NSANGO: 61-0730M Malako Ya Gabriele Epai Na Danyele
Balingami Baoyo bazali na ntina,
Ntango ya Malíli makasi ya bikámwa nini oyo tozalaki kozala na yango wana eyékolákí bisó Bileko Nsambo Ya Lingomba, na nsima Nzambe komónisa kútu koleka epai na bisó kati na Búku ya Emoniseli ya Yesu Klisto. Lolengé mikapo misáto mia libosó ya Emoniseli mizalaki Bileko ya Lingómbá, na nsima lolengé Yoane azuamáki na likoló kati na mikapo ya 4 mpe ya 5 kotálisa bisó makambo masengelákí koya.
Kati na mokapo ya 6, Amónisáki lolengé Yoane akitísamáki likoló na mabelé lisúsu komóna makambo kosálema maye makokende longwá mokapo ya 6 kino ya 19 ya Emóniseli.
Boni Mwasi ya libála akopámbolama na mwa Lomíngo lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba na nzela ya mwanje na Ye ya nsambo ya nguya mpe koyebisa bisó oyo ekomónisama nsima.
NAzali na nsai mingi koyebisa ete tokobanda sikawa boyekoli bonéne bwa Póso Ntúkú Nsambo ya Danyele. Mosakoli alobaki ete ekokangisa oyo etikali kati na Etindá libosó tókoka kokende kati ya Bilembo Nsambo; Keleló Nsambo; Malózí Másáto; mwasi likoló ya mwésé; kobwakama ya zábolo motáné; nkóto Mokámá na ntúkú minei na minei baoyo batiámí elembo; yónso ezali kokóma kati ya ntango oyo.
Búku ya Danyele ezali mpenza manáka mpo ya eleko mpe ntango tozali kobika kati na yango, mpe ata émónana kpókósó boni, Nzambe akofungola mpe akoyéisa yango petee mpo ya bisó.
Mpe Nzambe ayebi ete yango ezali ngai koluka sikawa, ete Nákoka kobóndisa bato na Ye mpe koyebisa bango yango ebélemi, ézala awa na ntóngó oyo, mpe libandá Kúná na mikili ba bande oyo ikokende, mokili mobimba, ete tozali na ntango ya nsúka.
Tozali bato toponámí na Nzambe baoyo tozali kozila na etingia mpe kobóndela mpo ya mokolo yango mpe ngonga yango. Mpe miso ma bisó matálí epai ya Likoló, mpe tozali kotálela Boyei na Ye.
Tika ete banso tózala pelamókó Danyele mpe tóbóngola bilongi na bisó na epai ya Likoló, kati na libondeli mpe malómbó, wana eyebi bisó na nzela ya botángi ya Liloba mpe na boyóki Mongóngó na Ye, boyei ya Nkoló ezali kobelema noki noki; tozali na nsúka.
Sungá bisó Tata kotia pembeni bozitó nyoso, lisúmu nyóso, kozanga kondima ya moké nyoso oyo ezali kokanga bisó na petee. Tiká ete sikawa tópúsa na epai ya elembo ya ebiangeli ya likoló, na boyebáká ete ntango ya bisó ezali na ndelo.
Etindá esí ebimí. Nyoso ebelemi sikawa; tozali kozila mpe kopéma. Lingómbá litiami elembo mosika. Bato ya kanza bazali kolútisa kanza ya bango. Mangómbá mazali kokóba kozinda kati boí mangómbá, kasi babulami na Yo Bazali kobelema na Yo koleka.
Tozali na Mongóngó kogánga útá na lisóbé, kobianga bato bázonga na Etindá ya ebandeli; kozónga kati na makambo ya Nzambe. Tosósoli na nzela ya Emóniseli makambo maye mazali kosálema.
Yaka komíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Nzambe azali komónisa Liloba ya Ye epai na bisó, wana ezali bisó kobanda boyekoli bonéne na bisó ya Búku ya Danyele.
Ndeko Joseph Branham
61-0730M– Malako Ya Gabaliéle Epai Ya Danyéle.