Pásika 2026 -Molúlú Godi Ya Elámbo & Kosukolana Makolo 

Balingami Bandeko Bana mboka Ya Bokonzi,

Pasika oyo ezali kolaka ete ekozala Pásika monéne koleka oyo Mwasi ya libála azuá ndèle. Tozalaki kofanda kati ya Bozali ya Mwana, kotela, koyeba baoyo Ezali bisó. Litóndí ya Yesu Klisto ezali komónisama kati ya moko na moko na bisó lokola Liloba na Ye, Mongóngó na Ye ezali kogánga, longwá na Mpongo kino mpongo, kobiánga bisó kobima tókende na Lipati ya bisó ya Libála.

Mbúla na mbúla na ntango oyo Mwasi ya libála azalaka kati na kozila na etíngiá monéne ya boyéi ya nsúka ya póso ya Pásika. Ntango moko oyo Akosangisa bisó longwá na mokili mobimba mpo ya mikolo minei ya bokóbi, kokúmisa Ye, kotóndo Ye, kosánzola Ye; zambí Asékwí mpe Azali kobíka kati ya moko na moko na bisó. Mobali ya libála mpe Mwasi ya libála bazali kokóma MOKO.

Azali kopesa bisó ntango Godi oyo kokanga mpenza makambo nyoso ya mokili zingázingá na bisó mpe káka kolekisa ntango elongó na Ye. Makambo ya mokili oyo te kobénda bokébi na bisó, lokola tozali kokela mokili mwa bisó moko elongó na Ye. Kokanga bikuke ya bisó, kokanga bisáleli ya bisó nyoso ya nsinga mpe ya mipepe mpe eloko mosúsu ata nini ekobéndaka bokébi na bisó mosiká na Ye.

Pósá monéne koleka moko na moko na bisó azali na yango ezali kobélema na Ye na koleka. Tolingi kobíka bomoi bobónzameli Ye koleka; kozala ntango nyoso kati ya Mokáno mwa Ye mobongí be. Komíléngele mpo ya koya na Ye. Ezali na eloko moko te kati ya mokili oyo, to kati na bomoi na bisó, ézala na litómbá koleka oyo.

Apési bisó libakú malamu godi oyo kolekisa káka ntango elongó na Ye, koloba mpe kobánza likoló na Ye. Kokóta kati ya bozali na Ye mpe kofungwela Ye mitéma mia bisó. EKOZALA NDE YA KOBÓNGOLA BOMOI MPO YA MWASI NA YE YA LIBÁLA!

Ayebi ete ekokí kozala kpókósó mpo ya bókó na bino na bana, libota, mpe mikúmbá misúsu tozali na yango, kasi soko tokosálela Sékónde moko na moko ya nsómí tozali na yango koloba na Ye, kobéndama pene na ye koleka,  kofungola mitéma mia bisó epai na Ye, Ekozala nde na mbóngwáná moko ya ndenge wana kati ya kotámbola ya bisó elongó na Ye, kino tokozala lisúsu lolengé moko te.

Lokola esáláki Ye na mikolo ya Mose wana eyéisáki Ye bana na Ye kati na ba ndako ya bango, Makilá mapakólamákí mpe bazalakí komíléngele mpo ya kobima ya bango; bongo mpe nde nsúka ya póso oyo ya Pásika godi ebongisi Ye ekozala mpo ya moko na moko na bisó.

MOKOLO MWA MINEI

Ezalaki mokolo mwa Minei na mpókwa nde Nkoló Yesu azuákí Elámbo ya nsúka elongó na bayekoli na Ye, kati ya ekaniseli ya Elekeli libosó ya kobima ya bana ya Yisalaele. Libakú malamu nini oyo tozali na yango kosangana elongó na Nkoló kati ya ba ndako na bisó, libosó ya nsúka ya póso ya bisó mosanto, mpe kosenga Ye álimbisa bisó na masúmu ma bisó, mpe ápesa bisó nyoso tosengeli na yango kati ya mobembo na bisó.

Tata na Likoló, tozali na matóndí mpo na oyo, ntango mosúsu koyanganisama elongó, ngámbo oyo ya Sekó na Sékó. Mpe tozali koluka na ntóngó oyo nguya ya sika koúta epai na Yo, kopesa bisó mpiko mpo ya mobembo mozali libosó. Toyangani pelamókó bana ya Baebele basalákí na ntá ntóngó nyoso, kolokota máná mapesámélaki bango kati ya butú, kobatela bango kati ya mokolo mozalaki koya. Toyángani mpo ya Máná ya molimó, na ntóngó oyo, kopesa bisó makasi mpo ya mobembo.

Tika ete banso tóbanda na 6:00 nsima ya nzángá na ntango ya mboka ya bino koyóka Elámbo 62-0204, na nsima mosakoli akomema bisó kati ya molúlú ya bisó godi ya Elámbo mpe Kosukwama Makolo na nsúka ya bánde, oyo ekozala koleka na app Lifeline (na Angelé), to okoki komízuela losámbo na Angelé to na nkótá mosúsu na bonyatáká ekanganeli na nsé awa.

MOKOLO MWA MITÁNO

Tika ete tókende na mabóndeli elongó na mabóta ma bisó na 9:00 na ntóngó, na nsima na 12:00 nsima ya nzángá, kobiánga Nkoló ázala elongó na bisó mpe átóndisa ba ndako na bisó na Molimó Mosanto lokola tozali komíbónzela epai na Ye.

Tika ete mitéma mia bisó mízónga na mokolo wana na Kalvari, elekí pene na mbúla 2000, mpe tómóna Mobikisi na bisó akakémí likoló na ekulúsu. Tika ete tókanisa motúya monéne Afútaki mpo ya bisó. Azalaki Mwana ya Nzambe na lisúmu te, kasi Asengélákí konyókwama lokola moto moko te anyókwámá, zambí masúmu ma bisó matiámákí likoló na Ye.

Asengélákí kotinda Ye na ewélo akwéísámí (Bomóní?), zambí azuaki masúmu ma bisó. Mpe Klisto akúfákí, te lokola moyengebene; Klisto akúfakí mosumúki. Bomóní? Klisto atíkálâ kosúmuka Ye moko te, kasi Azuakí masúmu ma bisó likoló na Ye.

 Nsima na 12:30 nsima ya nzángá, tika ete tókangana elongó kati na ba ndako ya bisó koyóka: 57-0419 Bobongi be

Nsima tika ete tókangana elongó kati na libondeli mbala moko alimá nsima ya losámbo, kati na ekaniseli ya bobákami na ekulúsu ya Nkoló na bisó.

MOKOLO MWA PÓSO

Tika ete mbala moko lisúsu banso tósangana kati na libóndeli na 9:00 na ntóngó mpe na 12:00 nsima ya nzángá, mpe tóbongisa mitéma na bisó mpo ya makambo minéne Akosala mpo ya bisó kati na bisó.

Nakoki koyóka Ye koloba, “Satána, yaka awa!” Azali Mokonzi sikawa. Asémbóli lobóko, Asímbí lifungóla wana ya kúfa mpe ya ewélo longwá na pembeni ya lokéto na ye, Atingámísí yango pembeni na Oyo ya Ye moko lokéto. “Nalingí éyebana epai na yo. Osálá bipale ntango molaí mingi. Nazali Mwana Nzambe ya bomoi oyo abótámí na bongondo. Makila ma Ngai mazali naino kotanga na ekulúsu, mpe nyongo efútámí mobimba! Ozali lisúsu na makoki te. Obótólámí nyoso. Pésá Ngai Mafungóla wana!”

Nambísa na 12:30 nsima ya nzángá, tokoya bisó nyoso elongó koyóka LILOBA: 57-0420 Bokundami.

MOKOLO NINI YA KÁFÚ-KAFU oyo ekozala mpo ya Mwasi na Ye ya libála kati ya mokili mobimba.

Nambísa tiká ete tóya elongó kati na libóndeli mbala moko alimá nsima ya losámbo.

MOKOLO MWA LOMÍNGO

 Tiká ete ya libosó tólamuka na ntá ntóngó lokola esáláki Ndeko Branham na ntóngó wana eyákí moníngá na ye moké, mwa ndeke ya tólo motáné, kolamusa ye na 5:00 na ntá ntóngó. Tiká bobélé ete totóndo Nkoló mpo na kosékwisa Yesu longwá na bakúfi:

Na ngonga ya mitáno na ntóngó oyo, moningá na ngai moké na tólo motáné apombwák na lininísa mpe alamúsákí ngai. Eyokanákí lokola nde mwa motéma na ye molingaki kopasuka, na bolobáká, “Asékwí.”

Na 9:00 na ntóngó, tiká tóya elongó mbala moko lisúsu kati na monyolólo na bisó ya mabondeli, kobondela moto mpo na moninga na ye mpe komíbongisa koyóka Mongóngó ya Nzambe.

Na 9:30 na ntóngó, tokoya elongó koyóka Litéya ya bisó ya Pásika: 65-0418M Ezali Kobima Ya Mói.

Na 12:00 nsima ya nzángá, tokotómbola mingóngó na bisó epai na Ye kotóndo Ye mpo ya nguya ekopesaka bomoi.

Na 3:00 nsima ya nzángá, tiká ete mbala moko lisúsu tósangana kati na libóndeli kotóndo Ye mpo na NSÚKA YA PÓSO MALAMU APÉSÍ BISÓ ELONGÓ NA YE MPE ELONGÓ NA MWASI NA YE YA LIBÁLA LONGWÁ NA MOKILI MOBIMBA.

Epai ya bandeko na ngai mibali mpe basi na ngámbo ya bibale minéne, lokola mbúla eleki, Nalingí kobiánga bino bósangana elongó na bisó na ntango ya Jeffersonville, mpo ya ntango nyoso ya mabóndeli likoló ya manáka oyo. Nayebí nde ata ko bongo, ete koyóka bánde mokolo mwa Minei, mwa Mitáno, mpe mwa póso nsima ya nzángá na ntango ya Jeffersonville ekozala kpókósó makasi mpo ya mingi na bino, na bongo bolimbisi bómíyóka nsómí koyóka Matéya wana na ntango ekokí mpo na bino. Nzokande, Nakolinga atako bongo, mpo ya bisó nyoso tókangana elongó mokolo mwa Lomíngo  na 9:30 na ntóngó, ntango ya Jeffersonville, koyóka Litéya ya bisó ya Lomíngo elongó.

Nalingaki mpe kobiánga bino mpe bana na bino ete bózala eténi ya Misálá ya Creations, journaling, mpe biloko ya bobongisi biléi oyo libóta na yo mobimba bokosepela kosála elongó. Tokanisi ete bokolinga yango lokola nyoso ezuí mobóko likoló ya LILOBA tokozala koyóka na nsúka ya póso oyo.

Mpo ya manáka ma nsúka ya póso, nsango likoló ya komíbongisa mpo ya molúlú ya Elámbo, bisáleli bikosengelama na yango mpo ya misálá ya Creations mpe nsango mosúsu, bómóna bikanganelo awa na nsé.

Tiká tókanga ba telefóne ya bisó mpo na nsúka ya póso ya Pásika, longólá sé kozua bilílí, koyóka Eténi Ya Liloba Útá Na Litéya Ya Mokolo, mpe koyóka ba bánde longwá na Table app, Lifeline app, to bikanganelo bikokí kozuama.

Ezali lokúmu ya lolengé wana mpo na ngai kobianga yo mpe libota na yo koya elongó moko na Mwasi ya libála longwá na mokili mobimba mpo na nsúka ya póso etóndí na LOKÚMU, MASÁNZOLI, MPE LOBÍKO YA NZÓTO. Nandimí ezali sóló mpenza nsúka ya póso oyo ekobóngola bomoi na yo mpo ya libélá.

Ndeko Joseph Branham.