Nsango: 61-0611 Emóniseli, Mokapo Ya Mitano Eteni Ya I
Balingami Baoyo batiamí na Bokonzi ya Bana,
Ntango ya Malili makasi ya kokamwa nini oyo tozali kolekisa wana ezali Molimo Mosanto kotánisa Liloba na Ye epai ya Mwasi ya libala lokola libosó naino soki moké te.
Makambo maye ntango mosúsu toyókaki, totangáki mpe toyekólaki bomoi na bisó mobimba mazali sikawa kokóma kozipolama mpe komónisama lokola libosó naino soki moké te.
Moto aziláki mpo na mbula nkóto na nkóto mpo ya mokolo oyo mpenza. Bango nyoso bazalaki mpe babóndelaki koyóka mpe komóna makambo mazali bisó komóna mpe koyóka. Ata basakoli ya ntango ya kala bazalaki na mpósa mingi mpe kokimela na mitéma mpo ya mokolo oyo. Boni balingaki komóna bokokisami mpe boyei ya Nkoló.
Ata bayekoli ya Yesu, Petelo, Yakobo, mpe Yoane, bato baoyo batambolaki mpe basolólákí na Ye, bazilákí mingi komóna mpe koyóka manso maye mabómbamákí. Babóndeláki ete Éfungolama mpe Émónisama na mokolo ya bango, na ntango ya bango.
Kati na Bileko Nsambo ya Lingómbá, motindami moko na moko, Paulo, Martin, mpe Luther, balingaki koyeba sekelé nyoso ibombámáki. Mposa ya bango ezalaki komóna bokokisami ya Liloba kosalema na ntango bazalaki na bomoi. Balingaki komóna boyei ya Nkoló.
Nzambe azalaki na etandelo. Nzambe azaláki na ntango. Nzambe azalaki na bato baoyo azaláki kotálela…BISÓ.
Kati na bileko, nyoso bakwéaki.
Kasi Ayebaki, na nzela ya boyebi na Ye makambo libosó, ekozala na bato moko: Mwasi Liloba na Ye ya nkembo Oyo abongi be. BAKOLINGA KOZÁNGELA YE TE. Bakokakola te LIKOLÓ NA LILOBA MOKO. Bakozala Mwasi Liloba na Ye moseka peto.
Ntango yango oyo. Eleko yango oyo. Bisó nde baponami baoyo Aziláki útá Adáma akweáki mpe abúngisaki makoki ma ye. TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA.
Nzambe atálisaki Yoane libosó galasísi ya manso maye masengelaki kosalema, kasi ayebaki ntina nyoso te. Ntango abiángamáki likoló, amónaki kati ya loboko mobali ya Ye oyo afandaki likoló na kiti ya bokonzi búku moko esilaki kokomama na kati, etiamaki elembo na bilembo nsambo, kasi moko oyo akokaki kofungola búku yango azalaki te.
Yoane agángáki mpe aleláki na biloko mingi mpenza lokola nyoso ebúngákí, elikia ezalaki te. Kasi lokúmu na Nkoló, moko na ba mpaka alobaki na ye: “Lelá te, zambí tála, Nkosi na libota na Yuda, Ntina na Dawidi, Asili kolonga kofungola búku, mpe kokangola bilembo yango nsambo”.
Nde ezalaki ntango. Nde ezalaki eleko. Nde ezalaki moto oyo Nzambe aponaki kokoma nyoso emonáki ye. Kasi ata ko bongo ndimbola na Yango nyoso eyebanáki te.
Nzambe azalaki kozila mpe kozila mbeki ya Ye eponamákí, motindami na Ye mwanje ya nsambo, koya na mabelé, mpo Ákoka kosalela mongóngó na ye kozala Mongóngó na Ye, epai ya Mwasi na Ye ya libala. Alingaki koloba mbebu na litói na ntina ete KOZANGA KOSÓSOLA ÉZALA TE. Ye bobele Ye moko, alingáki koloba mpe komónisa mabómbami ma Ye manso epai ya balingami na Ye babongisamáki libosó, babongi be, Mwasi na Ye ya libala, molingami ya motema…BISÓ!!
Boni Azilaki koyebisa bisó makambo maye manso ma bikamwa. Lokola mobali akoyebisa Mwasi na ye ete alingi ye lisúsu na lisúsu, mpe atikalá te kolemba koyóka yangó, Alingaka koyebisa bisó lisúsu na lisúsu ete Alingi bisó, Aponaki bisó, Azilaki bisó, mpe sikawa Azali koya mpo na bisó.
Ayebaki boni tokolinga koyóka Ye koloba Yango lisúsu na lisúsu, na bongo Atikakí Mongóngó na Ye mótiama na bande, na ntina ete Mwasi na Ye ya libala ákoka Kofina Play mokolo mobimba, mokolo na mokolo, mpe koyóka Liloba na Ye kotóndisa mitema mia bango.
Mwasi na libala na Ye molingami Asili komibongisa na bomíléísáká na Liloba na Ye. Tokoyóka eloko mosúsu te, bobele Mongóngó na Ye. Tokoki bobele kolia Liloba na Ye Peto lipesamákí.
Tozali na mitéma lúkulúku mpenza. Tozali koyóka Yango kati ya bomoto na bisó. Azali koya. Tozali koyóka mozíki ya makwéla kobeta. Mwasi ya libala abóngámí mpo átambola na elekelo. Moto nyoso atélemi, Mwasi ya libala azali koya kozala na Mobali ya libala. Nyoso esili ebongisami. Ntango yango ekómí.
Alingi bisó lokola mosúsu te. Tolingi Ye lokola mosúsu te. Tokozala Moko elongó na Ye, mpe baoyo nyoso tolingí, kati na séko na séko.
Obiangámi koya komibongisa mpo ya makwéla elongó na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe komónisa Emóniseli, Mokapo Ya Mitano Eteni Ya I 61-0611.
Ndeko Joseph Branham