Nsango: 64-0802 EZALELO EKOYA YA MOBALI YA LIBALA YA LOLA MPE MWASI YA LIBALA YA MOKILI
- 26-0111 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé
- 24-0414 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé
- 23-0312 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé
- 22-0918 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé
- 21-0502 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé
- 19-1103 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé
- 17-0924 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé
Molingami na Ngai Ya Motéma Koleka,
Nalingí yo mingi koleka. Ozali mosuni ya mosuni ya Ngai, mpe mokuwa ya mokuwa ya Ngai. Kútu libosó Názalisa minzóto, sánzá, molongo ya Ngai mobimba, Namónákí yo mpe Nalingákí yo ndèle. Nayebaki ozalákí eténi na Ngai, oyo ya Ngai MOKO kaka wa motéma. Yo na Ngai tozalákí MOKO.
Mokolo Natálélákí mpe Nazilákí útá Namónákí yo ndéle nsúka nsúka yango oyo ekómí. Sikawa Nazali kobiánga yo mpe kosangisa yo longwá na ebimelo ya ntango mpe elimwelo ya ntango, likoló mpe ngelé, na nzelá ya Mongóngó ya Ngai. Ozali makanisi ma Ngai, Liloba ya Ngai, Mwasi na Ngai ya libála, oyo amónísámí.
Nazilákí mingi koyebisa yo makambo manso mazali kati na motéma na Ngai, na bongo Nakomákí yango na nzelá ya basakoli na Ngai mpe Nasénzélákí Yango ebátélámákí mpo na yo mpo ya bilánga nkóto na nkóto. Mingi batángákí Yango mpe bandimákí yango kati na bilánga nkámá na nkámá, kasi Nabátélákí makambo mingi mabómbámákí kino EKÓMÍ BINO. Epai na BINO bobélé nde Nakoyebisa.
Batálélákí koyeba mpe koyóka makambo nyoso oyo ya bikamwa Nabátélákí ya kobómbama, kasi lokola elakákí Ngai yo, Nazilákí mpe Nabátélákí yango ya kobómbama kino sikawa, kaka mpo ya YO, OYO YA NGAI MOKO MPE MOKO KAKA.
Nalakákí yo ete Nakoya mpe Nakomímónisa mbala moko lisúsu kati na mosuni ya moto, ete Nákoka koyébisa yo, mpe komónisa yo makamb’oyo nyoso. Nalingakí ete óyóka MONGÓNGÓ NA NGAI koloba mbala moko alimá na yo.
Napakólákí ebelé mosúsu na Molimó na Ngai Mosanto koyebisa yo mpo ya bolingo na Ngai, kasi lokola Nasálákí ntango nyoso, mpe Nakokí kobóngwana soko moké te, Naponákí moto moko: mwanje na Ngai, mosakoli na Ngai, kozala Mongóngó na Ngai ete Nákoka koloba Yango Elobí Nkoló epai na yo.
Nalingákí koyébisa yo, obikisamákí te na mokolo sóngóló. Ozalákí na yo ya kobikisama ntango nyoso. Nayei kaka nde kosíkola yo ózónga. Obikisamáki longwá na ebandeli zambí mpo ya kobanda ozalákí na Bomoi ya Sékó. Ntina wana, na míso na Ngai, masúmu ma yo manso makokí kútu te komónama na Ngai, eloko sé moko Nayókaka ezalí mongóngó na yo. Namónaka na Ngai kaka etáliseli na yo.
Bóní Naúmeli kozila koyebisa yo makambo mingi mpenza. Motéma na Ngai mozali kopunjwapunjwa na kosepela. Boni Nazilákí mpo ya Lipati na bisó ya Makwéla, mbúla nkóto na bisó ya bo nkóto elongó. Koyebisa yo kati ya bozindó nyoso na ntina ya Ezalelo ya Bisó Ekoya elongó; Bóni Naléngélakí eloko moko na moko mpo na yo, na elóko nyoso kokokana na pósá na yo.
Wa Ngai wa motéma, soko okanísí ezali bikámwá sikawa koyóka Mongóngó na Ngai koloba na yo, zilá bobélé kozila, oyo ezali kaka nde elílíngí ya boúlani ya oyo ekozala ntango tokobika kati na Mboka yango elongó. Mosakoli na yo akobika kútu na ekuke oyo elandí ya yo: akozala mozalani na yo.
Tokotámbola na ba bala-bála wana ya wólo mpe komela longwá na Etóko elongó. Tokotámbola kati na ba paladíso ya Nzambe elongó na banje kolembetela mabelé, koyémba ba njémbo…Mokolo nini oyo ekozala!
Nayebí nzelá emónání mabakú, mpe ntango mosúsu ekómaka makási mingi mpo na yo, kasi ekozala moké koleka, moké koleka, ntango tozali elongó moko na mosúsu.
Mpo ya sikawa, Nakoyánganisa bino mbala moko lisúsu mpe koloba na bino Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe koyebisa bino na ntina ya “Ezalelo Ekoyá Ya Mobali ya libala ya Lóla Mpe Mwasi Ya libala Ya Mabelé”. Nakokí kozila te kino ekosangisama Ngai na bino na ntango wana.
Bókanisa mpe bóbósana soko moké te, Nalingí bino mingi mpenzá.
Na mpo na Ye,
Ndeko Joseph Branham
Makomi:
St. Matái 19:28
St. Yoane 14: 1-3
Baefese 1: 10
2 Petelo 2:5-6 / Mokapo ya 3
Emóniseli 2:7 / 6:14 / 21:1-14
Lewitiko 23:36
Yisaya Mokapo ya 4 / 28:10 / 65:17-25
Malaki 3:6