25-0824 Elambo

NSANGO: 65-1212 Elambo

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libala Liloba Káka, Oyo Andimisámi,

Boni tozali na matóndí epai ya Molimó Mosanto mpo ya Emóniseli ya solo ya Liloba na Ye lindimisámí mpo ya lelo. Mingi bazali koloba ete bandimí Ndeko Branham azali mosakoli ya Nzambe oyo akokísí Makomi malakámí na ntina na ye moko, kasi Emoniseli ya solo ya Liloba mpe manáka ma Nzambe mabómbámí longwá na bango.

Na Litéya moko na moko oyo ezali mokandá ya bolingo Mwasi ya libala azali koyóka, Nzambe azali koyebisa bisó síki-siki tozali kati na Mokáno mwa Ye mobongí be na boyókáká nzela na Ye epesami mpo ya lelo, Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba Bande.

Mpe tosengeli kolanda Ye, nde nzela sé moko kozua Bomoi ya Sekó. Na bongo Bokambami ya Nzambe ezali: landá Liloba lindimísámí ya ngonga na nzela ya Molimó Mosanto.

Nzela BOBELE MOKO na bomoi ya Sekó ezali: Molimó Mosanto kokamba yo kolanda Liloba lindimisami. Nani yango nde azali na Liloba lindimisami mpo ya lelo? Nani nde Nzambe Aponákí kolimbola Liloba na Ye? Nani nde Nzambe Alobaki ete azalaki Mongóngó na Ye mpo ya lelo? Nani nde Nzambe Ye moko Alobaki ete azalaki mokambi na Ye andimisami kokamba Mwasi na Ye ya libala lelo? Mosala ya botéi?

Bobele lokola Nalobaki, mpóngó moké wana eyókaki ye Mongóngó ya Mobali ya libala, akendekí na Yango, Liloba lipakólámí, lindimísámí ya Nzambe mpo ya mokolo ya nsúka. Noa azalaki Liloba lindimisámákí mpo ya mokolo na ye. Mose azalaki Liloba lindimisamákí mpo ya mokolo na ye. Yoane azalaki Liloba lindimisamákí

Bakoki kotia soko bokútoli nini to ndimbola nini na Yango oyo balingí, kasi:

WILLIAM MARRION BRANHAM NDE LILOBA YA NZAMBE LINDIMÍSÁMÍ MPO YA LELO!!

Na bongo bokambami ya Nzambe ezali: landá Liloba lindimísámí ya ngonga na nzela ya Molimó Mosanto.

Mpe koyokisa Mongóngó mwa Nzambe mondimisami kati ya ndakonzambe ya binó ezali te eloko ya motúya koleka Mwasi ya libala akoki kosala? Ezali na moyúya mingi koyóka Mongóngó mokesení?

Ezali nde Ebólo ya mibali mpe mosala na bango ya botéi nde ekosangisa mpe kokamba Mwasi ya libala? Mwasi ya libala akosangisama nde na oyo batéyi balobí? Bango nyoso balobaka eloko moko ekesení, na bongo tosengelákí tólanda nani?

Ndimbola ya bango ya Etindá oyo nde tokosambisama na yango? Bazali nde na Likonzí ya Móto kondimisa botéi ya bangó? Ndimbola na bango ya Liloba nde Etémelo na yo?

Mosakoli alobaki Mwasi ya libala AKOSANGISAMA. Mítúná, nini nde ekosala ete lisakoli oyo likokisama ete Nkoló Áya konetola Mwasi na Ye ya libala?

Na nsima, ntango bato ya Nzambe babandí kozonga Koyangana elongó, ezali na lisangá, ezali na nguya. Bomoni? Mpe ntango sé ntango bato ya Nzambe bakómí mobimba elongó, Nandimí ete nde lisékwa likosálema. Ekozala na ntango moko ya konétolama ntango Molimó Mosanto Abandí koyanganisa yango. Ba—ekozala na boké, ya solo, kasi ekozala na boyángani bonéne.

Ekozala nde na boyangani bonéne zingázingá ya botéi ya moto moko boye, soko kaka mosakoli ya Nzambe te oyo andimisámí? Ekozala nde na EBÓLO ya batéi zambí boókó ya batéi ya bótáno ya botéi balobí ete bosengelaki ATA MOKÉ TE koyóka Mongóngó ya Nzambe kati ya losambo ya binó, ezali libúngá. Bakokamba nde Mwasi ya libala ndèle?

BOLIMBISI BÓSUNGA NGAI! MOTÉI NINI NDE ESENGELAKI NÁLANDA, LOKÓLA NALINGÍ KOSANGISAMA KATI NA BOYÁNGANISAMI MONÉNE WANA.

Basúsu balobí batéi ya bótáno ya Nkáké Nsambo bakobongisa be Mwasi ya libala. Batéi basúsu ya bótáno balobí ete mikolo ya lotómo ya Moto Moko misílí. Batéi basúsu ya bótáno balobí esengeli na bisó kozónga na Pantekoste. Basúsu balobí Etindá ezali Etémelo TE. Basúsu balobí soko oyókisí ba bande ozali mondimi ya bonzambe. Banso balobaka mwa eloko ekesení, mpe BANSO bazali na ndimbola ikesení, makanisi makesení, kasi moko na moko alobaka BAkambámí na Molimó Mosanto.

MOTÉI NINI YA BÓTÁNO NDE ESENGELAKI NA NGAI KOLANDA? Ntango nyoso Nalandí mobateli na “NGAI” ya bótáno, Nakozala Mwasi ya libala? Ezali na “Bibólo” mingi mpenza ya batéi ya bótáno. Batéi oyo 20 bayéi elongó mpe basáli makútani ya bango, kasi bazangi mpenza mobimba kozala na boyokani na batéi basúsu 20 baoyo bazali na makútani makeseni…makútani nini nde esengelákí kokende mpo ya kobongisama be mpe kosangisama…bokó na bango…bango nyoso?

Mpe bato bandimí MOBÚLÚ OYO EKOSANGISA MPE KOBONGISA BE MWASI YA LIBALA? Banso balobí bazali BATÉI YA SOLO YA BÓTÁNO BABIANGAMÍ NA NZAMBE. Kasi bazali te kokamba yo epai ya BOKAMBAMI YA SOLO NA NZELA YA MOLIMÓ MOSANTO, BAZALI KOKAMBA YO EPAI YA BANGO MOKO MPE BOTÉI YA BANGO.

Epai na ngai, osengeli kútu te na emóniseli koyeba yango ekokaki sokí moké te KOSANGISA to KOKAMBA Mwasi ya libala mobimba. BOBELE LILOBA nde likosangisa Mwasi ya libala, na nzela ya MONGÓNGÓ YA NZAMBE YE MOKO LIKOLÓ YA BA BANDE.

Bandeko mibali mpe basi, epusí malamu bólamuka soko bozali kolanda mobateli oyo azali kaka kotéya mpe kotanga biténi ya maloba ya Liloba, oyo ezali bikamwa mpe EZALI MPENZA oyo asengelákí kozala kosála, kasi azali te koyebisa bino, mpe ya motúya koleka, azali te KOSALA yango, na boyókísáká bino MONGONGO YA NZAMBE LIKOLÓ YA BA BANDE KATI YA LOSÁMBO YA BINO.

Ndeko Branham ayebísaki bisó:

Sikawa tozali bobele na mitindo ya Bonzambe misáto ya kosala na nzoto oyo mitíkamelaki bisó: moko na yango ezali—ezali Elambo, bosukwani makolo, libatisa na mai. Nde bobele makambo masáto. Nde bobongi be ya mísáto, bomóní.

Nalingaki mpo ya bisó kozala na Molúlú ya Elambo mpe Kosukwana Makaká Lomíngo loye, soko Nkolo Alingí. Lokola tosalaki libosó, Nalingí koyíkisa bino mpiko bóbanda na 5:00 nsima ya nzángá na ntango ya mboka ya binó. Atá ko Ndeko Branham alobaki ete bantómá baliakí Elambo ntango nyoso bayaki elongó, alingaki mingi kozua yango na ntango ya pókwa, mpe abiangáki yango Biléi ya Nkoló ya pókwa.

Litéya mpe Molúlú ya Elambo ikozala na Voice Radio, mpe ekozala lisúsu na ekanganeli ya eternet longwá na nini Liteya likokí kozuama, mpo na baoyo bakoki kozala te na makoki ya kokóta na Voice Radio na mokolo mwa Lomíngo na pókwa.

Ndeko Joseph Branham