NSANGO: 62-0204 Elambo
- PÁSIKA 2025 – ELÁMBO YA GODI & MOLÚLÚ YA BOSUKOLANI MAKAKÁ
- Pasika 2024
- 24-0328 Elambo
- 16-1009 Elambo
Molingami Mwasi ya libala wa Klisto,
Ntango ya nkembo nini oyo Mwasi ya libala ya Klisto akozala kozala na yango na Pasika ya Nsúka Ya Póso oyo. Nandimí ekozala moko ya makambo manéne ya bomoi ya bisó; ntango oyo tokobósana soko moké te. Nsúka ya póso ya Káfú-kafu.
Pasika yókó yókó etikalá kozala ntango moko godi mpo ya Mwasi ya libala, lokola tozali kokanga bikuke na mokili ya libandá na bokangáká masíni ma bisó manso mpe nyoso ya mokili oyo ekobendaka bokébi, mpe bobele kobúlisa lisúsu bomoi ya bisó epai na Ye. Ezali nsúka ya póso mobimba ebúlisámeli Ye kati na losámbo, lokola tozali koloba na Ye kati ya mokolo moko na moko, na nsima koyóka Liloba na Ye.
Mongúna akómisí bokébí ya bomoi ya bisó kobéndama na ye mpe kotóndisama na makambo mbílíngá-mbilinga mingi mpenza ya bomoi na ndengé ete ekómí mpenza makasi kokanga mokili libandá mpe koloba na Ye. Kútu masíni mpenza makosálelaka bisó koyóka Liloba, Satana asálelaka mangó kobébisa ntango ya bisó.
Kasi nsúka ya póso oyo ekokesene, mpe lokola nsúka ya póso ya Pasika ata moko te tosílá ndèle kozala na yango.
Ntango Nkoló atíakí likoló na motema na ngai koyóka Bilembo, Nazalaki na likanisi te boni mikolo mia sánzá mikozala. Kasi lokola ntango nyoso, ntango ya Ye ebongí be.
Biyenga bibalé bilekí, tozalaki na lokúmu ya boyóki Elembo ya 4, Eleko ya Mpongo, na sánzá ya Minei mwa 6, mbótámá ya mosakoli; boni ekokanákí mpenza.
Kasi sikawa, Nkoló azali kútu na mingi koleka na ebómbelo mpo ya bisó. Lokola Nalobaki, ntango nayókakí ete Nkoló Atiákí na motema na ngai koyókisa Bilembo, Nayebakí ete ekozua póso mingi kosilisa koyóka yango lokola ezali na Matéya 10 kati ya milongó miangó.
Wana etálakí ngai manáka, Namônákí ete Pasika ekozala libosó na bisó kosilisa Mateya mangó manso. Nakanisaki kati na ngai moko, Nabanza tosengeli tótélemisa koyóka Bilembo mpe Akopesa ngai Mateya mpo ya Pasika.
Kati na mwa ntango Namónakí …ekozala KOBONGA BE. Tokoki kokóba koyóka Bilembo na Elembo ya Nsambo ekozala koyóka ma na Lomíngo ya Pasika na Ntóngó. Nakokaki kondima yango te, etandání na molongó mpenza na manáka. Nayebaki bobele na ntango yango, OYO EZALI YO, NKOLO.
Nazalaki bongo na bosepeli bonéne mpe na bozili na etingia mpo na ntango na bisó ya Pasika elongó moko na mosúsu, mpe elongó na Ye.
Nayebaki ete Asalaki manáka mpo ya bisó.
Na bongo, soko Nkoló alingí, tokokóba koyóka Bilembo kati na Nsúka Ya Póso na bisó godi ya Pásika.
MOKOLO MWA MINEI
Ezalaki na mpokwa ya mokolo mwa Minei nde Nkoló Yesu aliáki Elambo ya Nsúka na bayekoli ba Ye, kati na ekaniseli ya Elekeli libosó ya esóde ya bana na Yisalaele. Libakú malamu nini oyo kozala na bondeko elongó na Nkoló kati ya ba ndako na bisó, libosó ya nsúka ya póso ya bisó mosanto, mpe kosenga Ye kolimbisa masúmu ma bisó, mpe kopesa bisó nyoso tosengeli na yango kati na mobembo mwa bisó.
Sala yango, Nkoló. Bikísa babeli. Lendisa batungisami. Pesa esengo na baoyo bazali na nsé ya nguya mabe. Pesa kimia na balembi na mitéma, bilei na baoyo na nzala, bimeli na bango na mpósá, esengo na bango batóndí na mawa, nguya epai na lingomba. Nkoló, yeisá Yesu kati na bisó na mpókwa oyo, wana ebelemi bisó kozua Elambo oyo ezali etáliseli ya nzoto na Ye ebúkanáki. Tobondeli, Nkoló, ete Átambwela bisó na motindo mpenza godi…
Tika ete Ópambola basúsu, Nkoló, zingázingá ya mokili mobimba, baye Bazali kozila na esengo boyei ya Nkoló, minda mibongisamí, mpe bilekelo nyoso ya mílinga bipangúsámí, mpe Pole ya Nsango Malamu kongenga na bisiká ya molílí.
Tika banso tóbanda na 6:00 nsima ya nzángá na ntango ya binó ya mboka na mboka koyóka Elambo 62-0204, na nsima mosakoli akokamba bisó kati na Molúlú mwa bisó mwa Elambo ya godi mpe Bosukwani Makaká, mokozala koleka na Lifeline app (na Angelé), to okoki komizuela losambo mobimba na Angelé to na nkótá isúsu na bofináká na ekanganeli awa na nsé.
Nsima ya Liteya, tokoyangana elongó na mabota ma biso kati ya ba ndako ya bisó mpe kozua Elambo ya Nkoló.
MOKOLO MWA MITÁNO
Tika tókende kati na libondeli elongó na mabota ma bisó na 9:00 na ntóngó, na nsima lisúsu na 12:00 nsima ya nzángá, kobianga Nkoló ázala elongó na bisó mpe átóndisa ba ndako ya bisó na Molimó Mosanto lokola tozali komibúlisa epai na Ye.
Tika ete makanisi ma bisó mázónga na mokolo wana na Kalvari, esili koleka pene na mbúla 2000, mpe tómóna Mobikisi na bisó akakémí likoló na ekulúsu, na nsima tómípesa na motindo moko kosala ntango nyoso yango ekosepelisaka Tata:
Mpe mokolo oyo, na bozalaká na motúya monene, moko ya mikolo minéne koleka, tika ete tótála makambo masáto mokolo moye Molingaki koloba mpo na bisó. Tokokaki kozua nkâmá na nkámá. Kasi na ntóngó oyo, Naponí bobele makambo masáto ma motúya, makeseni tolingí tótála, mpo na mwa ntango ikolanda, ntina na Kalvari epai ya bisó. Mpe Nabondeli ete ékwéisa mosumuki nyoso oyo azali awa; ekosala ete mobúlami nyoso ákende na mabóngo na ye; ésala ete mobeli nyoso átómbola kondima na ye epai ya Nzambe, mpe álongwa awa, abíkí; mosumuki nyoso, abikisamí; mozongi nsima nyoso ázónga, mpe ámíyóka nsóni; mpe mosanto nyoso, ásepela, mpe ázua botingami ya sika mpe elikia ya sika.
Na bongo na 12:30 nsima ya nzángá, tika ete tókútana elongó kati na ba ndako ya bisó koyóka: 63-0323 Elembo Ya Motoba.
Nsima na yango tika ete tokútana elongó kati na libondeli na mbala moko nsima ya losambo, kati na ekaniseli ya bobakisami na ekulúsu ya Nkoló na bisó.
MOKOLO MWA PÓSO
Tika ete mbala moko lisúsu banso elongó tósangana kati ya libondeli na 9:00 na ntóngó mpe 12:00 nsima ya nzángá, mpe tólengele mitema mia bisó mpo ya makambo manéne makosala Ye mpo ya bisó na kati ya bisó.
Nakoki koyóka Ye koloba: “Satana, yaka awa!” Azali Mokonzi sikawa. Asémboli loboko, Asimbí lifungóla yango ya kufa mpe ya ewelo longwá na loketo na ye, akangí yango na loketo ya Ye Moko. “Nalingi éyebana epai na yo. Osalá bipale ntango molai mingi. Nazali Mwana wa Nzambe mobótami na ngondo. Makila ma Ngai mazali naino kotanga na ekulúsu, mpe motúya mobimba mofútámí! Ozali lisúsu na makoki te. Otikámí bolúmbú. Pesa Ngai mafungola wana!”
Na bongo na 12:30 nsima ya nzángá, tokoya bisó banso elongó koyóka LILOBA: 63-0324m Mituna Mpe Biyano Likoló Ya Bilembo.
Mokolo nini YA KÁFÚ-KAFU oyo ekozala mpo ya Mwasi na Ye ya libala zingázingá na mokili mobimba.
Na nsima tika ete tókutana elongó kati na libondeli mbala moko nsima ya losambo.
MOKOLO MWA LOMÍNGO
Tika ete ya libosó tólamuka na ntá ntóngó lokola Ndeko Branham asaláki na ntóngó oyo mwa moninga na ye, ndeke ya tólo motáné, alamúsákí ye na 5:00 ya ntóngó. Tika bobele ete tótondo Nkoló mpo ya kosekwisa Yesu longwá na bakufi:
Na ngonga ya Mitáno na ntóngó oyo, moningá na ngai moké na tólo motáné apumbwáki na lininísa mpe alamúsákí ngai. Eyokanákí lokola nde mwa motema na ye molingaki kopasuka, na bolobaká: “Asékwí.”
Na 9:00 ya ntóngó mpe 12:00 nsima ya nzángá, tika ete tokangana mbala moko lisúsu kati ya monyolólo ya bisó ya libondeli, kobondela moko mpo ya mosúsu mpe komíléngele koyoka Mongóngó ya Nzambe.
Na 12:30 nsima ya nzángá, tokoya elongó koyóka Liteya ya bisó ya Pasika: 63-0324e Elembo Ya Nsambo.
Na 3:00 nsima ya nzángá, tika ete mbala moko lisúsu tósangana kati ya libondeli, kotóndo Ye mpo NSÚKA YA PÓSO YA KOKAMWA APESI BISÓ ELONGÓ NA YE MPE ELONGÓ NA MWASI NA YE YA LIBALA NA MOKILI MOBIMBA.
Epai ya bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi na ngambo ya bibale minéne, lokola mbúla elekí, Nalingí kobianga binó bósangana na bisó na ntango ya Jeffersonville, mpo ya ntango nyoso ya libondeli likoló na manáka oyo. Namoni, ata ko bongo, ete koyóka bande Mokolo mwa Minei, mwa Mitano, mpe mwa Póso nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville ekozala mpenza kpókósó mpo ya ebelé mingi na bino, na boye nabóndeli binó bómiyoka ba nsómí koyóka Mateya mango na ntango Ikoki na bino . Nzokande, Nakolinga ete, bisó banso tokutana elongó Mokolo mwa Lomíngo na 12:30 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville, koyóka Liteya ya bisó ya Lomíngo elongó.
Nasepelaki mpe kobianga bino mpe bana na bino kozala basangani ya misala ya Creations, Journaling, mpe mimekano ya YF, oyo libota ya bino mobimba bokoki kosepela na yango elongó. Tokanisi ete bokolinga yango lokola nyoso izuí mobóko likoló ya LILOBA tokozala koyóka na nsúka ya póso oyo.
Mpo ya manáka ma nsúka ya póso, mayebisi mpo ya bomiléngeli mpo ya molúlú mwa Elambo, bisaleli bikosengelama na yango mpo ya misala mia Creations, Mimekano mia Pasika, mpe nsango mosúsu, bómóna bikanganelo ya mipepe na nsé awa.
Tika ete tókanga ba telegóne ya bisó mpo ya nsúka ya póso ya Elámbo longóla sé kokanga ba fotó, koyóka Eteni ya Liloba ya mosakoli mpo ya Mokolo, mpe koyóka ba bande longwá na Table app, Lifeline app, to komizuela eloko longwá na ekanganeli ya mipepe.
Ezali lokúmu lonéne mpo ya ngai kobianga yo na libota na yo koya elongó na Mwasi ya libala zingázingá na mokili mobimba mpo ya nsúka ya póso etóndí na LOKÚMU, MASÁNZOLI MPE LOBIKO. Nandimí ezali mpenza solo nsúka ya póso ekobongola bomoi na yo mpo ya libela.
Ndeko Joseph Branham
Makambo masengelamí na yango na etenéte:
Manáka ma Molúlú mwa Elambo mpe Bosukolani Makaká
Lilako likoló ya bomibongisi mpo ya Elambo