24-1013 Emononeli Ya Patámo

Nsango: 60-1204E Emononeli Ya Patámo

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Liloba Oyo abongí Be,

Nini nde ezali kosalema kati ya Mwasi ya libala zingázingá na mokili mobimba? Tozali kokóta kati ya Molimó, kotelema mpe ko bélela: “Nkembo! Aleluya! Lokúmu epai ya Nkoló!” Nzambe azali komema biso mpe azali komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Makambo totángákí mpe toyókákí bomoi ya biso nyoso izali sasaipi komónisama. Koyeisama na bomoi monene ezali kosalema. Tozali kongengelama na ya Liloba lokola libosó naino soki moké te.

Tozali koyoka yango kati na bozindó mpenza ya milimó na biso. Eloko moko ekeseni, eloko moko ezali kosalema. Tozali koyoka Molimó Mosanto kopakola biso, kotóndisa mitema mpe makanisi ya biso na Liloba na Ye.

Tokoki koyoka Ye koloba na biso: Nayebi mongúná azali kobundisa bino lokola naíno libosó soki moké te, kasi bóbanga te baoyo miké, BOZALI YA NGAI. Napesi bino bolingo ya Ngai, mpiko mpe mabongi. Bóloba bobele Liloba, mpe Nakosala yango. Nazali elongo na bino ntango nyoso.

Kati na boyekoli na biso monene ya Emóniseli ya Yesu Klisto, tozali na nsé ya bozili na etingia monene mpóso moko na moko nini nde Akomónisa biso na nsima. Liloba na Ye nde Ekimelo ya biso bobele moko, kimia mpe libóndi.

Toyoki na bokéngi lisusu mpe lisusu mpe lisúsu. Eteni ya ndambo ya maloba moko na moko tozali kotanga, tolingi kogánga mpe kobélela lokola Liloba lizali kofungwama libosó na miso na biso mpenza. Kondima ya Konétolama ezali koya likoló ya Mwasi na libala, kotóndisa milimó ya biso

Bókanisa, ezali te na esika mosusu kati na mokili wapi okokí kokende, kasi kaka na nsóngé ya misapi na yo, koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na yo mpe komónisa yo Liloba na Ye.

Boni Nzambe alongólaki ezipelo, abéndaki yango na nsima, mpe atikaki Yoane kotala na kati mpe komóna oyo eleko ya lingomba moko na moko elingaki kosala, mpe akomáki Yango kati ya Búku mpe atindakí Yango epai na biso.

Nsima, wana litóndi ya ntango eyei, Nzambe atindelaki biso mwanje na Ye ya nsambo ya ngúya koloba Yango, mpe komonisa oyo Yango nyoso elingaki koloba.

Yoane akomaki yango emónaki ye, kasi ayebaki ntina na yango te. Yesu kútu ayebaki yango te ntango azalaki awa na mabelé. Moko te na kati na bileko ayébákí, kino lelo oyo, ntango oyo, libóta oyo, BISÓ, Mwasi na Ye ya libala.

Boni Amónisaki biso ete mínda nsambo wana izaláki kobenda bomoi mpe pole longwá na biútelo ya mbékí wana monene.

Ayebisaki biso boni moko na moko azalaki na lotámbe na ye ezíndákí kuna na kati. Motindami ya eleko ya lingomba moko na moko azalaki na móto na Molimo Mosanto na lotámbe na ye ezindí kati na Klisto, kobenda bomoi mpenza ya Klisto mpe kobimisa Pole na lingomba.

Mpe sikawa, motindami na biso ya mokolo ya nsuka, motindami monene koleka nyoso, azalaki na bomoi yango moko mpe Pole yango moko emonisamaki na nzela ya bomoi bobómbámáki elongo na Klisto kati na Nzambe.

Na nsima mwanje na biso ya nguya ayebisi biso ete motindami moko na moko atálísamaki kuna kaka te, KASI MOKO NA MOKO NA BISO AZALAKI KUNA LOKOLA, bandimi ya solo ya Nzambe.  Moko na moko na biso atálisamí mpe kuna na lolenge ya kokamwa.

Moko na moko na biso azali kobénda koúta na eútelo yango moko lokola batindami. Tozindísámáki biso nyoso kati ya mbéki yango moko. Tokúfí kati na biso moko mpe bomoi na BISÓ  ibómbámí elongo na, mpe kati na, Klisto Yesu Nkolo na biso.

Boni azali koyikisa biso mpiko na bolobáká ete moto mókó te akoki kolongola biso na loboko ya Nzambe.

Bomoi ya biso ikokí te kobóngolama na yango. Bomoi ya biso ya komónana izali kopela mpe kongenga, kopesa pole mpe bimoniseli ya Molimo Mosanto. Bomoi ya biso ya kati izangi komónana, ibómbámí kati na Nzambe mpe iléísámí na Liloba ya Nkolo.

Bitumba bizali makasi. Mongúna azali kongala lokola liboso soki moké te, komeka makasi na ye manso kolembesa biso mitema, kobeta biso na nsé, kasi akokoka kosala yango te. Nzambe Ye moko azali koloba na biso na nzela ya bibebú ya moto mpe koloba na biso, TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA, OYO APONÁKÍ, mpe Elongaka zábolo NTANGO NYOSO.

Nkolo na biso Abongi Be, koloba Liloba na Ye Libongí Be, kopesa Kimia Ebongi Be, epai na Mwasi na Ye ya libala Abongí Be.

Lokola ntango nyoso, tobiángí mokili koya kozindisa lotámbe ya bango kati ya MBEKI YA MONENE, Etindá oyo, ebómbámákí mpe ebátélámákí mpo ya Mwasi ya libala. Tokozala kogánga mpe kobélela na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba mpe komónisa oyo ekómákí kati ya: Emónoneli Ya Patamo 60-1204E.

Ndeko Joseph Branham