mboka elakámi.
Mosakoli na bisó mpongo alakisaki bisó na bililingi. Kondimana ya Kala ezalaki elilingi ya Kondimana ya Sika. Ayebisaki biso boni tosengeli kozala na bokebi mpe eloko ya kotálela na ntango ya nsúka. Akebisaki biso na ntina na molimo ya Kóla, mpe na ntina na Datána, mpe bato na bango ya bosámbulu na kozánga kondima, lokola bamekaki komekola. Bamekaki kokótisa elóko moko boye kati na manáka ya Nzambe.
Balingaki na bango manáka ya moto moko te. Balingaki yango te. Basengeli bázala na eloko moko ya kosála. Kóla alobaki, “Boye, ezali na bato mingi bule koleka yo, Mose. ozali kosála lokola nde ezali bobele yo libóngo likoló na…to libangá moké bobele na libóngo, Náloba.” Mpe alobaki, “Na–Na…osengélákí kosála bongo te. Mpe ezali na mibali mingi awa.”
Bandeko mibali mpe basi, Nazali te komeka kokabola mangómbá na bolobáká mpe na bozóngéláká makambo oyo, Molímó Mosanto Azali kosala bokaboli. Boyóka Litéya oyo tobelémi koyoka. Mosakoli nde azali kokébisa Mwasi ya libála likoló ya elóko ya kotálela. Azali koyebisa bisó oyo molimó wana esaláki ndéle, mpe ekosala yango lisúsu na mokolo ya bisó.
Ya sóló, Nazali te komeka kokangisa bato nsima ya bótano ya botei, bakoka na bango káka te kosangisa Mwasi ya libala. Nazali komeka kosangisa bango zingázingá ya Liloba ya Nzambe peto, lizangi kobébisama, Mongóngó bobélé moko oyo ekoki kosangisa Mwasi ya libála.
Tozali koyóka makambo yango moko lelo, Ndeko Branham azali bobélé ye te nde asengélí kotéya Etíndá, tobiángámi kotéya Etíndá. Ya sóló babiángámí, kasi na nsima, kasi bazángi koyéba litómbá ya koyóka Mongóngó wana mpe Kondima Ezali Etíndá ya moto moko, na bolukáká bikimelo KOYÓKÁ TE Mongóngó ya Nzambe kati ya mangómbá na bango, mpe kotia ntómo na bango na litómbá koleka.
Mpe Biblia elobákí, “Mpe bakendeki na nzela ya Balama, mpe bakúfi na kotomboka ya Kóla.” Bakúfáki kati na kotomboka! Kotomboka ya Kóla ezalákí nini? “Na bongo, okanísí yo káka nde moto bobélé moko? Bongo, ya Nzambe…Bisó nyoso tozali bule. Lingómbá mobimba ezali bule. Lingómbá mobimba ezali malámu. Nyoso…Bisó nyoso elongó, nde oyo tosengélí kosála.” Nde esíká bakúfákí, yango. Mpe tosengélí mpenza na yango. Tobongí na kozala yango.
Etíndá oyo, Mongóngó na Ye, ezali Mongóngó sé mokó oyo elobámi polélé mpenzá mpe ezali koyambama polélé na Mwasi ya libála. Botéi sembo ezali nde koyikisa bato mpiko bátikala na Mongóngó na botéyáká mpe bozóngélaká maloba ya Etindá. Kasi kotéya Yango káka te, kasi BASENGÉLI koyóka Yango kati na mangómbá na bangó, mpe koyebisa bato na bango Ezali MONGÓNGÓ YA LITÓMBÁ KOLEKA, na ntina ete Mwasi ya libála akoka koyóka Mongóngó ya Nzambe, útá na Nzambe Ye moko.
Ezali na eloko te monéne koleka koyoka Mongóngó ya Nzambe. Ezali te na epakweli koleka epakweli likoló ya ba bánde. Ezali na nzela mosúsu te kosangisa Mwasi ya libala kasi na nzela ya Mongóngó na Nzambe likoló ya ba bánde. Ezali te na NZELA mosúsu EBONGI BE longólá sé nzela ya KOFINA PLAY MPE KONDIMA LILOBA NYOSO OZALI KOYÓKA. Ezali mpenza Nzambe, oyo Atondi na mawa epai na Mwasi na Ye ya Libála. Ezali nzela na Ye EBONGI BE epesámi mpo ya lelo.
Nabiangi yo óya mpe ósangisama na nsé ya epakweli monene koleka ya mokolo na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Nzambe koloba mpe kolakisa bana na Ye Liloba libongi be na bomemáká Litéya:
Nzambe Oyo Atóndi Na Mawa 65-0119
Ndeko Joseph Branham
Likomi ya kotánga: Baefese 2: 1-5