Nsango: 64-0823E MITUNA MPE BIYANO # 2
- 26-0201 MITUNA MPE BIYANO # 2
- 24-0505 MITUNA MPE BIYANO # 2
- 22-1009 MITUNA MPE BIYANO # 2
- 18-0211 MITUNA MPE BIYANO # 2
Balingami Ba Mpongo Miké,
Epai wapi Nzóto oyo ebomámí ezali, nde esíká Mwasi ya libála bakoyánganisama elongó. Mpe epai na bisó, ezali sé na esíká moko ebongí be epái tokoki kozua Máná wana mosuni mobésu: na bofináká play mpe boyókáká Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde.
Koloba likoló ya Máná ya MOBÉSU, tokokí kútu nde kobanda kokanisa oyo tozali na yango mpenza na nsúka ya misapi ya bisó? Mongóngó mpenza ya Nzambe koloba na Mwasi na Ye ya libála molingami likoló ya bánde, wapi kobánza ezali te, komítúna te, kotúna-tuna ya ntembe te to kobéte ntembe te soko oyo tozali koyóka ezali Nzambe, kosálela mongóngó ya moto, koloba Yango Elobí Nkoló Yawe na Mwasi na Ye ya libála.
Na nzela ya Emóniseli, tondimí Yango nde esiká BOBÉLÉ MOKO tokoki kokende na yango mpe kopemisa milímó na bisó ete Maloba mazali bisó koyóka mazali liloba ya moto te, sokí te ndimbola to likanisi na ye líbakisámí na Yango, kasi Ezali Liloba ya Nzambe Péto koloba na bisó ba mpongo miké, komónisa Liloba na Ye.
Tozali na bondeko zíngázingá na Liloba. Totángaka Liloba na Ye kati na ba Biblia ya bisó. Toyókí kútu ete Nzambe abongísákí mpe abiángákí mibáli batóndákí na Molimó Mosanto, kozóngela biteni ya Liloba mpe kotéya Liloba ya Nzambe, kasi na mokolo ya bisó, Nzambe apésí esiká wapi tokoki koyóka LILOBA NA YE LIBONGÍ BE LIOBÁMÍ, na bofináká play.
Tata apésákí kútu Mwasi na Ye ya libála libakú malamu ya kotúna mitúná mizalákí likoló ya mitéma na bisó na ntina ete tókoka kozala na eyano ebongí be:
- Satana akokí nde kosálela Likabo ya minoko ya sika to kosakola kati ya moto oyo azali na Molimó Mosanto?
- Yesu alingákí nde koloba nini kati na Matái12, molongó ya 32?
- Bolimbisi limbola Bakolinti ya Libosó 13:8-12.
- Basi balingisámí nde kosala kati na Misálá ya mbula-matáli ntango bazali na Mobali mpe bana baoyo bazali na nzóto kolóngónú?
- Ezali nde mabe mpo ya mwasi kotia zazú na nsúki na ye?
Nzambe apésákí nzelá mingi mpenzá kopámbola mpe kokémbisa Mwasi na Ye ya libala, kasi ezali na esiká sé moko Apésákí wapi Mwasi na Ye ya libala akoki kozala na motéma na kati 100% ete oyo bazali koyóka ezali LILOBA NA YE LIBONGÍ BE. Etóko moko ya Mái ma Bomoi epai wapi ba Mpongo miké bakoki komela na yango wapi makoki mazali te ya makono makoyambanela. KOFINA PLAY.
Nabiàngí yo óya komela longwá na Etóko yango Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, wapi tokoyóka 64-0823E “Mitúná Mpe Biyano #2.”
Ndeko Joseph Branham