26-0920 Momboto Ya Kozanga Boyokani

Nsango: 65-0118 Momboto Ya Kozanga Boyokani

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami 1 of TM [ Moko na Bango: Mok.],

Ntango bato batúnaka bisó:

M: Ozali moko na bangó “Kofina Play” bato ya bande baoyo bandimaka ete Nzambe Atindáki William Marrion Branham kobiánga Mwasi ya libála ya Nzambe kobima?

E: Ee, Nazali Moko na Bango.

M: Ondimaka Liloba nyoso lilobámáki likoló ya ba Bánde wana?

E: Masánzoli epai ya Nkóló, Nazali Moko na Bango.

M: Na nsima osengeli mpe kondima osengéli Kofina Play mpo koyóka Mongóngó na Ye kozala Mwasi na libála ya Klisto?

E: Nkémbo, yangó mpeza nde Nazali, yango nde Ngai mpenza mpenza…Nazali Moko na Bango.

M: Ozali nde koyebisa Ngai ete, ondimi sóló mpenza ozali moponami na Ye, oyo atángólamí, Mombóto ya Bokonzi oyo ebongisámáki libosó longwá na bozalisi ya mokili kondima Liloba na Ye, kozala Mwasi na Ye ya libála, mpe obongí be na miso na Ye, na lisúmu te, mpe okoki na yo káka te kozimbisama?

E: Alelúya, osímbí yango, nde ngai mpenza 110%, NAZALI Moko Na Bango.

Kokokana na Yesu Ye moko tozali ndimbola ya Liloba na Ye. Bana ya Bokonzi. Komónisama ya Molimo Mosanto. Momboto ya Bokonzi ya eleko oyo.

Boyebi nini? Ntango ekokí mpo moto nyoso áyéba mpenza oyo ezali bisó mpo miko mázala te. Tokotika Nzambe koloba na nzela ya mosakoli na Ye mpe kotia yango nyoso elongó mpo ya bino.

Nguya yango moko oyo eyéisáki mokili mózalisama na Liloba ezali kati na bato wana baoyo bazali na Molimó Mosanto. Ezali sóló. Mibali na basi, ezali ntango tóyeba ozali nani. Zábolo azali komeka kobómba yo na elilíngí, koyebisa yo ete ozali na yo bobéle elóko ezángi ntina ya kobángisa. Bozali yango te, bozali bana mibali mpe bana basi ya Nzambe.

Bonzambe ezali na Lóla te, ezali kati na yo. Alelúya!

E: Bonzambe ezali na Lóla te, ezali kobíka mpe kofánda kati na moko na moko na bisó!

Na mokolo ya sika nyoso, na pema nyoso tozali kopema, Emoniseli Apesi biso ya baoyo tozali ezali kokoma monene mpe monene koleka. Tozali Liloba ya bomoi kofanda kati na mosuni.

Toyebi oyo mpo ete Apesi biso Emoniseli ya nani nde Atindaki kati na mokolo ya bisó; nani nde Nzambe Ye moko Alobaki ete Akotinda koteya mpe kolakisa Liloba na Ye kati na Emoniseli 22.

Ngai Yesu Natindaki mwanje na ngai kotátwela bino makambo oyo kati na mangomba.
Atindaki mwanje na Ye: William Marrion Branham, koloba kati na MANGÓMBA na Ye…Yango nde moningai elingi koloba KOYOKA BA BANDE KATI YA MANGOMBA NA BINO. Oyo wana esengeli kutu na emoniseli te, osengeli kaka kotanga. Kokokana na Liloba, oyo ezali ntango ya kozimbisa koleka nyoso kati na lisoló ya mokili. Molimo ya solo mpe ya lokuta ikozala pene mpenza na lolenge ete ekozimbisa ata baponami mpenza soko nde ekokoka.
Nzambe Atindaki MWANJE NA YE epai ya mangomba. Tozali na Mongóngo na Ye na songe ya misapi ya biso. Tokoki koyoka mpenza Liloba na Liloba oyo Alobaki. Esengeli na koyeisama polele saa te to kolimbolama, nyoso Mwasi na libala asengeli kosala ezali bobele KOFINA PLAY mpe KONDIMA.

Akebisaki biso, bóbongola litono moko te to mokonza moko te likolo ya ba bande. Kotia te lisosoli na yo to makanisi na yo, yoka bobele Mongongo na Ngai mpe ndima. Kino lelo oyo, likambo yango ekokaki te; kasi lelo ezali mpo ete Ezali nzela ya Nzambe epésami mpo ya lelo.

Toúti bobele koyoka Bileko Nsambo ya Lingomba mpe boni na eleko moko na moko, milimó wana mitélémáki kolongola bato na Liloba ya sóló. Boni na eleko moko na moko, nsima ya motindami kolongwa, oyo basalaki kokamba bato kati na endimeli moko boye to lilako; epai ya bango moko mpe likanisi ya moto.

Lelo bazali komeka koboma nkombó na biso na bolobaka, “Oo, bandimaka ete ba bande nde Mongongo ya motuya koleka oyo osengeli koyoka. Bosengeli koyoka ba bande kati na lingomba na bino…ezali bolema. Ndeko Branham alobaki te ete boyoka ba bande kati na lingomba. Sikawa mongongo ya bateyi nde osengeli koyoka.”

Mpo na ngai, oyo wana nde momboto ya kozanga boyokani! BOSENGELI KOFINA PLAY mpe koyóka Mongongo ya Nzambe kati ya mangomba na bino lokola ezali Mongongo BOBELE MOKO endimisamaki na Nzambe Ye moko. Osengeli kotosa Liloba nyoso Nzambe Alobaki.

Ngai Yesu Natindaki mwanje na ngai kotátwela bino makambo oyo kati ya mangomba.

Mwanje yango andimisamáki azali koloba kati ya Lingomba na biso, yango wana Nabiangi yo koya komibakisa na biso koyoka Mongongo yango elongo na Mwasi ya libala longwa na mokili mobimba na ekanganeli ya singa mpe mipepe na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpe koyóka: 65-0118- Mombóto Ya Kozánga Boyókani”.

Ndeko Joseph Branham