NSANGO: 65-0829 Edene Ya Satana
Molingami Eténi Ya Nzambe,
Tozali Eteni mpenza ya Tata na biso ya Likoló; zambi tozalaki kati na Ye na ebandeli. Toyebi komikundolela yango sasaipi te, kasi tozalaki kuna elongó na Ye, mpe Ayebaki biso. Alingaki biso mingi mpenza na motindo ete Asaláki biso mosuni, ete Ákoka kozala na boyokani na biso, koloba na biso, kolinga biso, ata kopesa biso mbote na mabóko.
Kasi Satana ayáki wana mpe apengwisáki Liloba ya ebandeli ya Nzambe, Bokonzi na Ye, mpe mwango na Ye mpo na biso. Abébisaki mibali mpe basi mpe alóngaki kopengwisa mpe kokamata mokili oyo tozali kobika kati na yango.
Akómisaki mabelé bokonzi na ye, elanga na ye ya Edéne.
Ezali ngonga moko ya bokósi mpe ya zunguluké koleka etikalá ndèle kozala. Zábolo atíá mitambo nyoso ya mayéle mabe akoki kotia; mpo ete azali mozimbisi monene. Moklisto asengeli ázala likoló ya misapi na ye ya makolo lelo koleka lolengé azalá ndèle na eleko ata nini.
Kasi na ntango yango moko, ezali ntango ya Nkembo koleka ya bileko nyoso, mpo ete tozali kobelema na Bokonzi bonéne ya Mbula Nkóto.
Elanga na biso ya Edéne ezali koya noki, epai wapi tokozala na bolingo bobongí be mpe lisósoli libongí be ya bolingo ya Nzambe. Tokozala na bomoi mpe na kobatelama elongó na Ye kati na Edene ya biso kati na Sekó na Sekó.
Yesu ayebisaki biso kati na Matai 24 boni tosengeli kozala na bokebi lelo oyo. Akebisaki biso ete ekozala mokolo ya bokósi koleka etíkalá kobíkama, “pene mpenza na ndenge ete ekokaki kozímbisa ata Baponami mpenza ya Nzambe soko nde ekokaki”; mpo ete mayéle mabe ya zábolo ekosala ete bato bándima ete bazali Baklisto, nzokande bazali yango te.
Kasi eleko oyo mpe ekobimisa Mwasi Liloba na Ye peto oyo akoki te, mpe akokaki te, kozimbisama; zambi bakotikala na Liloba na Ye ya ebandeli.
Pelamoko Yosua na Kalebe, Mokili na biso ya elaká ezali koya polele na miso bobele lokola oya bango eyaki. Mosakoli na biso alobaki Yosua elingi koloba: “Yawe Mobikisi”. Alembétéláki mokambi ya ntango ya nsuka oyo akoya epai na lingomba, kaka lokola Paulo ayaki lokola mokambi ya ebandeli.
Kalebe nde etaliseli ya baoyo batikali sembo elongo na Yosua. Lokola bana ya Yisalaele, Nzambe abandáki kobimisa bango lokola moseka elongo na Liloba na Ye; kasi balingaki eloko moko ekeseni. Mosakoli na biso alobaki: “bongo nde lingomba oyo ya mokolo ya nsuka ezali kosala.” Na bongo, Nzambe atíkáki te Yisalaele kokóta na mokili ya elaká kino ezalaki ntango ya Ye moko ebongisamáki.
Bato bapúsáki Yosua na makasi, mokambi ya bango oyo apésamáki na Nzambe, mpe balobaki: “mokili ezali ya biso, tika ete tokende mpe tózua yango. Yosua, osílí kosila, esengeli kozala ete obúngísí lotómo na yo. Ozali te na nguya omeseneki kozala na yango. Omesenéki koyoka útá na Nzambe mpe koyeba mokano ya Nzambe, mpe kosala nokínokí. Eloko moko ezali kotambola malongá te na yo.”
Yosua azalaki mosakoli atindamáki na Nzambe, mpe ayebaki bilaká ya Nzambe. Mosakoli ya biso ayebisaki biso:
“Nzambe atiáki bokambami mobimba na maboko ya Yosua mpo ete atíkálaki na Liloba. Nzambe akokaki kotiela Yosua motema, kasi basúsu te. Boye ekozóngela na mokolo oyo ya nsuka. Likambo yango moko, kopusa na makasi yango moko”.
Kaka lokola Nzambe asáláki na Yosua, Atiakí BOKAMBAMI MOBIMBA kati na maboko ya mwanje na Ye mosakoli, William Marrion Branham; zambí Ayebaki Akokaki kotiela ye motema, kasi basúsu te.
Esengeli ézala na Mongóngó Moko, Mokambi Moko, Liloba ya nsuka Moko, ndèle, mpe SIKAWA.
Nalingi boni mosakoli ayebisaki biso ekozala na nkóto na nkóto mbala nkóto na nkóto baoyo bakoyoka ba bande. Alobaki ete ba bande IZALI LOTÓMO. Ekozala na basúsu na biso komísélimwisa kati na ba ndako mpe biyanganelo na (lotómo na ye) ya ba bande kokanga Mombóto ya Ye mobongisamáki libosó.
Wana ezóngaki bisó mpe tolobâki, Nkóló, totósáki mitindo mia Yo, mpe ezalaki na bato bandimaki ntango toyókisaki ba bande. Sikawa totéyáki yango, kati na mokili mobimba, Okomemia nde yango?
Akoloba: “Yango nde Natindaki bino kosala.”
Nzambe Akomemia yango. Ndako na yo ekokwéa na nsé soki moké te. Ntango Nzambe Apesi motindo kobebisa eloko mobimba, libota na yo nyoso, bozui na yo nyoso, ikobatelama kati na ndako na yo. Okoki kotelema wana. Ozalaki na motindo te ya kotala na lininísa, Finá kaka Play ntango etumba ezali kokóba.
Maloba ma Yo mazuámáki mpe Naliaki yangó mpe Liloba na Yo lizalaki epai na ngai esengo mpe kosepela ya motema na ngai: zambí Nabiangámi na Nkombo na Yo, E Nkolo Nzambe na bibelé.
Nabiangi yo koya komibakisa na biso lokola tozali kolia lotómo monene ya ntango ya nsúka, ya bomoi, ya Nzambe, Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka nyoso na ntina na Edene Ya Satana 65-0829.
Tika ete tóbika kino na Boyei ya Nkolo, soko ekoki. Tika ete tosala nyoso ezali na makoki ya biso, na bolingo mpe lisósoli, kosósola ete Nzambe Azali kolukaluka kati ya mokili, lelo, kokúta mpate abúngí moko na moko. Mpe tika ete tosolola na bango na mabondeli ma elengi ya bolingo mpe Liloba ya Nzambe, ete tókoka kokúta oyo ya nsuka wana, ete tókoka kokende na Ndako, mpe kobima na Edéne oyo ya kala ya Satana awa, Nkolo.
Ndeko Joseph Branham
Makomi ma kotanga liboso ya boyoki Liteya:
2 Timote 3: 1-9
Emoniseli 3:14
2 Batesaloniki 2: 1-4
Yisaya 14: 12-14
Matai 24:24