25-1012 Bokómi Na Nsúka

Nsango: 63-0901E Bokómi Na Nsúka

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala Bande,

Sikawa bino bato kati ya ba bande.

Nkoló, tokobanda ko nde bóní kolimbola maloba maké masáto maye malingí koloba nini epai na bisó, Mwasi na libala ya Yesu Klisto? Ezali Emóniseli ya Etindá ya ngonga oyo epai na bisó. Ezali Nzambe koloba na nzela ya mwanje na Ye motindami koyebisa Mwasi na Ye ya libala: “ Nayebi bokotikala na Mongóngó na Ngai. Nayebí oyo Liloba na Ngai likoló ya ba bande ekolinga koloba epai na bino. Nayebí bokozala na Emóniseli ete Matéya maye malobákí Ngai likoló ya ba bande mazali Elembo ya Ngai mpo ya lelo.”

“Natiakí Mongóngó likoló na bande iye ya ebómbelo; zambí Matéya maye masengélí kosúkisa Liloba mobimba. Ekozala na nkóto na nkóto mbala nkóto baoyo bakoyóka Mongóngó na Ngai likoló ya ba bande mpe bakozala na Emóniseli ete oyo nde mosálá na Ngai. Ezali Molimó Mosanto ya lelo. Ezali Etindá ya Ngai Elembo”

“Natindakí basali na Ngai sembo mingi kati ya mokili mobimba koyebisa mosala na Ngai. Ntango bazóngakí, bayebisaki Ngai: “ Totósákí mitíndo mia Yo na boyókísáká ba bande na Yo. Tokútákí bato baoyo bandimí Liloba moko na moko. Bakómísí ndako ya bango moko losámbo koyamba Etindá na Yo. Toyebisaki bango, nyoso baoyo bakolinga koya na nsé ya Elembo na Yo, Etindá ya ngonga oyo, bakobíkisama.”’

Ezali ntango epai wapi moto na moto asengeli komítala mpe komítúna, nzela ya Nzambe ebongí be mpo ya lelo nde nini? Liloba ya mosakoli litíkalá kokwéa ata mbala moko te. Etálisámákí polélé ete yango nde solo SÉ MOKÓ, elóko SÉ MOKO ekosangisa Mwasi ya libala.

Nyoso elobákí ye ekómáki bobele lolengé lolobákí ye yango. Likonzí ya Móto lizalí naino awa elongó na bisó. Mongóngó ya Nzambe mozali naino koloba na bisó likoló ya ba bande. Mosakoli aútákí kaka koyebisa bisó ete Nzambe Akoleka likoló bobele wana emónákí Ye Elembo. Ezali ntango ya bokómi na nsúka mpo ya banso kokóta na nsé ya Etíndá Elembo.

Tomóní Lobóko lonéne ya Nzambe kati ya ntango oyo ya nsúka. Apesakí bisó Emóniseli ya solo ya Liloba na Ye mpe eyákí na nsé ya elembetele ya Elembo. Sasaipi, wana ezali bisó na nsé ya elembetele ya Elembo, tika ete tóya elongó mpe tólia Elámbo kati na bokómi na nsúka; pamba te toyebí ete Nzambe azali kobéleme kobeta na kosambisa.

Nalingí kobianga moko na moko na bino koyóka mpe kozua Elámbo mpe Molúlú ya Bosukwani Makaká Lomíngo loye, lokola tozali koyóka Litéya: Bokómi Na Nsúka 63-0901E.

Litéya mpe Molúlú ya Elámbo ikozala na Voice Radio kobanda na 5:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville. Nabóndeli bino bómíyóka bansómí kozala na losámbo na bino na 5:00 nsima ya nzángá na ntango ya mboka ya bino soko bolingí, lokola Nayebí ekozala pasi mpo ya mingi na bandimi na bisó na ngambo ya bibale binéne kobanda losámbo ya bino na ntango wana. Ekozala na ekanganeli ya mipepe epai wapi losámbo mobimba lokoki kozuama.

Ndeko Joseph Branham

Makomí ma kotánga libosó ya losámbo:
Esode 12:11
Yilimia 29: 10-14
St. Luka 16:16
St. Yoane 14: 23
Bagalatia 5:6
St. Yakobo 5: 16