Nsango: 65-0822E EKONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA
- 24-0915 KONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA
- 23-0226 EKONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA
- 21-1031 EKONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA
- 21-0606 EKONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA
- 17-1119 KONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA
Molingami Mama Yesu Klisto,
Molimo na Nzambe ya bomoi, pémá likoló na bisó. Tika ete tózua ekongoleli ya Yo mpe tóbika na nsé na Yango, Nkolo. Pémá mopepe malamu ya Molimo Mosanto kati na mapululu mpe bomoto ya biso mokolo na mokolo. Tokoki kobika bobele na nzela na Liloba ya Yo; Liloba nyoso likobimaka na monoko na Yo na eleko oyo tozali kobika kati na yango.
Tolétí biloko na Yo ya Lóla mpe Tozali na Liloba na Yo kati na mitéma na biso. Tomóní Liloba ya Yo limónisamí libosó na biso, mpe bomoto na biso mobimba bozíngámí kati na Yango. Mokili oyo, mpe makambo nyoso ya mokili makúfí epai na biso.
Tozali eútelo ya mombóto Liloba na Yo lizaláki kati na Yo útá ebandeli, kotelema awa, kobénda Bómoi mombóto na Yo. Mombóto mwa Yo mozali kati ya mitema na biso na nzela ya boyebi na Yo makambo libosó. Obongisaki biso libosó kobénda na nzela ya elóko mosúsu te, kasi Liloba na Yo, Mongóngó na Yo, likoló ya ba bande.
Eleko ya líso ekómí; ezali na eloko mosusu te etíkálí kasi Boyéi na Yo mpo ya Mwasi na Yo ya libala. Ekongoleli ya biso ezali Liloba ya Yo, Malaki 4, Yango Elobi Yawe.
Tika ete tókóna Liloba na Yo kati na mitema ya biso, mpe tókána ete tóbaluka na epai ya loboko ya mobali to na lobóko ya mwasi te, kasi kobika sembo na Yango mikolo nyoso na bomoi na biso. Tata, kitíselá biso Molimo Mosanto ya Bomoi, mpe yéísá Liloba na Yo na bomoi epai na biso, ete tókoka komónisa Yo.
Mpósa ya mitema ya biso ezali kozala bana na Yo mibali mpe basi ya solo. Tozali kofanda kati na bozali ya Mongóngó ya Yo, kotela, komíléngela mpo ya Elambo ya libala na biso ebelémi elongó na Yo.
Mabota mazali kobukana. Mokili mozali kopanzana. Koningana ya mabelé izali koningisa California lokola eyebisaki Yo biso ete ekozala. Toyebi ete noki mpenza eteni na yango na molaí ya kilométele nkóto mibalé nkámá minei na zómi na minei; monene ya kilométele nkámá minei na ntúku mwambe na misato to nkámá motóbá na ntúkú minei na minei, ekozinda, ntango mosusu kilométele ntukú motóbá na minei na nsé kati ya mokaka wana monene kuna.
Mbóngé ikobéta kino na etúká ya Kentucky, mpe ntango ekosala bongo, ekoningisa mokili makasi mpenza na motindo ete biloko nyoso likoló na yango bikkwéa na nsé.
Ekebiseli na yo ya nsuka yango oyo ezali kobima. Mokili mozali kati na libébí mobimba, kasi ntango nyoso Mwasi na Yo ya libala azali kopéma kati na Yo mpe Liloba na Yo, kofanda elongo na bisiká ya likoló lokola Ozali kosolola na biso, mpe kobóndisa biso na nzela.
Boni tozali na matóndí, Tata, ete tokoki bobele “Kofina Play” mpe koyoka Mongóngó na Yo koloba na biso, koyíkisa biso mpiko mpe koyebisa biso:
Banga te Etonga moke. Nyoso ezali Ngai, bozali basangoli mpe lokola. Bokonzi nyoso ya Ngai ezali ya bino. Nguya nyoso ya Ngai ezali ya bino lokola etelémí Ngai na kati na bino. Nayéi te komema nsómo mpe kokwéa, kasi bolingo mpe mpíko mpe mabongi. Bokonzi nyoso bopesameli Ngai mpe ezali ya bino kosalela. Bóloba Liloba mpe Nakokokisa yango. Yango nde kondimana ya Ngai mpe ekoki kokwéa soki moké te.”
Oo Tata, tozali na ELOKO TE ya kobanga. Opesi biso bolingo na Yo, mpiko mpe mabongi. Liloba ya Yo lizali kati na biso kosalela ntango tosengeli na Yango. Tolobi Yango, mpe Okosala Yango. Ezali Kondimana ya Yo, mpe Ekoki KOKWÉA SOKÍ MOKÉ TE.
Maloba ya mokúfi makoki te kolimbola lolenge tozali koyoka, Tata, kasi toyebi Ozali komóna kati na mitema mpe bomoto ya biso; zambi tozali eteni ya Yo.
Boni tozali na matóndí ete Opesaki nzela mpo ya mokili koyoka Mongóngó na Yo na ntango oyo ya nsuka. Póso na póso, Ozali kobianga mokili koya komibakisa na kati koyoka mwanje na Yo motindami lokola Ozali koléisa biso na Biléi ya ba Mpate oyo ibómbámákí koléisa biso kino bozóngi na Yo mpo na biso.
Tolingí Yo Tata.
Ndeko Joseph Branham
Liteya: 65-0822E Ekongoleli Ya Moto Oyo Akanisaka
Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville
Makomí: Mitúya 19:9 / Baefese 5: 22-26