25-0928 Ntango Ya Kosangana Pe Elembo Na Yango

NSANGO: 63-0818 Ntango Ya Kosangana Pe Elembo Na Yango

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libala Oyo Asangísámí,

 Natóndí na kosepela mingí, mpe Nazali na nsé ya bozili na etíngiá monéne, kozala eténi ya nyos’oyo Nzambe azali kosála na mokolo ya bisó. Makanisi ma Nzambe na ebandeli mazali kokokisama sasaipi libosó na míso ma bisó, mpe tozali eténi na yango.

Kati na Biblia mobimba, basakoli basakólákí mpe balobakí mpo na yango elingakí kokóma.

Mbala isúsu masakoli mangó makokísamákí te mpo na nkámá ya ba mbúla nsima, kasi wana litondi ya ntango liyákí, ekokísamákí; mpo ete likanisi ya Nzambe na nzela ya mosakoli na Ye LISENGÉLÍ líkokisama.

Mosakoli Yisaya alobákí: “moseka akozua zémi”. Libota moko na moko ya Baebele balengélákí mwana na bango moké ya mwasi ábóta mwana moké oyo. Basombelaki ye mwa sapáto, mwa bilambá, mpe babelémáki mpo ya mwana koya. Mabóta malekákí, kasi nsúka nsúka Liloba lia Nzambe likokísamákí.

Lokola elengé mobali ntango nazalaki kokóla Nazalaki ntango nyoso komitúna, Nkoló, Namóní kati na Liloba na Yo ete Osangísákí ntango nyoso bato na Yo elongó Kokokisa Liloba na Yo. Osangisákí bana na Yo Baebele elongó na nzela ya moto moko, Mose, oyo akambákí bango na nzela ya Likonzí ya Móto na mboka ya Elaká.

Ntango Okómákí mosuni mpe Ofandakí awa na mabelé, Osangisákí bayekoli na Yo. Okabolakí bango na makambo manso mpe moto nyoso mpo ya komónisa Liloba na Yo epai ya bango. Na mokolo ya Kitélá, Oyéisákí mbala moko lisúsu Lingómbá na Yo elongó na esíká yókó, na lobánzo lokó libosó ete Ókoka koya mpe kopesa bango Molimó na Yo Mosanto.

Nakanisaki, ekokoka nde lelo boní Nkoló? Mwasi na Yo ya libala apalangani na mokili mobimba. Mwasi ya libala nyoso akoya nde na Jeffersonville? Nakokí komóna yango kokokisama te Nkoló. Kasi Nkoló, Obóngolaka manáka ma Yo soki moké te. Ezali Mobeko na Yo, lolengé ya kotémisa yango ezali te. Okosala ko yango boní?

NKEMBO…LELO, tokokí komóna na míso ma bisó moko, mpe mingi na koleka, KOZALA ETÉNI NA YANGO: Liloba ya Sekó na Sékó ya Nzambe kokokisama. Tozali na esiká yoko te KATI NA NZOTO, topalangání kati na mokili mobimba, kasi Molimó Mosanto ASANGÍSÍ SIKAWA MWASI NA YE YA LIBÁLA NA NZELA YA MONGÓNGÓ YA NZAMBE. LILOBA LIA YE LILOBAMÁKÍ MPE LITIAMÁKÍ LIKOLÓ YA BA BANDE, Etémelo ya Nzambe mpo ya lelo, ezali koyanganisa mpe KOSANGISA MWASI NA YE YA LIBÁLA…MPE ELOKO EZALI TE OYO EKOKÍ KOPEKISA YANGO.

Nzambe azali kosangisa Mwasi na Ye ya libala. Azali koya elongo, longwá na Ebimelo ya ntango mpe Elimwelo ya ntango, mpe Likoló na Ngelé. Ezali na ntango ya lisangá, mpe yango nde Ezali sikawa mpenza. Azali kosangana mpo ya nini? Konétolama. Amen!

 Ntango ya kosangana ezali kosálema SIKAWA MPENZA!!! Nini nde ezali kosangisa bisó? Molimó Mosanto na nzela ya Liloba lia Ye, Mongóngó mwa Ye. Tozali kosangana mpo ya nini? KONÉTOLAMA!!! Mpe tozali bisó banso kokende mpe tozali kotika ata MOKO te na nsima.

Nzambe azali kolengela Ye. Ee mobali, kosangisa! Azali kosangana na nini? Na Liloba!

Liloba nde nini mpo ya mokolo mwa bisó? ETINDÁ oyo, MONGÓNGÓ MWA YE, Mongóngó mwa Nzambe epai ya Mwasi na Ye ya libala. Moto te. Bato te. Ebólo ya Bato te. MONGÓNGÓ mwa Nzambe likoló ya ba bande, mondimísámí na nzela ya Likonzí ya Móto.

“Zambí likoló mpe mabelé inso ikoleka, kasi Liloba na Ngai likoleka sokí moké te.” Azali komísangisa na YANGO ELOBÍ NKOLÓ ézala ebongiseli nini to moto nani báloba nini.

Ézala NANI áloba nini, tozali kosangana Na Yango Elobí Mongóngó mwa Nkoló, mokokísámí, modimisámí mpo ya mokolo mwa bisó. Ndimbola ya moto moko te; mpo ya nini tósala yango? Yango ebóngwanaka na moto nyoso, kasi Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande MOBÓNGWANA SOKI MOKÉ TE mpe mosangélámí na nzela ya Likonzí ya Móto Yango mpenza kozala Liloba ya Nzambe mpe Mongóngó mwa Nzambe.

Kaká na yango ezali, na moto, ayébí mokambi na ye te. Ee, mobali. Bakotelema zingázingá ya ebongiseli moko, bakotelema zingázingá ya episkópo moko to moto moko, kasi bakotelema te zingázingá ya mokambi, Molimó Mosanto kati na Liloba. Bomóní? Balobí: “Oo, boye, Nabángí ete nayá te kozala faná; Nabángí ete nábanda te na mbébá.” Ooooo, okómi wana!

Nde esiká baoyo bameseni koloba mabé batálisa biyanganelo ya bango mpe ballbí: “Bomoni, bazali kotómbola moto, Ndeko Branham, bazali bandimi ya kosámbela moto mpe bazali kotélema zingázingá na ye, moto, Molimó Mosanto te.”

Bolémá, tozali KOSANGANA zingázingá ya MONGÓNGÓ MWA NZAMBE MONDIMÍSÁMÍ MOLOBÁMÁKÍ NA NZELA YA MOTO YANGO. Bókanisa, nde moto Nzambe Aponákí kozala Mongóngó na Ye kobianga Mwasi na Ye ya libala kobima mpe kokamba ye lelo oyo. Nde Mongóngó sé moko mondimísámí na Nzambe Ye moko.

Kasi nzokande, BAZALI kosangana zingázingá ya BATO. Bakoyókisa te Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande kati na masámbo ya bango. Bokoki kobánza yango??? Motéi oyo abéti tólo ete andimi ete Etindá oyo ezali Etindá ya ngonga, Yango Elobí Nkoló, kasi ázua lolengé moko ya ekimelo komílóngisa na BOBÓYÁKÁ koyókisa Mongóngó wana kati ya masámbo ya bango, kasi koyebisa bato ete BASENGELI báyóka bango mpe batéyi basúsu kotéya Liloba…nsima yango báloba ete tozali kolanda moto!!!

Toútákí kaka koyóka  mokolo mwa Lomíngo lolekí oyo Nzambe asaláki na bato yango!!

Tozali komilengele mpo ya Makwéla. Tozali kokóma moko elongó na Ye. Liloba likómí yo, mpe okómí Liloba. Yesu alobákí: “ Na mokolo yango bokoyeba yango. Nyoso oyo Tata azali, Nazali yango; mpe nyoso ezali Ngai, bozali yango; mpe nyoso ezali bino, Nazali yango. Na mokolo yango bokoyeba ete Nazali kati na Tata, Tata kati na Ngai, Ngai kati na bino, mpe bino kati na Ngai.”

Matondi Nkoló mpo ya Emóniseli ya Yo moko, mpe bisó moko, kati na mokolo ya bisó. Mwasi na Yo ya LIBALA azali komíléngele na nzela ya Liloba na Yo Lilobamákí. Toyebi tozali kati ya Mokano mwa Yo mobongí be na botíkaláká na Liloba na Yo litiámákí na ba bande.

Nabiangí mokili mobimba koyóka Mongóngó mwa Nzambe sé moko mondimísamâkí mpo ya mokolo mwa bisó Lomíngo loye. Boyei bolámu komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: 63-0818, Ntango Ya Kosangana Mpe Elembo Na Yango. Soko okokí komikangisa na bisó na nzela ya singa mpe koyóka elongó na bisó te, mízuelá bande moko, BANDE SÉ BANDE; izali nyoso Yango Elobí Nkoló, mpe yóká Liloba ya Nzambe kobongisa yo be mpe kobélemisa yo mpo ya boyéi na Ye noki.

Ndeko Joseph Branham

Njembo 86: 1-11

St. Matai 16: 1-3

Azali komisangisa Ye moko. Azali komíbongisa. Mpo ya nini? Azali Mwasi ya libala. Ezali solo. Mpe Azali komísangisa na Mobali na Ye ya libala, bomóní, mpe Mobali ya libála azali Liloba. “Na ebandeli Liloba azalakí, Liloba azalaki mboka na Nzambe, mpe Liloba azalaki Nzambe. Mpe Liloba akómákí mosuni mpe afándákí kati na bisó.”