Nsango: 65-0218 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE
- 26-0301 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE
- 24-0602 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE
- 22-1106 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE
- 19-1027 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE
- 17-0104 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE
Balingami Mwasi Liloba Moseka,
Nazali kofanda awa na ntóngó oyo koyóka epakweli moko ya ndéngé wana lokóla ezali ngai koyóka, kotanga mpe koyékola Litéya liye Mwasi ya libála akozala koyóka mokolo mwa Lomíngo. Bomoto na ngai mobimba epakólámí.
Motéma mua ngai mozali kopunjwa-punjwa na esengo ya ndéngé wana koyeba ete, TOKOYANGANISAMA BANSO ELONGÓ LONGWÁ NA MOKILI MOBIMBA NA EPAKWELI OYO MOKO. Tokozala kosepela, kosánzola Nkoló, nyoso na ntango yango moko, lokola Azali koloba na moko na moko na bisó mpe komónisa Liloba na Ye.
Kopakolama ekozala mpenza monéne mingi na motindo ete ekozala na kogánga mpe milóló, “Aleluya, amen, Nkombo ya Nkoló ésánzolama” longwá na mokili mobimba na ntango yango moko, lokola tozali kotóndisa Lóla na masánzoli mpe kokúmisa ya bisó.
Nini nde ekozala kosálema? Nzambe akozala kosangisa mpe koloba na Mwasi na Ye ya libála. Tokozala Lisangá Moko, kati na likanisi moko mpe lobánzo moko lokola Azali komífungola mpe komímónisa epai na bisó.
Ezali na esiká monéne te epai wapi okoki kokende, Mongóngó monene te koleka okoki koyóka; ezali na epakweli eleki monéne te soko bobele te Mongóngó ya Nzambe koloba na yo mbala moko likoló ya ba bande.
Nzambe asénzéláki Liloba na Ye longwá na ebandeli mpe apésákí esiká wapi bana na Ye nyoso bakoki kokende mpe koyóka Ye koloba mpe kolimbola Liloba na Ye moko. Epai wapi ezali na kobánzabanza te, kolikia te, komítúna te, Ezali esiká epésámí na Nzambe koyóka YANGO ELOBÍ NKOLÓ.
Ntango emónísámélí yo, ezali lokola pole monéne koleka oyo epelísámí kati na motéma mpe bomoto na yo…ogángí, “nde yango oyo. Namóní yango. Nazali MOKO NA LILOBA. NAZALI LILOBA. NAZALI MWASI YA LIBALA. NAKÓMÍ NA NGAI.”
Ezali kokóma, nde bayébí yango te. Bomóní, nde yango. Bomóní? Ee, mobali. “Zambí esiká Nzóto oyo ekúfí ezali, wana nde ba mpongo bakoyangana,” mpenza kaka lokola molongo. Bomóní? Nde oyo Elobákí. Nzóto oyo ekúfí nde nini? Liloba. Azali Liloba, Nzóto oyo ekúfí, Klisto! “Klisto kati na yo,” lolengé moko lobi, lelo, mpe libela. Boni Ezali solo!
Lokola tozali koyangana koyóka Liloba, mitungisi nyoso ya bisó, mokumba ya makanisi na bisó, makambo ya bisó nyoso, ilímwí na yango sé kolímwa. Tozali kosepela lokola toyebi ete tozali na eloko moko te ya komítungisa na yango; tozali Mwasi na Ye ya libala. Azali kaka elongó na bisó te, KASI AZALI KATI NA BISÓ. TOZALI MOMBÓTO MWASI LILOBA. Nyoso ebongí be. Ntango na Ye ebongi be. Tobongí be.
Tosepélí koleka mpe tozali na matóndí mingi koloba ete tozali Liloba na Ye libótámí moseka tomónísámí; Yesu Klisto lolengé moko lobi, lelo, mpe libela, kobika mpe koúmela na kati na bisó. Alelúya!
Tokokí te kokakola likoló ya LILOBA ATA MOKO. Tosengeli koyóka Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.
Osí omóná mpongo kokakola? Te, mobali. Ezali te na kokakola kati na Ye. Nde bongo Moklisto mpenza ya solo a kokakola soki te. Azali zololo te. Akoluka na etingia kino ázua Yango. Amen. Ee, mobali. Akozua Mosuni na ye. Alingí Máná ma sika. Akokita na nsé Kúná mpe akotímola kino ázua Yango. Akopumbwa likoló mpe likoló koleka. Soko eloko ezali te na lobwaku oyo, akopumbwa mwa likoló lisúsu koleka. Na bomatáká likoló mingi, nde okoki komóna polélé. Na bongo ntango ekokí mpo ya ba mpongo ya lelo oyo bákoka kopumbwa likoló koleka, bátímola kati na bilaká ya Nzambe, bábíka te na biléi ya ba kómbékómbé oyo ibomámáki esili koleka mbúla ebelé; bóbima na yango.
Bómilengela Mwasi ya libála, tokozala kolia Máná mangó ma sika, kofánda na nsé ya epakweli monéne koleka oyo ezali, Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: 65-0218 Mombóto Mozali Mosangoli Libulá Elongó Na Ezipelo Te.
Tobiángi Mwasi ya libala útá na mokili mobimba komíbakisa na bisó kosala lipati likoló ya Nzela ya Nzambe ebongí be epésámí mpo ya lelo. Esiká sé moko wapi MWASI YA LIBÁLA akoki koloba amen na Liloba nyoso. Epai wapi epakweli ya likoló koleka ya Molimó Mosanto ezali koloba mpe kobongisa be Mwasi na Ye ya libála na nzela ya Bofináká Play mpe boyókáká mpe boyambáká Liloba na Ye.
Ndeko Joseph Branham
Makomi:
St. Matai 24:24
St. Luka 17:30
St. Yoane 5:24/ 14:12
Baloma 8:1
Bagalatia 4: 27-31
Baebele 13:8
1 Yoane 5:7
Emóniseli 10
Malaki 4