NSANGO: 63-0714M Mpo Na Nini Koganga? Loba!
- 25-0831 Mpo Na Nini Koganga? Loba!
- 23-1022 Mpo Na Nini Koganga? Loba!
- 22-0417 Mpo Na Nini Koganga? Loba!
- 22-0414 ESODE YA MISATO
- 20-0426 Mpo Na Nini Koganga? Loba!
- 19-0804 Mpo Na Nini Koganga? Loba!
- 17-0604 Mpo Na Nini Koganga? Loba!
Balingami Lingómbá ya Nzambe,
Nzambe Alobaki mpe Asolólákí: “Nasálaka eloko te na mabelé, bobele na nzela ya moto. Na—Na—Nazali Mowíti; bozalí mitápi. Mpe Nakomíyébisa bobele ntango Nakokí kozua moto MOKO. Mpe Naponákí ye, William Marrion Branham. Natíndákí ye na nsé kobianga Mwasi na Ngai ya libala kobima. Nakotia Maloba ma Ngai kati ya monoko na ye. Liloba na Ngai ekozala Liloba na ye. Akoloba Maloba ma Ngai mpe akoloba bobele oyo Nalobí.”
Mongóngó ya Likómí molobákí na nzela ya Likonzí ya Móto mpe molobaki na ye: “Naponí yo, William Branham. Yo nde moto yango. Natémisakí yo mpo na ntina oyo. Nakotálisa yo na nzela ya bilembo mpe bikámwiseli. Okokende Kúná komónisa Liloba na Ngai mpe kokamba Mwasi na Ngai ya libala. Liloba na Ngai lisengélí líkokisama na nzela na YO.”
Mosakoli ya bisó ayebákí atíndamákí mpo ya ntina mpenza ya komónisa mabómbami manso ya Biblia mpe kokamba Mwasi ya libala ya Nzambe na mboka ya Elaká. Ayebakí oyo alobaki, Nzambe akomemia mpe Akosala ete ékokisama. Nalingí bóbósana soki moké te Liloba wana. Oyo mosakoli na bisó alobáki, Nzambe akomemia, zambí Liloba ya Nzambe lizalaki kati na William Marrion Branham. Ye nde Mongóngó ya Nzambe epai ya mokili.
Ayebakí azalaki mwanje ya nsambo motindami ya Nzambe mopakolami. Ayebakí kati na motema na ye makambo manso Nzambe alobaki na ntina na ye kati na Liloba na Ye. Oyo ezalaki kopela kati na motema mwa ye ekómákí solo. Apakólamákí mpe ayebakí azalákí na YANGO ELOBÍ NKOLÓ. Ezalaki na eloko moko te elingaki kopekisa ye kokende libosó koloba Liloba ya Nzambe.
Nzambe Alobakí na ye: “Liloba ya Ngai, na yo, motindami na Ngai, bozali eloko moko.” Ayebakí ete azalaki ye oyo aponamákí koloba Liloba ya bozángi kokwéa. Nde nyoso asengélákí na yango. ALINGAKI KOLOBA, MPE NZAMBE ALINGAKI KOKOKISA YANGO.
Emóniseli ya Etindá oyo MPE motindami ya Nzambe apakólákí kondima ya bisó lokola libosó naino sokí moké te. Ezali kopúsa bisó kotambola kati ya mabúngútulú manéne-manéne. Ekabólí bisó na eloko nyoso longólá sé Etíndá na Ye, Liloba na Ye, Mongóngó mwa Ye, ba Bande na Ye.
Etali bisó te tózala moké boni, tósekama boni, tósakanama na yango boní, eyéisí bokeseni ata ndambo te. TOMÓNÍ YANGO. TONDIMÍ YANGO. Ezali na eloko moko kati na bisó. Tobongísamákí libosó komóna YANGO mpe Ezali na eloko moko te ekopekisa bisó kondima YANGO.
Tokanísí oyo emónoneli wana elobákí: “zongá mpe bómbá Biléi”. Ndako yango ya ebómbelo ezalákí wapi? Eyánganelo ya Branham. Wapi nde kati ya mboka, to zingázingá ya mokili mobimba esiká sé esiká ezali na elóko ata nini ekokokisama na Matéya tozali na yango? Ezali Mongóngó sé moko mondimísámí na Nzambe Ye Moko kozala Yango Elobí Nkoló. MONGÓNGÓ SÉ MOKO!
Wapi lisúsu nde tokokákí, to tolingákí kokende, ntango alobí;
Awa nde epai wapi Biléi bibómbamákí…
Ebómbamákí awa. Ezali likoló ya ba bande. Ekokende mokili mobimba likoló ya ba bande, epai wapi bato kati na ba ndako ya bango.
Ba bande yango ikokwéa alimá kati na maboko ya baoyo ya Nzambe babongísámí libosó. Akoki kokamba Liloba, Akokamba eloko nyoso kaka mpenza na nzela na yango. Nde ntina Azóngisákí ngai kosala oyo: “Bómbá Biléi awa”.
Tozali Mwasi Liloba na Ye ABONGÍ be oyo atíkalí na Biléi bia Ye Bibómbamákí. Bosengá ya kogánga lisúsu te, tolobí Liloba bobele koloba mpe tokei libosó, zambí TOZALI Liloba.
Eloko ya kotungisama na ntina na yango ezali te. Bosengá ezali te ya makútani ya mabóndelí ya butú mobimba komónisa tozali ba nani, Liloba lisilí komónisamela bisó. Toyebí tozali ba nani, kaka lokola mosakoli ya Nzambe, mpe asili koyebisa bisó nani nde azalaki kokende.
Moko na moko ya bisó! Ózala mama ya ndako, to ózala mwa—mwana mwasi, to ózala mpaka ya mwasi, to elengé mobali, to mpaka ya mobali, to ózala atá nani, tozali kokende ata boni. Ata moko na bisó akotíkala te.” Amen. “Moko na moko na bisó azali kokende, mpe tokotélemisa eloko moko mosúsu te.”
Lobá na ntina ya bopési bisó KONDIMA ya Konétolama!!!
Yáká komíbakisa na eténi ya Mwasi ya libala lokola tozali Koyangana zingázingá ya Mongóngó mwa Nzambe mondimísámí, lokola Azali koloba mpe koyebisa bisó: wa Ngai wa motema, moponami na Ngai, Mwasi na Ngai ya libala, Mpo ya nini Kogánga, Lobá, mpe kendé libosó.
Ndeko Joseph Branham
Liteya: 63-0714M Mpo Na Nini Kogánga? Lobá!
Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville
Esíká:
Kasi ezali bobele na Lingomba moko ya solo, mpe ómíbakisa na Yango te. Obótámí kati na Yango. Bomoni? Mpe soko obótamí kati na Yango, Nzambe ya bomoi Azali kosala Ye Moko na kati na yo, mpe Azali komíyebisa. Bomóní? Nde epai wapi Nzambe afándaka, kati na Lingomba na Ye. Nzambe Akendaka na Losámbo mokolo nyoso, Abíkaka sé kati ya Lingómbá. Abíkaka kati na yo. Yo nde Lingómbá na Ye. Ozali Lingómbá na Ye. Yo nde Mongómbo oyo Nzambe afándaka na kati. Ozali Lingómbá ya Nzambe na bomoi, yo moko.