NSANGO: 63-0630E Bomoi Na Yo Elongobani Na Nsango-Malamu?
- 25-0914 Bomoi Na Yo Elongobani Na Nsango-Malamu?
- 23-1008 Bomoi Na Yo Elongobani Na Nsango-Malamu?
- 22-0415 Bomoi Na Yo Elongobani Na Nsango-Malamu?
- 22-0414 ESODE YA MISATO
Balingami Bandeko Mibali mpe Basi,
Nalingí Nkoló, Liloba ya Nzambe, Etindá oyo, Mongóngó na Ye, mosakoli na Ye, Mwasi na Ye ya libala, koleka bomoi yango moko. Bazali banso MOKÓ EPAI NA NGAI. Nalingaka soko moké te kokakola likoló ya litónó moko, mokonza moko, to LILOBA MOKO Nzambe akomákí kati na Liloba na Ye to alobákí na nzela ya mosakoli na Ye. Epai na ngai Ezali nyoso Yango Elobí Nkoló.
Nzambe akanisákí Yango, nsima alobaki Yango na basakoli na Ye, mpe bakomákí Liloba na Ye. Nsima Atindakí mwanje na Ye ya nguya, William Marrion Branham, na mabelé na mikolo ya bisó mpo ete Ákoka komímónisa kati na mosuni ya moto mbala moko lisúsu, lokola asálákí na Abalayama. Nsima Alobákí na nzela ya mosakoli na Ye kozala Mongóngó ya Nzambe epai ya mokili, komónisa mpe kolimbola mabómbami manso mabómbamákí longwá na bozalisi ya mokili epai ya Mwasi na Ye ya libala oyo abongísamákí libosó.
Sikawa, Mwasi na Ye ya libala, BINÓ, bozali kokóma Liloba likómí mosuni; Moko elongó na Ye, Mwasi Liloba na Ye azongísámí mobimba.
Nayebí Nasósólámí mabe kati na oyo Nalobaka mpe Nakomaka. Tika ete Náloba na komísókisa lokola mosakoli na bisó alobákí, Nayékolí te mpe Nayebí ete Nakokí kokoma to koloba malamu te oyo Nazali koyóka kati ya motéma na ngai. Nandimí ete emónání lokola ete Nakomaka makási mbala mosúsu. Ntango Nasali yango, ezali te mpo ya kotálisa bozángi botósi, to kozala na loléngé mabé to kosámbisa moto moko, kasi libándá na yango. Nasálaka yango útá na bolingo kati na motéma mwa ngai mpo ya Liloba ya Nzambe.
Nalingí moto nyoso áyamba mpe ándima Etíndá oyo Nzambe atíndákí kobiánga Mwasi na Ye ya libala kobima. Natíkalá koyóka kati na motéma na ngai te to kotungisama ete batéi basengelákí kotéya lisúsu soko moké te; mbe ekozala kokende kotémela Liloba ya Nzambe. NAzali nde kaka na moléndé mpo ya Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande. Nandimi ete ezali Mongóngó ya motúya koleka BATÉI BANSO basengeli kotía ézala eloko ya LIBOSÓ libosó ya bato. Elingí koloba te ete bakokí kotéya te, Nalingí bobelé koyíkisa bango mpíko báyokisa ba bande kati ya masámbo ya bango ntango bato bayángani na nsé ya epakweli wana.
Ee, Nalingaki kosepela kozala na mokili mobimba koyóka Litéya yango moko na ntango yango moko zíngázingá na mokili mobimba. Ezali te mpo ete “Na”lobakí bongo, to mpo ete “Na”ponákí bande ya koyóka, kasi Nazali koyóka mpenza ete Mwasi ya libala Alingaki komóna boní Nzambe abongisaki nzela mpo ya oyo kokóma kati na mokolo ya bisó.
Soko tózalaka na maloba ma Yesu koloba lelo likoló ya bande, makomí ya Matai te, ya Malako te, ya Luka to ya Yoane te ya Oyo Yesu alobákí ( zambí bango nyoso bazali koloba yango na mwa bokeseni), kasi tokokákí koyóka Mongóngó ya Yesu, bomoto ya Ye, hain’t, totes, mpe fetches na Ye (bilobeli ya Angelé ya bato ya zámba kolimbola Ezali te, Nyoso mobimba, kozóngisa: [Mol.]) na matói ma bisó moko, batéi lelo balingaki nde koloba na losámbo ya bango: “Tokoyóka bande ya Yesu kati ya losambo na bisó te. Nabiangamí mpe Napakolámí kotéya yango, mpe kozongela Yango na litángí. Bóyóka na bino yango kaka ntango bokeí na ndako.” Bato balingaki koyíkela yango mpiko? Mawa koloba, kasi yango mpenza nde bazali kosala lelo. Ezali na BOKESENI TE, atá bákómisa yango pémbé bóní.
Epai na ngai, Ndeko Branham apesaki bisó ndakisa. Alingákí ntango mangómba nyoso, ndako nyoso, to ézala atá wapi bazwamáki, bazalákí bakangani elongó na nzela ya singa ete bákoka koyóka Litéya banso na ntango yango moko. Ayebakí ete bakokákí mpe bakozua ba bande mpe koyóka yango na nsima, kasi alingákí bango nyoso básangana mpe báyoka Liteya banso na ntango yango moko…EPAI NA NGAI YANGO EZALAKÍ NZAMBE KOTÁLISA MWASI NA YE YA LIBALA OYO EKOSÁLEMA NA MOKOLO YA BISÓ MPE ELOKO YA KOSALA.
Motéi nyoso ya solo oyo andimí Etindá akozala na boyokani koyeba ete ezali na eloko monéne te koleka kofanda na nsé ya kopakolama ya Mongóngó ya Nzambe, oyo ebombamáki mpe etiámákí likoló ya ba bande. Mwasi ya libala akondima, mpe akozala na Emoniseli, ete Etindá oyo nde Liloba ya Nzambe mpo ya lelo. Nakoki kosámbisa bobele na nzela ya Liloba, kasi ye nani akoloba te ete Etíndá oyo ezali Etémelo na ye azali na Emóniseli ya Liloba mpo ya lelo te, na bongo, akokoka kozala Mwasi na Ye ya libala boni?
Ezali bobele kozongela yango na botangi te, kotéya yango te to kolakisa yango te, kasi koyóka yango likoló ya bande nde ESIKÁ SÉ MOKO Mwasi ya libala akoki koloba Nandimi Liloba moko na moko. Etindá oyo ezali Yango Elobí Nkoló. Oyo Nateyaka to Nalakisaka ezali te Yango Elobí Nkoló, kasi oyo Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande elobí NDE EZALI YANGO…ezali Mongóngó SÉ MOKO mondimísámí na nzela ya Likonzí ya Móto.
Nayebí ezali na bandeko mibali mpe basi baoyo balobaka mpe bamíyókaka: “soko oyókaka Litéya te oyo Eyanganelo ya Branham etielaka bato, soko otangaka te mokandá ya Ba Mpongo bazali koyangana, mpe soko boyókaka kati na ba ndako na bino te na ntango yango moko bozali Mwasi ya libala te,” to “ Ezali libúngá kokende na lisámbo, osengelí kotikala kati na ndako na yo.” YANGO EZALI MPENZA LIBÚNGÁ. Natíkalá kokanisa bongo te, koloba bongo te, to Kondima bongo te ATÁ MOKE TE. Yango nde eyéisí kútu kokabwana mingi, biyókeli ya mpási mpe bobébisi bondeko kati ya Mwasi ya libala mpe mongúna azali kosalela yango kokabola bato.
Natíkalá kolinga kokabola Mwasi ya libala sokí moké te, Nalingí kosangisa Mwasi ya libala, lokola Liloba lilobákí TOSENGELÍ TÓSANGANA LOKOLA MOKO. Tosengeláki te kozala kosuana moko na mosúsu, kasi ezali kaka nde te na eloko mosúsu oyo ekoki kosangisa bisó longólá sé Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.
Tosengelákí te kobéndana mpe koyebisa bato oyo BASENGELI KOSALA soko bongo te bazali Mwasi ya libala te. Sálá bobele lokola Nkoló azalí kokamba yo. Bazali naino kaka bandeko na bisó ya mibali mpe ya basi. Tosengeli tólingana mpe tótósana moko na mosúsu.
Sikawa, kosuana te. Bomoni? Kándá ebótaka kándá. Eloko ya libosó oyebí, oyókisí Molimó Mosanto mawa akei mosíká na yo, okozala kozóngisa kosuana. Nsima Molimó Mosanto Apumbwí kokende. Kándá ebótaka kándá.
Na oyo mosakoli alobaki awa, Nalingaka sokí moké te koyókisa Molimó Mosanto mawa. Nalingaka sokí moké te kosuana. Tokoki kosolola elongó kati na bolingo, kasi kosuana te. Soko Nalobakí likambo ata nini etáísákí moto ata nani libakú kati na oyo nakomákí to Nalobakí, nasengi ete bolimbisa ngai, ezalaki mposa na ngai te.
Lokola Nalobaki libosó, Nayókí kobiangama na bomoi na ngai koúta epai ya Nkoló kotálisa bato epai na Mongóngó ya Nzambe mpo ya lelo. Batéi basúsu bazali na bibiángeli bisúsu mpe ntango mosúsu bazali komóna makambo na lolengé lokeseni, Masanzoli epai ya Nkoló, bazali kosala oyo BA yókí bakambámí na Molimó Mosanto kosala. Oya ngai botéi ezali na yango kaka koyebisa Mwasi ya libala: “ FINÁ PLAY” mpe Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande nde Mongóngó ya litómbá koleka okokí koyóka.” Nandimí ete batéi basengelakí koyokisa Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande kati na masámbo ya bangó.”
Mikandá nakomaka póso na póso mizali mpo ya eténi ya Mwasi ya libala baoyo bayókí ete bazali ndambo ya Eyanganelo ya Branham. Nayebí ebelé mosúsu batángaka yango, kasi Nazali na mokúmba kosala bobele lokola Nayókí Nakambamí mpo ya lingómba na bisó. Lingómba na lingómbá lizali nsómí; basengeli básala lokola bayókí ete bakambamí na Nkoló kosala, oyo wana ezali 100% Liloba. Natemélí bango te, tozangi kaka nde koyókana. Mpo na ngai mpe Eyanganelo ya Branham, tolingí na bisó kaka koyóka Mongóngó ya Nzambe likoló na ba bande.
Nabiangí mokili mobimba komíbakisa na bisó póso na póso. Nayíkísí bango mpiko soko bakoki komibakisa na bisó te, bámíponela bande moko, bande sé bande, mpe báfina play. Bakopakolama lokola libosó naino sokí moké te. Na bongo Nabiangí bino póso oyo komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali kosangana elongó mpe koyóka, 63-0630E Bomoi Na Yo Elongóbání Nde Na Nsango Malamu?
Ndeko Joseph Branham