25-0727 Konetolama

Nsango: 65-1204 Konetolama

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libala Oyo atíameli Mobeko te,

Nkoló apesí bisó ntango ya káfú-kafu ya ndengé wana na moláko póso eleki lokola Amónisakí Liloba na Ye epai na bisó. Atálisaki, na nzela ya Liloba na Ye, ete Etémelo ya bisó nde: Liloba ya Ye, Etíndá oyo, Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande; bazali banso eloko moko, Yesu Klisto lolengé moko lobi, lelo mpe libela.

Toyókakí lolengé zábolo amekaka kokabola Etíndá na motindami, kasi masanzoli epai na Nkoló Yesu, Nzambe Ye Moko alobaki na nzela ya mwanje na Ye ya nguya mpe ayebisaki bisó:

Toyebi ete ntango moto ayei, atíndámí longwá na Nzambe, abongisamí na Nzambe, na ELOBÍ YAWE ya solo, etindá mpe motindami bazali moko mpe eloko yango moko. Zambí atíndámí kotálisa YANGO ELOBÍ NKOLÓ, Liloba na Liloba, na bongo ye mpe etindá na ye bazali azali eloko moko.


Okokí te kokabola Etindá na motindami, bazali eloko moko, YANGO ELOBÍ NKOLÓ. Etálí te oyo mopakolami ya lokutá ata nani alobí, Nzambe alobí bazali eloko moko mpe bakokí kokabolama te.

Na nsima Alobaki na bisó tosengeli te na ekongweli ya elambá ékanga nyama miké ata ya motindo nini ntango tozali koyóka ba bande, pámba te nyama miké to mái ya nyama miké izali te kati na Etíndá Oyo. Ezali Etóko na Ye ya etele oyo ezali ntango nyoso kotiola péto mpe sangi-sangi. Ntango nyoso kopunjuapunjua, ekaoka soki moké te, kaka kokóba kopúsa mpe kopúsa lisúsu, kopesa bisó Emóniseli koleka ya Liloba na Ye.

Akanisélákí bisó TÓBÓSANA SOKI MOKÉ TE ete Kondimana ya Ye na bisó Ezali ya kowángana te, ya kokakola te, kasi mingi koleka nyoso, ezangi mobeko.
Ézala bolingo, lisungí, to komítíka, soko eloko moko ezangí mobeko ezali ETÉMELO mpe ebongí te na maloba to mibeko ya boyókani: ekokóma ata nde eloko mosúsu nini ékóma.

Na nsima Alingaki kobéta losété malamu, na boye Ayebisaki bisó ete lelo oyo Makomi ma Ye mazali kokokisama libosó na míso ma bisó mpenza.

S-u-n (mwesé na Angelé: mol) oyo ekobimaka na ebómbelo ya ntango ezali s-u-n (mwésé na Angelé:mol.) oyo ekolálaka na elimwelo ya ntango. Mpe S-o-n (Mwana na Angelé:mol.) ya Nzambe oyo ayéi na ebimelo ya ntango amíndimísí lokola Nzambe amónaní kati na nzóto, nde S-o-n ( Mwana na Angelé: mol.) ya Nzambe yango moko na ndambo ya elimwelo ya ntango ya molongo awa, oyo azali komítalisa Ye Moko kati na lingomba na mpókwa oyo, lolengé moko lobi, lelo mpe libela. Pole ya mpókwa ya Mwana esili koya. Lelo oyo Likomí liye likokísámí libosó na bisó.

Mwana ya Moto ayei lisúsu na mosuni ya moto kati na mokolo ya bisó, bobele lokola elakákí Ye ete Akosala, kobianga Mwasi ya libala kobima. Ezali Yesu Klisto koloba na bisó mbala moko, mpe Esengeli na ndimbola ya moto moko te. Nyoso tosengeli na yango, Nyoso tolingí, ezali Mongóngó ya Nzambe likoló ya bande koúta na Nzambe Ye Moko.

Ezali emoniseli ya bomónisami ya Liloba likómí solo. Mpe tozali kobíka na mokolo yango; lokúmu epai na Nzambe; emoniseli ya libómbamí ya Ye Moko.

Ntango ya nkembo nini oyo Mwasi ya libala azali kozala na yango, kotikala kati ya Bozali ya Mwana, kotela. Lisángó likómí lisangó lisúsu, mpe ezali na mfúlu te kati na bisó. Bobele Mongóngó peto ya Nzambe koloba na bisó, koyema mpe kobongisa bisó na elilíngí ya Klisto, Liloba.

Tozali bana mibali mpe bana basi ya Nzambe, eteni na Ye Abongisaki koya kati na eleko oyo, eleko monene koleka kati na lisoló ya mokili. Ayebaki tokokwéa te, tokokakola te, kasi tolingaki kozala Mwasi ya libala ya Ye ya sembo mpe solo, Mombóto ya Bokonzi ya Likoló ya Abalayama koleka oyo asengelaki koya.

Konetolama ebelemi. Ntango ekómí na nsúka . Azali koya mpo ya Mwasi na Ye ya libala oyo Amíléngeli kasi Azali kofanda na Bozali ya Mwana, koyóka Mongóngó na Ye kolatisa Mwasi na Ye ya libala.
Nokí mpenza tokobanda komóna balingami na bisó baoyo bazali na ngambo mosúsu ya ezipelo ya ntango, baoyo bazali kozila mpe kotálela kozala na bisó elongó.

Ba bande nde nzela ya Nzambe epesami mpo ya kobongisa be Mwasi na Ye ya libala. Ba bande oyo nde eloko sé moko ekosangisa Mwasi na Ye ya libala. Ba bande oyo nde Mongóngó ya Nzambe epai na Mwasi na Ye ya libala.

Nabiangí yo óya mpe ósangana na bisó elongó, eteni ya Mwasi na Ye ya libala, Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka nyoso na ntina ya oyo ebelemí kokóma noki mpenza: Konetolama 65-1204.

Ndeko Joseph Branham