Litéya: 64-0617 Klisto Oyo Ayebámí Ya Bileko Nyoso
- 25-1116 Klisto Oyo Ayebámí Ya Bileko Nyoso
- 20-0809 Klisto Oyo Ayebámí Ya Bileko Nyoso
- 17-0208 Klisto Oyo Ayebámí Ya Bileko Nyoso
Balingami Liloba Ya Nzambe Ya Bomoi,
Mbúla nyoso oyo Nabómbákí yango kati ya motema na ngai, kozipa Klisto, Likonzí ya Móto yango moko kolimbola Liloba, lokola elakamákí.
Nayebí oyo ekoyókama na bozángi bokéngi epai ya bato mingi, kasi soko kaka boyíkeli mwanje motindami ya Nzambe mpiko mpo ya mwa minúti, mpe boséngí Nzambe Emóniseli koleka, Nandimí ete ye, na nzela ya lisungi ya Nzambe mpe na Liloba na Ye, mpe éngébéné na Liloba na Ye, akomema Ye awa mpenza libosó na bino. Nzambe, komízipola mpe komímónisa Ye moko, kolimbola mpe komónisa Liloba na Ye.
Kolamukisama nini oyo ezalaki kokóma na sánzá oyo elekí kati ya Mwasi ya libala ya Yesu Klisto. Nzambe komízipola Ye moko lokola libosó naino soko moké te, koloba na Molingami na Ye wa motema, kolingana na Ye, kondimisa Ye, tozali Moko elongó na Ye.
Kotatabana te, eloko kozanga koyeba te, komipekisa te, elilíngí ya ntembe kútu te; Nzambe Amónisí epai na bisó: Mongóngó ya Nzambe koloba likoló ya ba bande nde NZELA EPESÁMÍ MPE EBONGÍ BE YA NZAMBE MPO YA MWASI NA YE YA LIBALA LELO.
Apesaki nzela oyo na ntina ete tósengela soki moké te ete ékongolama, épétolama, élimbolama to ésímbama na moto ata na motíndo nini; sé koyóka Mongóngó Yango moko ya Nzambe koloba mbebu na litói epai ya moko na moko na bisó.
Ayebakí ete mokolo oyo ezalaki koya. Ayebakí Mwasi na Ye ya libala Akokákí kolia bobelé Máná mangó Mabómbámí, Biléi bia Ye ya ba Mpate. Tolingí na bisó te koyóka eloko ata nini mosúsu kasi Mongóngó ya Nzambe longwá na Nzambe Ye moko.
Topasólí ezipelo wana kino kati na Nkembo ya Shekina. Mokili ekokí komóna Yango te. Mosakoli na bisó akoki ntango mosúsu koloba maloba ma ye alimá te. Akoki mbala mosúsu koláta na ye malamu te. Akoki ntango mosúsu te koláta moláto ya bakambi ya mangómbá. Kasi nsima ya poso wana ya moto, na kati Kúná ezali na Nkembo ya Shekina. Na kati Kúná ezali na nguya. Na kati Kúná ezali na Liloba. Na kati Kúná ezali na lipa libúlisámí. Na kati Kúná ezali na Nkembo ya Shekina, oyo ezali Pole ekokémbisaka Mwasi ya libala.
Mpe kino óya nsima ya mposo ya nyama wana, kino okobima na mposo na yo ya kala, makanisi ma yo ma kala, bindimeli na yo ya kala, mpe óya na Bozali ya Nzambe, bongo Liloba likómí eloko yango mpenza ya Bomoi epai na yo, na bongo olamúkí na Nkembo ya Shekina, na bongo Biblia ekómí Búku ya sika, nde Yesu Klisto azali lolengé moko lobi, lelo, mpe libela. Ozali kobíka kati na Bozali na Ye, kolia lípa libúlísámí oyo epesámí na mokolo wana bobele epai ya bandimi, Banganga káka.
“Mpe tozali ba nganga, bokonzi ya bonganga, libota na bule, bato godi, kopesa mbeka ya molimó epai ya Nzambe.” Kasi Osengeli ókóta, na nsima ya ezipelo, komóna Nzambe oyo Azipólámí. Mpe Nzambe Azipólámí, yango nde Liloba na Ye limónisámí.
Tozali bato ndéngé epai ya mokili, kasi tosepélí koyeba Ebendé ya bisó ya motó eyambaka nzóto ya ebendé moké azali nani mpe tozali na lipambú kozala bibendé na Ye miké ya bande, baoyo tokótisámí kati ya Liloba na Ye, lokola ezali kobénda bisó epai na Ye.
Soko bokótísámí te kati ya ba bande, bozali eloko moko te kasi libóndo ya bibendé bizangí bikangelo!!!
Sikawa, botala sikawa, Nzambe! Yesu alobákí ete: “Baoyo Liloba ya Nzambe liyákí epai na bango, babiangamáki ‘banzambe,’” ezalaki basakoli. Sikawa, ezali te ete moto ye moko azalaki Nzambe, ndengé moko kaka lokola nzoto ya Yesu Klisto ezalakí Nzambe te. Azalaki moto, mpe Nzambe azipamákí nsima na Ye.
Nzambe, mokolo moko azipamákí nsima ya mposo ya ba nyama. Nzambe, mokolo moko azipamákí kati ya mosuni ya moto abiángamákí Melikisedéke. Nzambe, azipamákí kati ya mosuni ya moto abiangamaki Yesu. Nzambe, azipamákí kati ya mosuni ya moto abiangámi William Marrion Branham. Nzambe, azipámí kati ya mosuni ya moto abiangamí MWASI NA YE YA LIBALA.
Ezali na motúya mingi kokanisa, kasi ebelé monéne bazangí yango mpe bazali koluka eloko mosúsu. Eloko ya nsúka Abalayama amónakí, eloko ya nsúka kokóma libosó móto mókwéa mpe mósámbisa mokili ya Mabota, libosó ete mwana ya Elaká áya komónana, eloko ya nsúka lingómba ya Boklisto likomóna kino komónana ya Yesu Klisto ezali Melikisedéke, Nzambe amónáni kati na mosuni, komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala.
Eloko mosúsu ya koya ezali te.
Ezali na eloko mosúsu te elakámí kati na Liloba na Ye. Ezali na moto te, libóké ya bato te koya kobongisa be Mwasi ya libala.
Te! Balingí koya awa na losámbo mpo ya bobongisami be. Bomoni? Ete to—tozali na bondeko moto na moningá na ye awa na losámbo, kasi bobongi be bokoyaka kati ya bisó na Nzambe. Makila ya Klisto nde oyo ekobongisaka bisó be kati ya Molimó Mosanto.
Etindá oyo, Mongóngó oyo, Liloba lia Nzambe lindimísámí, lizali kobongisa be Mwasi ya libala ya Yesu Klisto.
Nabiangí moko na moko na binó koya koyóka elongó na bisó Mongóngó ya Nzambe lokola ezali kobongisa be Mwasi na Ye ya libala Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: 64-0617 “Klisto Oyo Ayebámí Ya Bileko Nyoso”.
Ndeko Joseph Branham
Makomí ya kotanga libosó ya Litéya:
Dutelonóme 18:15
Jekalia 14: 6
Malaki 3 :1-6
St. Luka 17: 28-30
St. Yoane 1 :1 / 4:1-30 / 8: 57-58 / 10: 32-39
Baebele 1:1 / 4:12 / 13:8
Emóniseli 22:19