Litéya: 63-1229E Bóbongola Miso Epai Na Yesu
- 25-1026 Bóbongola Miso Epai Na Yesu
- 24-0211 Bobongola Miso Epai Na Yesu
- 22-0724 Bobongola Miso Epai Na Yesu
- 20-0531 Bobongola Miso Epai Na Yesu
- 18-0325 Bobongola Miso Epai Na Yesu
Balingami Bayóki Ya Bande,
Ntango eyéi ete moto na moto ámítuna ye moko: “Ntango nayókaka ba bande, Mongóngó nini nde nayókaka? Ezali nde bobele mongóngó ya William Marrion Branham, to nayókaka nde Mongóngó ya Nzambe mpo ya mokolo ya bisó? Ezali nde liloba ya moto, to Nazali nde koyóka Yango Elobí Nkoló? Nasengeli nde na moto moko kolimbola oyo ezali ngai koyóka, to Liloba ya Nzambe lisengeli nde te na ndimbola?”
Eyano ya bisó ezali: Tozali koyóka Liloba lilobámí likómí mosuni. Tozali koyóka Alifa na Omega. Tozali koyóka Ye, Likonzí ya Móto, koloba na nzela ya mbebu ya moto pelamókó elobákí Ye ete Akosala na mokolo ya bisó.
Toyókaka moto te, toyókaka Nzambe, lolengé moko lobi, lelo, mpe libela. Mongóngó ya Nzambe oyo ezali mopotú, na nguya mingi koleka mopanga mopeli bipai nyoso mibalé, mozali kokáta kino lilongó, mpe moyébi ya makanisi mazali kati ya motéma.
Emónisameli bisó ete oyo ezalaki Ye ntango Atámbolaki kati na Galilái nde eloko yango moko Azali na mpókwa oyo na Jeffersonville, eloko yango moko Azali na Eyánganelo ya Branham. Ezali Liloba ya Nzambe komónisama. Yango ezalaki Ye ndèle, Azali Yango na mpókwa oyo, mpe Akozala Yango libela. Oyo Alobákí akosála, Asálí yango.
Moto azali Nzambe te, kasi Nzambe Azali naino kobíka mpe koloba na Mwasi na Ye ya libala na nzela ya moto yango. Tozali kosámbela moto yango te, kasi kosámbela Nzambe kati na moto yango; zambí azali moto Nzambe Aponákí kozala MONGÓNGÓ NA YE mpe kokamba Mwasi na Ye ya libala na mikolo oyo ya nsúka.
Mpo ete Apesi bisó Emóniseli monene oyo ya ntango ya nsúka, tokokí sikawa koyeba TOZALI BA NANI, Liloba likómí mosuni na mokolo ya bisó. Satana akokí lisúsu te kobángisa bisó, pámba te toyebí tozali Mwasi Liloba na Ye Ngondo oyo azóngisámí mobimba.
Mongóngó mwangó moyebisaki bisó: Nyoso tozali na yango bosengá esili epésamélákí bisó. Ntina ya kozila ezali te. Elobamákí, EZALI YA BISÓ, EZALI BOZUI YA BISÓ. Satana azali na bokonzi likoló na bisó te; alóngámí.
Soló, Satana akoki kobwáka bokono, bozindó ya mawa, mpe bwálé na mitéma likoló na bisó, kasi Tata Asilí kopesa bisó makokí ya kobimisa ye LIBÀNDÁ…TOLOBA SÉ LILOBA, mpe asengeli kolongwa…ezali te mpo ete tolobí bongo, kasi mpo ete NZAMBE NDE ALOBÍ BONGO.
Nzambe yango moko Akelakí biséndé, na ntango biséndé bizalákí te. Oyo apesákí Ndeko mwasi Hattie mpósá ya motéma na ye: bana na ye mibáli mibalé. Oyo abíkisákí Ndeko mwasi Branham na ebímbá libosó kútu lobóko ya mónganga lómama ye. Azali NZAMBE YANGO MOKO Oyo azali bobele elongó na bisó te, KASI AZALI KOBIKA MPE KOFÁNDA KATI NA BISO. TOZALI LILOBA LIKÓMÍ MOSUNI.
Ntango tozali kotála mpe koyóka Mongóngó likoló ya ba bande, tozali komóna mpe koyóka Nzambe komímónisa Ye moko kati ya mosuni ya moto. Tomóní mpe toyókí nani Nzambe atíndákí kokamba bisó na Mboka ya Elaká. Toyebi ete Mwasi ya libala kaka nde akozala na Emóniseli wana, na bongo tokómí bazángi nsómo. Bosengá ya kozala motéma likoló-likoló ezali te, kobanga, to kozala kolenga, komítúna to kotungisama…TOZALI MWASI YA LIBALA.
Yóká mpe bíká, ndeko na ngai mobali, bíká!
Yóká Yesu sikawa mpe bíká;
Zambí ebómbamí likoló ya ba bande, haleluya!
Ezali kaka ntango toyókí nde tobíkí.
Oo, Mwasi ya libala ya Yesu Klisto, mokolo monene nini oyo tozali kobika kati na yango. Oyo tozali kotálela libosó, monúti na monúti. Mokolo sé mokolo kobanda sikawa tokomóna balingami na bisó, na mbísa, kati na mwa ntango ya kobwéta líso, tokozala libándá ya awa mpe elongó na bango na ngámbo mosúsu. Ebelémí mpenza na motindo ete eyókámí lokola nde tokokí koyóka yango…NKEMBO!
Bóya Mwasi ya libala, tiká tósangana mbala moko lisúsu zingázingá ya Mongóngó mwa Nzambe Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Ye koloba na bisó Liloba ya Bomoi ya Séko.
Ndeko Joseph Branham
Litéya: 63-1229E Bóbóngola Míso Epai Na Yesu
Makomí:
Mitúya 21:5-19
Yisaya 45:22
Jekalia 12:10
St. Yoane 14:12