25-1102 Kozipolama Ya Nzambe

Litéya: 64-0614M Kozipolama Ya Nzambe

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Liloba Limónísámí,

Tokokí nde kokanisa Yango! Likonzí ya Móto yango moko liyákí likoló ya bato wana baoyo bakomákí Biblia ezali Likonzí ya Móto yango moko tozali koyóka mokolo na mokolo, kolimbola mabómbami manso ya Biblia epai na bisó: Liloba ya Nzambe Limónisámí!

Nzambe amízipákí Ye moko kati ya basakoli na Ye ya Kala koloba Maloba ma Ye epai ya bango. Yango nde Asálákí ndèle. Kasi kati na mokolo ya bisó, mosakoli ya bisó, William Marrion Branham azalaki Liloba ya bomoi epai ya bato, azipámákí na Likonzí ya Móto.

Epakweli ezali moto. Elobelo Klisto elingí koloba “mopakolami,” bomoni, “mopakolami.” Na boye Mose azalaki Klisto na mikolo mia ye, azalakí mopakolami. Yilimia azalaki Klisto na mikolo mia ye, na eténi ya Liloba mpo ya mokolo yango.

Nzambe Alimbolaka Liloba ya Ye Moko. Ndeko Branham alobákí yango; Nzambe Alimbolaki Yango. Azalaki na Liloba. Ebólo ya bato te, William Marrion Branham! Nzambe Azuaki MOTO MOKO. Akokí te kozua mitema mibalé to mísáto mikeseni na makanisi makeseni. Azuaka MOTO MOKO, mpe akómí Liloba ya Nzambe ya bomoi libómbámí nsima ya mosuni ya moto.

Tozali lisúsu nsima ya ezipelo wana te, bana miké. Nzambe ayéi mobimba na míso ma bino. Ezipelo ya kala ya ebongiseli mpe ya momesano esilí epasólámí longwá na Liloba ya Nzambe, ete Ékoka komónisama! Kati na mokolo oyo ya nsúka, ezipelo wana ya momesano esilákí kopaswama, mpe Likonzí ya Móto litélémí awa. Ye oyo awa, komónisa Liloba mpo ya lelo oyo. Ezipelo epasólámí.

Bótala ba bande lokola izali kokita, bótala moko na moko, boni ezali koya polélé koleka mpe koleka lisúsu; soko bozali na matói ya koyóka, bomóní, míso ya komóna.

Yango nde ezali naíno kobeta bato na kúfa míso lelo. Balingaka koloba bandimí mosakoli ya Nzambe amemákí Liloba, kasi epakweli yango ezali likoló ya basúsu kokamba bisó, mosakoli te.

Mosakoli ayebisaki biso ete Nzambe akokí te kobúka Liloba na Ye. Na mikolo ya nsúka, esengelákí ézala eloko yango moko lisúsu. Nzambe akokí te kobóngola nzela na Ye, to kobóngola Liloba na Ye. Alobaki Abóngwanaka te. Atíndákí ntango nyoso basakoli na Ye bobele te komema Liloba na Ye, kasi kokamba Mwasi na Ye ya libala.

Lokola esálemákí na eleko moko na moko, Bonzambe bozipamákí Kati na mosuni ya moto. Bótala, Asalákí yango. Basakoli bazalaki Bonzambe, bozipamákí. Bazalaki Liloba ya Nzambe (ezali solo?) lizipamákí kati na mosuni ya moto. Bongo, basósóláki soki te Mose ya bisó, bomóní, Yesu.

Sikawa ezali kaka te Liloba likomámí epai ya bisó, ezali likambo yango mpenza. Tozali kati na Ye. Sikawa tozali kosepela. Sikawa tozali kolembetela Ye. Sikawa tozali komóna Ye, Liloba, komímónisa Ye moko.

Nde, tokómí eténi na Ye. Tozali ezipelo ezali kozipa Ye. Tozali eténi na Ye; ntango nyoso Klisto azali na kati na yo, lokola Klisto azalaki ya Nzambe.

Tozali kobomba Klisto nsima ya ezipelo tempelo ya poso na bisó. Tozali mikandá mikomámí, Liloba likomámí. Tozali Liloba lisilákí kokomama, limónisámí.

Mpe ntango omóní Liloba limónisámí, omoni Tata Nzambe, zambí Liloba nde Tata. Liloba nde Nzambe. Mpe Liloba limónisámí, ezali Nzambe Ye moko kozua Liloba na Ye Moko mpe komónisa Yango kati ya bandimi. Eloko moko te ekokómisa yango na bomoi kasi bobele bandimi, kaka bandimi.

Nzambe, azipamí kati ya mosuni ya moto, koloba mpe komónisa Liloba na Ye epai na bisó mokolo na mokolo. Nzambe kati na mosuni ya moto kobika kati na moko moko na bisó.

Ndeko Joseph Branham

Liteya: 64-0614M- “Kozipolama Ya Nzambe”
Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville

*Bókanisa mbóngwáná ya ntango