Nsango: 64-0719M LIPATI YA MINDULE
- 25-1214 LIPATI YA MINDULE
- 24-0310 LIPATI YA MINDULE
- 22-0821 LIPATI YA MINDULE
- 21-0328 LIPATI YA MINDULE
Molingami Mwasi Ya Libala Oyo Abongí Be,
Oyo ezali kaka te moto kobongisa, baninga. Oyo nde YANGO ELOBÍ NKOLÓ, Likomí.
Moklisto nyoso alingí kozala Mwasi ya libala, nzokande toyebí Mwasi na Ye ya libála akozala bobele mwa ndambo ya baponami. Toyebí Azali na mokáno molingísámí, kasi Mwasi na Ye ya libála asengeli kozala kati ya Mokáno mua Ye Mobongí Be. Na bongo, tosengeli koluka Nzambe kati ya Liloba na Ye, na yango na nzela ya Emóniseli, tokoyeba Mokáno mua Ye mobongí be loléngé nini ya kokóma Mwasi na Ye ya libala.
Tosengeli Koluka-luka kati ya Makomí, mpambate toyebí ete Nzambe abóngolaka SOKI MOKÉ TE likanisi na Ye likoló ya Liloba na Ye. Nzambe abóngolaka manáka ya Ye soki te. Abóngolaka soki moké te ELOKO ATA NINI. Lolengé Asalakí yango mbala ya libosó ebongí be. Oyo Asalákí lobí Akosala eloko yango moko lelo.
Lolengé Abikisákí moto longwá na ebandeli, Akosengela Ábíkisa moto lelo motindo yango moko. Lolengé Abíkisákí mokoni ya libosó, Asengélí kosala yango motindo moko lelo. Lolengé Nzambe Aponákí kobianga mpe kokamba Mwasi na Ye ya libála, Akosala yango motindo yango moko lelo; zambí Azali Nzambe mpe Abóngwanaka te. Liloba liyébísí bisó ete Yesu Klisto azali LOLENGÉ MOKO lobi, lelo mpe libela.
Na bongo, ntango totángí Liloba na Ye, tokokí polélé-polélé komóna LOLÉNGÉ NINI nde Aponákí kobianga mpe kokamba Mwasi na Ye ya libála mpo ya eleko moko na moko. Aponákí MOTO MOKO. Alobaki ete bazalaki Liloba mpo ya mokolo ya bango. Mosakoli ayebisaki bisó Atikálá SOKI MOKÉ TE kozala na ebólo ya bato; bazalaka na nzelá ndengé na ndéngé ikeseni, makanisi makeseni, mpe ya motúya koleka, Alobaki, LILOBA YA NZAMBE LISENGELI NA NDIMBOLA TE.
Ntina wana, oyo mosakoli moko na moko alobaki na eleko moko na moko ekoki kobakisamela eloko te to kolongwamela eloko te. Esengeli ézala Liloba nsima ya Liloba oyo ELOBÁKÍ YE. Pete mpenza soko otúní ngai nzela epesámí ya Nzambe nde nini….TIKÁLÁ NA MOSAKOLI.
Sikawa, bobele te eyébí bisó mpenza nzela epésámí ya Nzambe longwá na ebandeli ezalaki nini, Nkoló akoloba kútu na nzela ya mwanje na Ye mpe koyebisa bisó yango ekosála Ye na mikolo mikoya, bobele kotálisa polélé mbala moko lisúsu, NZAMBE ABÓNGOLAKA MANÁKA NA YE TE.
Nsima ya Mwasi na Ye ya libála (bisó) kolongwa na mabelé oyo mpe tobiangámí na Lipati ya Libála, Nzambe akobiánga ko nde Bayúda baponami 144.000 motindo nini? Ebólo ya bato?
Sikawa, ntango kaka Lingómbá oyo (Mwasi ya libála) abéndámí elongó, Azuámí na likoló; mpe libómbami wana ya Elembo ya Nsambo, to Elembo ya Nsambo, libómbami ya bokei. Mpe Bayúda babiángámí na libómbami ya Nkáké ya Nsambo, oyo ezali basakoli mibalé, Elia na Mose, mpe bazóngí.
Na bongo ntango kaka Mwasi ya libála abéndámí elongó, Tokozuama na likoló. Toyebí ezali na eloko sé moko ekokí kobenda Mwasi ya libala elongó, Molimó Mosanto, mpe Molimó Mosanto nde Liloba na Ye, mpe Liloba na Ye mpo ya lelo nde Mongóngó ya Nzambe, mpe Mongóngó ya Nzambe nde…
Soko nabétísí yo libakú na bolobáká bongo, limbisa ngai, kasi, Nayókákí lokóla ete ebóyamákí, kasi, Nazali Mongóngó ya Nzambe epai na bino. Bomóní? Nalobí yango lisúsu, mbala wana ezalákí na nsé ya pémélá, bomóní.
Tíká ete Nakóta mpenza awa mpe Náloba, bobele ETÉNI YA LILOBA oyo moko útá na mwanje ya Nzambe motindami oyo andmísamákí esengelakí ékáta likambo mpo ya baoyo bamíbiángí bayamboli bandimi ya Etíndá oyo ya ntango ya nsúka kosenga mobáteli na bango KOFINA PLAY kati ya masámbo na bango to ákita kolongwa na etéyelo na ntina ete bákoka kopona mobateli oyo azali na EMÓNISELI YA SOLO KOÚTA NA NZAMBE.
Na bongo, Keleló eyúlákí mpe basakoli bábalé bamónání lokola Akoki te kozala na mwanje na Ye ya nsambo mpe Mwasi na Ye ya libala awa na mabelé na ntango yango moko eyéí bango. Bongo, Azali kobianga Bayúda na lolengé nini? Lolengé yango moko Abiángákí Mwasi na Ye ya libala ya mabóta.
Mpe Bayúda babiangámí na nzela ya libómbami ya Nkáké ya Nsambo, oyo ezali basakoli mibalé…
Mwasi ya libala asengeli kolongwa na nzela, komata sikawa; ete basáli mibalé, basali mibalé ya Nzambe, kati na Emóniseli, basakoli mibalé, bákoka komónana na mosálá, koyúlela bango Keleló ya Nsambo, koyébisa bango Klisto.
Polélé mpenza, Nzambe abóngolaka manáka ma Ye te. Atíndákí basakoli na Ye. Na bongo, Mwasi na Ye ya libála akotíkala na nzela na Ye epésámí, mwanje na Ye mosakoli, Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.
Na bongo kokómisa yango polele saa, Nzambe mbala moko lisúsu alobí mpe ayebisi Mwasi na Ye ya libala: botíkálí sembo epai na Ngai mpe nzela na Ngai epesámí, boye nzela na Ngai epesámí mpo ya mokolo na bino akoyébisa bino:
Mwanje ya Nsambo, motindami, alobí: “Tála Mwana Mpate ya Nzambe molongoli ya lisúmu ya mokili!”
MONGÓNGÓ YANGO ezali na litómbá koleka; MONGÓNGÓ YA NZAMBE koloba na nzela ya mwanje na Ye ya Nsambo likoló ya ba bande. Nzambe akosálela MONGÓNGÓ WANA, MONGÓNGÓ YA MWANJE NA YE YA NSAMBO. EBÓLO YA BATO TE…NGAI TE…MOBATELI NA YO TE…MONGÓNGÓ YA MWANJE NA YE YA NSAMBO MOTINDAMI kotálisa bisó epai na Ye moko, Nkóto na bisó Yesu Klisto.
Na boye, toyébí:
● TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA
● TOZALI KATI YA MOKÁNO MWA YE MOBONGÍ BE
● TOZALI KOLANDA MANÁKA MA YE MPO YA LELO NA BOFINÁKÁ PLAY.
Eténi moko ya Mwasi na Ye ya libala bakozala koyangana Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka mobateli na bisó, mwanje ya Nzambe motindami, William Marrion Branham, mpe Akozala koloba mpe komónisa epai na bisó ete ezali na Lingómbá mosúsu te, ebólo mosúsu ya bato te útá na ebandeli ya mokili, oyo batíkálá ndéle kozala na libakú malamu tozali na yango kosangisama elongó koyóka Nzambe koloba na bango mbala moko alimá.
Bato bapámbólámí nini oyo tozali. Totóndí na esengo. Totóndí na matóndí. Mwasi ya libala azali kokóma MOKO na Mobali ya libala.
Ndeko Joseph Branham
Lipati Ya Mindúle 64-0719M.
Makomi ya kotánga libosó ya boyóki Litéya:
Lewitiko 16
Lewitiko 23:23-27
Yisaya 18: 1-3
Yisaya 27:12-13
Emoniseli 10:1-7
Emoniseli 9:13-14
Emoniseli 17:8