25-0608 Mokambi

NSANGO: 62-1014E Mokambi

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libala Libóké ya Ebelé Ya Bato,

Sikawa Nzambe atindakí ntango nyoso bakambi na Ye, Atikalá te na ntango nyoso kozánga mokambi, kati na bileko. Nzambe azaláká ntango nyoso na moto moko oyo atélemaká mpo na Ye na mabelé oyo, kati na bileko nyoso.

Nzambe alingí te tótia mitema na lisósoli ya bisó to makanisi ya moto atá nani. Nde ntina Atindelaki Mwasi na Ye ya libala Mokambi; zambí azali na lisósoli, boni kokende mpe nini kosala. Nzambe ABONGOLÁ NDÈLE manáka ma Ye SOKI MOKÉ TE. Azangá soki moké te kotinda Mokambi epai na bato na Ye, kasi osengeli koyamba Mokambi yango.

Osengeli Kondima Liloba moko na moko lilobí Ye na nzela ya Mokambi na Ye. Osengeli kokende nzela Mokambi na Ye alobi ókende. Soko ozali koyóka to Kondima mingóngó misúsu lokola mokambi na yo, nsúka nsúka okobúnga na yo sé kobúnga.

St. Yoane 16 elobí Azalaki na makambo mingi ya koyebisa bisó mpe komónisa bisó, na bongo Alingáki kotinda Molimó Mosanto na Ye koKamba mpe koyebisa bisó. Alobakí Molimó Mosanto nde mosakoli mokambi ya eleko moko na moko. Na bongo, basakoli na Ye batindamákí kotelema na esiká ya Molimó Mosanto kokamba Mwasi na Ye ya libala.

Molimó Mosanto Atindamí kotámbolisa lingomba, ebólo ya bato te. Molimó Mosanto nde bwanyá nyoso. Bato bakómaka Malíli mpe bazangi kotia motema na likambo.

Ezali moto te, kasi Molimó Mosanto KATI ya moto yango. Moto oyo Aponáki kotélema na esiká na Ye moko mpe kozala mokambi na bisó ya mabelé oyo akambámí na Mokambámí na bisó ya Likoló. Liloba liyebisí bisó tosengeli kolanda Mokambi wana. Ézala ata nini ekanisí bisó, oyo eyókaní na lobánzo malamu, to oyo moto mosúsu nani alobí, tozali bato ya kokabola yango te, mokambi azali sé moko.

Nzambe Atindi Mokambi, mpe Nzambe alingí ómíkundwela ete nde Mokambi oyo Atíí.

Mokambi mosakoli ya bisó atiamákí na Nzambe koloba Liloba na Ye. Liloba na ye EZALI LILOBA YA NZAMBE. Mokambi mosakoli, mpe kaka ye, azali na ndimbola ya bonzambe ya Liloba. Nzambe alobakí Liloba na Ye epai na ye mbebu na litói. Na bongo, okoki kowelisa soki moké te, kobóngwana soki moké te, to kobanzabanza Liloba ya Mokambi na yo.

Osengeli kolanda Ye, mpe Ye kaka. Soko osali yango te, nsúka nsúka okobúnga. Kanísa, ntango otíkí Ye, Mokambi oyo Nzambe atíí, etálí yo, boye esengeli na bisó kotikala pene ya Mokambi Aponi, mpe koyóka mpe kotósa Liloba moko na moko Alobí na nzela na ye.

Mokambi na bisó alakisakí bisó ete Kondimana ya kala ezalakí elílíngí ya Kondimana ya sika.

Ntango Yisalaele atikaki Ejipito kokende na mboka ya elaká, kati na Esode 13:21, Nzambe ayebakí ete batíkalá koleka nzela wana libosó te. Ezalaki bobele kilométele Ntúkú Motóbá na minei, kasi ata ko bongo bazalaki na bosengá ya eloko mosúsu kokende elongó a bango. Balingaki kobúngisa nzela na bango. Na boye Ye Nzambe, atindelakí bango Mokambi. Esode 13:21, eloko moko lokola boye: “Natindákí Mwanje na Ngai libosó na yo, Likonzí ya Móto, kobatela yo na nzela,” kobatela bango na mboka oyo ya elaká. Mpe bana ya Yisalaele balandakí Mokambi yango, Likonzi ya Móto (butú), Lipata na mói. Ntango Etélemákí, batelemákí. Ntango Etambolákí, batambolákí. Mpe ntango Amemaki bango pene ya mboka, mpe babongakí te kokátisa, Azongisakí bango kati na lisobe lisúsu.

Alobaki ete nde lingomba lelo. Tozalaki bato ya kokende kala soko kaka tómísémbolaka mpe tómítiaka na molongó, kasi  Asengelaki kokamba bísó zínga-zinga, zingázingá mpe zingázingá.

Basengelákí bobele kolanda mokambi na bango lokola ALANDÁKÍ mpe ayókákí útá na Likonzí ya Móto.

Ayebisaki bango oyo Nzambe alobaki mpe basengelaki kotósa Liloba moko na moko lilobaki ye. Azalaki Mongóngó ya Mokambi. Kasi babétékí ntembe mpe batelemélakí Mokambi Nzambe atiákí, na bongo bayebgáyengaki kati na lisobé mbula 40.

Ezalaki na basali mingi na mikolo ya Mose. Nzambe atielákí bango kosunga bato, lokola Mose akokaki kosala yango nyoso te. Kasi lotómo ya bangó ezalaki kotálisa bato oyo Mose alobakí. Biblia  elobí likambo moko te oyo mibali wana balobaki, Elobí bobele oyo Mose alobaki kozala Liloba kokamba bato.

Ntango Nzambe alongolakí Mose na mokili, Yosua atiamákí kokamba bato, oyo ezali etaliseli ya Molimó Mosanto lelo.

Yosua atéyakí eloko moko ya sika te, soki te emekákí ye kozua esiká ya Mose, soki te emekaki ye kolimbola yango elobaki Mokambi; atangaki bobele oyo Mose alobaki mpe ayebisaki bato: “Bótíkala na Liloba. Bótikala na oyo Mose alobakí”. Atangaki na ye kaka oyo Mose alobaki.

Elilíngí nini oyo ya lelo. Nzambe andimísaki Mose na nzela ya Likonzí ya Móto. Mosakoli ya bisó andimisamákí na Likonzí ya Móto yango moko. Maloba malobakí Mose mazalaki Liloba ya Nzambe mpe etiamákí kati na Sandúku. Mosakoli ya Nzambe alobaki na mokolo ya bisó mpe Etiamákí likoló ya bande.

Wana elongolamáki Mose na mokili, Yosua atiamákí kokamba bato na bobátelaká Maloba malobakí Mose libosó na bango. Ayebisaki bango bándima mpe bátikala na Liloba moko na moko Mokambi ya Nzambe alobakí.

Yosua ntango nyoso atangakí oyo Mose akomákí Liloba nsima ya Liloba longwá na mikandá. Atiaki Liloba libosó na bango ntango nyoso. Liloba na mokolo ya bisó likomamáki te, kasi Litiámáki na bande na ntina ete Molimó Mosanto ákoka kozala na Mwasi na Ye ya libala koyóka Liloba nsima ya Liloba oyo Alobáki na Bofináká Play.

Nzambe abóngolaka manáka ma Ye soki moké te. Azali Mokambi ya bisó. Mongóngó ya Ye nde eloko ezali kokamba mpe kosangisa Mwasi na Ye ya libala lelo. Tolingi na bisó koyóka sé Mongóngó ya Mokambi na bisó lokola Ezali kotambolisa bisó na nzela ya Likonzí ya Móto. Ezali lisangá lizangí komónana ya Mwasi ya libala ya Klisto. Toyebí Mongóngó na Ye.

Ntango mokambi na bisó ayéi na etéyelo, Molimó Mosanto amamí ye mpe Ezali lisúsu ye te, kasi Mokambi ya bisó. Atemísí motó na ye kati na mopepe mpe agángí: “Yango Elobí Nkoló, Yango Elobí Nkoló, Yangó Elobí Nkoló!” Mpe enámá moko na moko ya Mwasi na libala ya Klisto kati na mokili mobimba bayéi alimá epai na ye. Mpo ya nini? TOYEBAKA MOKAMBI YA BISÓ BOBELE NA MOTINDO MOKOSOLOLAKA YE.

Mokambi na bisó= Liloba

Liloba = Likoyaka epai ya mosakoli

Mosakoli = Molimboli ya bonzambe sé moko; mokambi na Ye ya mabelé.

Tíkalá nsima ya Liloba! Oo, ee, mobali! Tíkalá na Mokambi wana. Tíkalá alimá nsima na Yango. Leká te libosó na Yango, tíkalá nsima na Yango. Tiká Yango ékamba yo, yo kambá Yango te. Yo tika Yango ékende.

Soko olingí kobúnga te, yaka koyóka Mokambi na bisó lokola azali koloba na nzela ya mokambi na Ye  oyo atiámí

ya mabelé Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Liteya:

 62-1014E—Mokambi

Makomí:

St. Malako 16:15-18

St. Yoane 1:1 / 16:7-15

Misala 2:38

Baefese 4:11-13 / 4:30

Baebele 4:12

2 Petelo 1:21

Esode 13: 21