24-0707 NZAMBE ABONGOLAKA NDELE LIKANISI NA YE LIKOLO NA LILOBA NA YE?

Nsango: 65-0418E NZAMBE ABONGOLAKA NDELE LIKANISI NA YE LIKOLO NA LILOBA NA YE?

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala Mokano Mobongi Be,

Mokolo moúmelí mpe Boyei ya Nkolo ekomi pene. Ekuke ezali kokangama mpe ntango ezali kosila, soko naino esili te. Ntango eleki mpenza mpo ya koyengayenga; kozala lokola litíti liningisami na mopepe; kozala na matói ma mokosa. Ezali ntango ya kozua mokano alimá mpenza. Esengeli nde Nasala nini kozala Mwasi na Ye ya libala?

Nzambe abongolaka nde Likanisi na Ye na ntina na Liloba ya Ye? SOKI TE. Na bongo esengeli tósala makasi mokolo na mokolo, na motema mpe bomoto na biso mobimba kozala kati na MOKANO mwa YE MOBONGI BE. Tosengeli tomitika na Mokáno mwa Ye mpe Liloba ya Ye. Kobete Yango ntembe soki moke te, bobele kondima mpe koyamba Yango. Komeka te kozua nzela ya bokími zingazinga na Yango. Zua Yango bobele lolenge ezali Yango.

Mosakoli ayebisi biso kati na Liteya oyo ete ntina na ye ezali komonisa biso ete Nzambe asengeli kobatela Liloba na Ye mpo ete átikala Nzambe, kasi ebelé monene balingaka kozua nzela ya bokimi zingazinga na Yango, mpe kozua nzela mosusu. Ntango basali bongo, bamíkúti bazali kokóba libosó, mpe Nzambe Azali kopambola bango,kasi bazali kosala kati ya mokáno mwa Ye molingisámí nde kati na Mokáno mwa Ye Mobongí Be te, mwa Bonzambe. 

Mosakoli azongisi biso na Liloba mpe Apesi biso ndakisa ya kotala, koyekola, mpe akaniseli biso, NZAMBE Abongolaka TE Likanisi na Ye to nzela na Ye, Azali Nzambe mpe Abóngwanaka TE.

 Sasaipi tomoni ete baoyo nyoso mibale bazalaki bato ya molimo, nyoso mibale basakoli, nyoso mibale babiangamaki. Mpe Mose, mpenza kati ya molongó ya lotómo, na Likonzi ya Móto saa libosó na ye mokolo na mokolo, Molimo ya Nzambe likolo na ye, kati na molongó ya lotómo. Tala mosali mosusu ya Nzambe ye oyo ayei, abiangami na Nzambe, atiami na Nzambe kati ya mosala, mosakoli oyo Liloba ya Nzambe liyaka epai na ye. Awa nde molongó ya likáma. Moto moko te akokaki kobete ntembe mpo ya moto wana kozala ya Nzambe—ya Nzambe, zambi Biblia elobaki ete Molimo ya Nzambe asololaki na ye, mpe azalaki mosakoli.

Nkolo, boni yango ezali pene? Nakoki nde koyeba ko boni, wana banso babalé bazalaki basakoli? Banso bábale mibali batóndi na Molimo babiangami na Nzambe, batiami na Nzambe kati na mosala; basakoli ya Nzambe baoyo Liloba ya Nzambe liyaka epai na bango. Banso bábalé koloba ete Molimo Mosanto azali kokamba bango.

Tika ete tótanga mpe tóyekola mwa maloba na bokéngi mpenza na ntina ya oyo motindami ya Nzambe mwanje ya nsambo alobi. Tolingi oyo elobi ye; oyo elobi Lingomba te, oyo Molakisi Jones alobi, to oyo moto mosusu ata nani alobí. Tolingi oyo YANGO ELOBI NKOLO elobí na nzela ya mosakoli na Ye. 

 Mose, na bozaláká mosakoli oyo abongisamaki na Liloba ya Nkolo, andimisamaki ete aponamaki kozala mokambi ya bango ya ngonga, mpe ete Abalayama Alakáki makambo manso maye,…

Moto moko te akokaki kozua esika ya Mose. Ata ko ba Kóla bakokaki kobima boni, mpe ba Datána boni; ezalaki Mose, nde Nzambe abiangaki, ézala ata nini.

 Mose nde oyo Nzambe aponaki kokamba bato. Babali basusu batelemaki mpe balobaki ete bapakolámáki, bazalaki mpe mibali batóndisamaki na Molimo Mosanto. Nzambe abiangaki bango kokamba mpe lokola. Kasi Mose nde azalaki mokambi Kokokana na Mokano mwa Nzambe Mobongi Be ya ebandeli kokamba bango.

Kasi, mpe soko bato balingi kotambola kati na Mokano mwa Ye Mobongi Be te, Azali na mokano molingisami Akotika bino bótambola kati na yango. Botala, Alingisi yango, malamu mingi, kasi Akosala ete ésala mpo na nkembo na Ye, kati na Mokáno mwa Ye Mobongi Be. Sikawa soko bolingi…

 Moto moko te alingi kozala kati ya mokano mwa Nzambe molingisami. Mwasi ya libala ya solo alingi kozala kati ya Mokano mwa Ye Mobongí Be, ntango nyoso, ézala motuya ata nini.

Ezali na bozangi boyokani ebelé, makanisi, kobulungana, nzela, likoló ya litomba ya biyóki ba bande.

Biso nyoso toyebi oyo nde mama ya likambo lisali ete bandimi ya Etindá  bakabwani lelo. Toyebi été Mwasi ya libala ASENGELI, MPE AKOZALA, asanganisami elongo; ezali Liloba.

Ezali na mibali batondisami na Molimo, baoyo babiangami na Nzambe kati na Lingomba lelo. Bazali bato ya Nzambe bapakólámí babiangami koteya Etindá oyo. Kasi Ezali atá na moko te na bango oyo tokoki kozala na koyokana likoló na ye.

Bakoki nde kozala baoyo bakosangisa Mwasi ya libala boni? Tokosangana nde zingazinga ya botéi ya bango? Ya solo babiangami kokamba etongá ya bango, kasi kokamba bango kozongisa bango na ETANDELO YA NZAMBE YA EBANDELI. MOKAMBI NA YE. MOSAKOLI NA YE. Botéi ya bango te.

Soko bazali kolakisa bino te ete Mongóngó likoló ya ba bande nde oyo Bo SENGELI kolanda, mpe bosengeli kondima ezali Mongóngó ya litomba koleka bosengeli koyoka, bazali na bango kaka kati ya mokano mwa Ye molingisami.

Soko bayebisi bino ezali Mongóngó ya litomba koleka, mpe bandimi yango mpenza solo, na bongo bázánga Kofina play boni ntango nyoso bozali elongo?

Soko olingi kozala na bondimisami mpenza, BONDIMISAMI MPENZA, ete ozali kati ya Mokáno mwa Ye Mobongí Be, ezali na NZELA ALIMÁ sé moko. Yango nde koyoka Mongóngó mwa Nzambe mondimisami likoló ya ba bande.

Eloko ya liboso boyebi, bande ekokwea kati na ndako ya bango. Ezui yango bongo. Soko Azali mpate, akozala na boyokani na yango. Soko Azali ntaba, akobeta bande na lokolo kobimisa yango libándá. 

Esengeli NANDIMISAMA NA SOLO MPENZA. Nakoki te, mpe Nakokoka te, kosakana ata moké mpenza na Seko na Seko ya ngai.  NAYEBI Mongóngó likoló ya ba bande nde Mongóngó ya Nzambe epai ya Mwasi ya libala. NAYEBI Ekosalaka mabúngá te. NAYEBI Endimisamaki na Likonzi ya Móto. NAYEBI Ezali oyo Nzambe Aponaki kokamba Mwasi na Ye ya libala. NAYEBI Mongóngó wana nde Mongóngó bobele moko ekokí mpe eko sangisa Mwasi ya libala. NAYEBI ekozala Mongóngó wana nde nakoyoka koloba “Tala Mwana Mpate ya Nzambe”.

NASENGELI KOFINA PLAY mpe koyoka Mongóngó wana. Obiangami koya komibakisa na biso Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: 65-0418E Nzambe Akobongolaka Nde Likanisi Na Ye Na Ntina Ya Liloba Na Ye?

 Ndeko Joseph Branham

 Tokobanda Liteya NaMolongó ya 61

Makomi ya kotanga liboso ya boyoki Liteya:

Esode Mokapo ya 19

Mituya 22:31.

St. Matai 28:19
Luka 17:30
Emoniseli Mokapo ya 17