Nsango: 64-0705 MOSALA MOBONGI
Balingami Mosala Mobongí mua Nzambe,
Bomoi ya solo nyoso ezalaki kati ya mobímbí, nkásá, mpe ezipelo, ezali sikawa koyángana kati na bisó, Mombóto ya Bokonzi ya Nzambe, Misálá mia Ye mibongí, mpe mizali komíbongisa mpo ya lisekwa, kobongama mpo ya bobúki mbuma. Alifa akómí Omega. Ya libosó akómí ya nsúka, mpe ya nsúka azali sikawa ya libosó. Toúti na elekelo mpe tokómí Misálá mia Ye mibongi, eténi oyo ebétémí koúta na Ye.
Mwasi ya libala mpe Mobali ya libala bazali Moko!
Nzambe atálisákí mosakoli na Ye galasísí ya moko na moko na bisó, Misálá mia Ye mobongí, kati ya emónoneli. Lokola atélemaki wana elongó na Nkoló na bolembétéláká Mwasi ya libala koleka libosó na ye,
Amónákí moko na moko na bisó. Bisó NYOSO tozalákí na míso ma bisó matálákí ALIMÁ EPAI NA YE. Alobaki ete tozalaki bato ya bobóto kotála atíkálá ndèle komóna na bomoi na ye. Ezalaki kaka na lolengé moko ya malámu zingázingá na bisó. Tomónánákí kitóko mingi epai na ye.
Bókanisa, oyo ezalákí EMÓNONELI ya Mwasi ya libala; Oyo akokaki koúlana na yango, mpe azalaki koyebisa bisó mpenza yango ezalaki ye kosala. Koyóka na bokéngi.
Akoyá koúta na bikólo nyoso, nde ekosála Mwasi ya libala. Moko na moko azalaki na nsúki milaí, mpe bipakólá-pakola te, mpe bilengé basi mpenza kitóko. Mpe bazalaki kolembetela ngai. Etálisaki Mwasi ya libala kobima na bikólo nyoso. Bomóní? Ye, Moko moko azalaki etaliseli ya ekólo moko, lokola batámbolaki alimá na molongó ya Liloba.
Mwasi ya libala, bótika Naloba yango lisúsu, MWASI YA LIBÁLA, koúta na ekólo moko na moko bazalaki na miso ma bango likoló ya mobateli ya bango, likoló ya ebólo ya bato….TE, yango te nde alobaki. Bazalaki na míso ma bango LIKOLÓ YA MOSAKOLI, kolembetela ye.
Ntango nyoso babátelí miso ma bango likoló ya mosakoli, bazalaki kotámbola na bobongi be. Kasi na nsima akébísí bisó, eloko moko ekómákí. Basúsu balongolaki míso ma bango likoló na ye mpe babandákí kolembetela eloko mosúsu oyo eútákí kaka kokende kati na libébí.
Na, nsima, Nasengelákí kokéngela Ye. Akolongwa na litámbé na Liloba wana soko Nakéngélí te, wana ezali Ye koleka, soko alekí. Ntango mosúsu ekozala ntango na ngai, ntango Nakómí na ngambo, bomóní, ntango Nasúkisi, to ézala ata nini.
Asengeli kokéngela Ye, to akolongwa na litámbe lokola Azali koleka. Kasi nsima alobí ntango mosúsu ekokí kozala ntango na ngai ntango Nasúkisi, ntango Nazali awa te, Bakokí kolongwa na nzela na bozángáká kobatela míso ma bango likoló na ye.
Azalaki polélé polélé kopesa ekébiseli epai ya MWASI YA LIBALA, Bosengeli kobatela míso ma bino likoló ya Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande. Nde nzelá epésámí na Nzambe mpo ya lelo.
Nde Mongóngó ekosangisa mpe ekobongisa be Mwasi ya libala. Soko bolongólí míso mpe matói ya bino na Mongóngó, bokolongwa na molongó mpe kokende na libébí.
Liteya moko na moko ezali kokóma polélé mpe polélé koleka. Ezali Nzambe na nguya komízipola libosó na bisó, koléisa Mwasi na Ye ya libala na Máná ebómbámákí oyo kaka tosengeli kolia. Elekí na yango kaka vitamine mpo ya bamosúsu nyoso, kasi ezali Biléi bibómbámákí mpo ya Mwasi ya libala.
Eyenga nini oyo ya Matóndó Mwasi ya libala azali na yango, kosala lipati likoló ya Liloba, kokóma Mwasi Liloba na Ye Mosala mobongí.
Atelémí ye moko, lokola Mobali ya libala, “abóyámí na bato, atiólámí mpe abóyámí na mangómbá.”
Mwasi ya libala atélémí lolengé wana. Ezali nini? Ezali Mosala mua Ye mobongí, bomóní, ezali Liloba oyo Akokí kosala kati na yango, komónisa. Kobóya!
Yaká komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Nzambe azali koloba na nzela ya mwanje na Ye ya nguya, mpe kokáta mpe kopétola bisó kokóma Mosala mobongí ya Nzambe.
Ndeko Joseph Branham
Liteya: 64-0705 Mosala mobongí
Makomí ya kotanga libosó ya losámbo:
Yisaya 53: 1-12
Malakí 3:6
St. Matái 24:24
St. Malako 9:7
St. Yoane 12:24 / 14: 19