25-0810 Makambo Ya Mikolo Oyo Emonisami Polele Na Nzela Ya Lisakoli

NSANGO: 65-1206 Makambo Ya Mikolo Oyo Emonisami Polele Na Nzela Ya Lisakoli

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala ya Soló mpe ya Bomoi,

Ntango Yesu, Liloba Ye moko, ayaki na mabelé esili koleka mbúla 2000, Ayakí lokola elobákí Ye ete Akoya, lokola Mosakoli. Liloba na Ye liyebisí, ete libosó na Ye koya lisúsu, bomónisami mobimba ya Bomoto ya Yesu Klisto bokomónisama lisúsu kati ya mosuni, kati ya mosakoli. Mosakoli yango ayéi, nkombo na ye ezali William Marrion Branham.

Boni nde moto ata nani ázánga koyeba ete koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba na ye mbala moko likoló ya ba bande ezali Mokano ya Nzambe ebongí be? Toyebí ete Liloba ya Nzambe likoyaka ntango nyoso epai ya mosakoli na Ye; Likokí koya na nzela mosúsu ata nini te. Lisengeli koya na nzela ya elekelo ya Nzambe oyo Alobaki na bisó libosó na ntina na yango. Bobele na nzela yango nde Likoyá ndèle. Nzambe Akiti na mosala lolengé lolakákí Ye ete akosála yango. Atikálá ata mbala moko te kozánga kosala yango lolengé yango moko Asalakí ntango nyoso.

Moto na moto na bango aléi eloko yango moko, banso babínákí kati ya Molimó, bazalakí banso na biloko nyoso esiká moko; kasi wana ntango ya bokabwani eyákí, Liloba nde liyéisaki bokabwani. Ezali mpe bongo lelo! Liloba nde liyéisakí bokabwani! Wana ntango eyeí…

Tomóní ntango yango kosalema sikawa, Liloba lizali kokabola. Mwasi ya libala afúndamí ete azali kotia litómbá mingi likoló ya mosakoli ntango balobí ete: “ezali na bato basúsu babiangami na Nzambe, batóndí na Molimó Mosanto kokamba Mwasi ya libala lelo. Bosengeli na basúsu bobelé ba bande te. Nzambe Atíí bato lelo kokamba lingomba.”

“Ozali komeka kokanisa ete ozali bobele yo moko kati na libóndo ya bato. Eyanganelo mobimba ezali bule!” Nzambe atíkalá kosala motindo wana ata moké te. Asengelaki koyeba malamu koleka wana. Mpe Alobaki: “Malamu, eyanganelo mobimba ezali bule. Ozali komeka komiyéisa…” Soko tolingi koloba yango lelo, elobelí ya balabála: “Mwa libángá bobele moko likolo ya libóngo.”

Mpe Mose ayebakí ete Nzambe atíndakí ye kokita kuna Mpo na yango.


Nzambe azali na mibáli batóndí na Molimó Mosanto kokamba Mwasi ya libala; kokamba bango NA YANGO ELOBÍ NKOLÓ, MOSAKOLI MOTINDAMI. Zambí Etindá Mpe motindamí bazali eloko yango moko. Yango nde nzela ya Nzambe eyebi kokwéa soko moké te mpo ya lelo mpe ntango nyoso.

Mpo ete bayókákí libúngá. Ntango Mose, oyo andimisamákí na Nzambe, mpe mokambi kotálisa bango nzela na mboka ya elaká, mpe bayáki mosiká mingi malamu mpenza, nsima balingaki kokóba elongó na ye te…. Sikawa, bandimi bakoki komóna Yango, kasi bazangi Kondima bakokí komóna te Oyo wana endimísámí.

Ezali kaka te ete boponamákí koyamba Emoniseli monene oyo ya ntango ya nsúka mpo ya lelo, kasi Nzambe, na nzela ya ba bande ya Ye Biléi bibombamákí, koloba kati káti ya molongó epai na Mwasi na Ye ya libala molingami wa motema.

Boye soko ozali mwana mobali ya Nzambe to mwana mwasi ya Nzambe, ozalaki kati ya Nzambe ntango nyoso. Kasi Ayebakí mabelé nini mpe ntango nini okokónama. Na bongo sikawa osalámí ekelámu, mwana mobali ya Nzambe, mwana mobali to mwana mwasi ya Nzambe kokútana na móndengé ya ngonga oyo kondimisa Nzambe ya solo mpe ya bomoi ya ngonga oyo, Etindá oyo ezali kobima na ntango oyo. Ezali solo! Osalamákí kuna libosó ya bozalisi ya mokili.

Mokandá nini ya bolingo oyo katikáti ya milongó epai ya Mwasi na Ye ya libala, NKEMBO!!! Ezali kaka te ete Ayebakí bisó mpe Aponáki bisó libosó ya bozalisi ya mokili, kasi awa Azali koyebisa bisó Aponákí bisó kozala bana mibali mpe bana basi ya Ye mpo ya LELO. Atíakí bisó awa na mabelé lelo, likoló ya babulami basúsu banso longwá na ebandeli, zambí Ayebakí ete tokokútana na móndengé ya ngonga oyo kondimisa Nzambe ya solo mpe ya bomoi ya ngonga oyo, Etindá oyo ezali kobima na ntango oyo.

Tozalaki kati ya Nzambe, mombóto, liloba, mosálá longwá na ebandeli, kasi tozali SIKAWA kofanda ELONGÓ kati na bisiká ya Likoló kati na Klisto Yesu, kozala na boyokani elongó na Ye na Liloba na Ye, na nzela ya Liloba ya Ye; mpo ete TOZALI LILOBA NA YE, mpe Ezali koléisa bomoto ya bisó.

Tokoki te, mpe tokokoka te, kokótisa tonga ya eloko ata nini kati na bomoi ya bisó kasi sé Liloba ya Nzambe lizangí kobebisama.

Toyebí mpe tondimí Ezali nzela ya Nzambe epésámí mpo ya lelo.

Tolingí mpo na yo ete ómíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka MONGÓNGÓ BOBELE MOKO, Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande, okokí koloba AMEN na yango, Liloba moko na moko oyókí.

Ndeko Joseph Branham

Liteya: Makambo Ya Mikolo Oyo Mamónísámí Polélé Na Nzela Ya Lisakoli 65-1206

Makomi ya kotanga libosó ya boyóki Litéya:

Genese 22

Dutelonome 18:15

Njembo 16:10 / 22:1/ 22:18 / 22:7-8 / 35:11

Yisaya 7:14 / 9:6 / 35: 7 / 50:6 / 53:9 / 53:12 / 40:3

Amosa 3:7

Jekalia 11:12 / 13:7 / 14:7

Malaki 3: 1 / 4:5-6

St. Matai 4:4/ 24:24/ 11:1-19

St. Luka 17:22-30 / 24:13-27

Baebele 13:8 / 1:1