25-0921 Kofundama

Nsango: 63-0707M KOFUNDAMA

BranhamTabernacle.org

Balingami Baoyo Bafúndamákí Nde Balongísámí,

Sikawa, kúná, “bangó,” mosumúki te. “Bangó,” Nde koloba lingómbá ya mokolo wana, bazuakí libúngá na Moto Oyo Azalákí Liloba. Ezali solo? Bazuakí libúngá na Moto Oyo Azalakí Liloba. Sikawa bazuí libúngá na Liloba kosala na nzela ya moto.

Útá ebandeli mokili mobóyákí Ye, mobwákakí Ye, mobóyákí kotikala na Liloba na Ye na bobáteláká mimesano na bangó, bindimeli ya bango, makanisi ma bango. Bazangákí ntango nyoso manáka ma Nzambe; Nzambe, lokola Moto, Oyo azalakí Liloba, mpe sikawa Liloba kosala na nzela ya moto.

Kasi kati na mokolo mwa bisó Alobákí: “Nakozala na na mwa libóké, motángo moké ya baponami. Bazalakí kati na Ngai útá ebandeli. Bakoyamba Ngai mpe na Kondima Liloba na Ngai mpe moto oyo Naponákí komónisa Liloba na Ngai. Akozala Mongóngó na Ngai epai ya bango.”

“Bakoyóka nsóni te kosangela Mongóngó na Ngai. Bakoyóka nsóni te koyebisa mokili ete Nayéi lisúsu mpe Namímónisi kati na mosuni ya moto lokola Nalobaki ete Nakosala. Mbala oyo bakosámbela moto yango te, kasi bakosámbela Ngai, Liloba, oyo Nakoloba na nzela ya moto. Bakolinga Ngai mpe bakoyebisa mpo na Ngai na mosisá moko na moko ya bomoto na bango.”

“Na bongo, Napesi bango nyoso basengeli na yango kokóma Mwasi na Ngai ya libala. Nakémbisí bango na Liloba na Ngai; zambí BAZALI LILOBA NA NGAI likómí mosuni. Soko bazali na bosengá ya lobiko na nzóto, balobaka Liloba na Ngai. Soko bazali na epeliseli ata nini libosó na bango, balobaka Liloba na Ngai. Soko bazali na mwana oyo alongwí na nzela, balobaka Liloba na Ngai. Ézala ata nini basengeli na yango, balobaka Liloba na Ngai, zambí bazali Liloba na Ngai likómí mosuni kati na bango.”

“Bayebi bazali ba nani, zambí Namímónisí epai na bango. Batikali sembo mpe na motema mobimba na Liloba na Ngai mpe bazali kosangana elongó zingázingá ya Mongóngó na Ngai. Zambí bayebi Mongóngó na Ngai, Liloba na Ngai, Molimó Mosanto na Ngai. Bayebí, epai wapi Liloba lizali nde ba Mpongo bakoyangana.”

Lokola mosakoli na Ye azali koloba Liloba na Ye mpe azali kofúnda libóta oyo mpo ya bobakisami na Yesu Klisto na ekulúsu mbala ya mibalé mpe alobí esílí mpo na bango, Mwasi ya LIBALA akozala kosepela. Zambí toyebi TOZALÍ Mwasi na Ye ya libala oyo ayambí mpe azuí Liloba na Ye. Tozali kogánga útá na bozindó ya motéma na bisó mpe koloba:

Nazali wa Yo, Nkoló. Namitandí likoló ya etumbelo oyo, bobele lokola namíkabí mobimba na ndengé Nayebí komíkaba. Longólá mokili kati na ngai, Nkoló. Longólá biloko biye kati na ngai biye bikobéba; pesa ngai biloko biyébí kobeba te, Liloba ya Nzambe. Tiká ete názala na makokí ya kobika pene na Liloba yango koleka, kino Liloba likozala kati na ngai, mpe Ngai kati na Liloba. Sala yango, Nkoló. Tíká ete Nátangwa na Yango lisúsu soko moké te.

Ezali na bomoi, ezali mpe na kufa. Ezali na nzela malamu, mpe Ezali na nzela mabe. Ezali na solo, mpe Ezali na lokutá. Etíndá oyo, Mongóngó moye, nde nzela ebongí be ya Nzambe epésámí mpo ya lelo. Yaka komíbakisa na eténi ya Mwasi ya libala ya ngúyá ya Nzambe lokola tozali Koyangana zingázingá na Liloba na Ye limónísámí mpe koyóka Litéya: Kofúndama 63-0707M

Ndeko Joseph Branham