25-0615 Bosangani Ezangi Komonana Ya Mwasi Na Libala Ya Klisto

NSANGO: 65-1125 Bosangani Ezangi Komonana Ya Mwasi Na Libala Ya Klisto

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Moponami Ya Nzambe,

Ezali na nzela zingázingá na yango te, Bozali mobóto ya molimó ya Nzambe, elímbweli ya misala ya makanisi na Ye, mpe tozalaki kati na Ye libosó ya bozalisi ya mokili.

Tokoki kokende libosó mosiká te, tozali mpenza lokola mbuma yango moko oyo ekendékí na mabelé. Tozali Yesu yango moko, na lolengé ya Mwasi ya libala, na nguya yango moko, Lingómbá yango moko, Liloba yango moko kobika mpe kofanda kati na bisó komítonga kino na motó, PENE MPO YA KONETOLAMA.

Ayebisaki bisó tosilí tokabwánáki na Libála ya bisó ya libosó, na nzela ya kúfa na molimó, mpe tobótami sasaipi mbala ya mibalé, to tobalání lisúsu, na lisangá ya bisó ya sika ya Molimó. Bomoi ya bisó ya kala ya nzóto lisúsu te mpe makambo ya mokili, kasi ya Bomoi ya Sekó. Mombóto mozalaki kati na bisó na ebandeli, mokútí bisó!

Elingí koloba nini? Elingí koloba búku ya bisó ya kala elímwí na libála na bisó ya kala, elekisámí. Ezali SIKAWA kati ya “Búku Ya Sika” ya Nzambe; búku ya bomoi te… te, te, te… Kasi kati na Búku Ya Bomoi Ya Mwana Mpate. Oyo Mpate asikolákí. Nde mokandá ya bisó ya libála epai wapi mombóto ya bisó ya solo ya Sekó etingámí.

Bobelémí? Yango oyo eyéi. Epusí malamu ómífina mpe óbéleme koloba makási mpe kogánga nkembo, aleluya, masánzolí na Nkoló, ezali bozui ya bondóki ya bibimelo mibalé mpe bomengo ya Lola.

“Olingi koyebisa ngai ete búku ya ngai ya kala na mabúngá na ngai nyoso, kokwéa na ngai nyoso…”
Nzambe atíí yango kati na Ebale ya Kobósana na Ye, mpe olimbísámí kaka te, kasi olóngisámí… Nkembo! “Olongisami.”

MPE YANGO elingí koloba nini? Elingí koloba osalá kútu yango te na míso ya Nzambe. Otélemí na bobongi be libosó ya Nzambe. NKEMBO!
Yesu, Liloba, azuákí esiká na yo. Akómákí yo, ete yo, mosumuki ya mbindo, ókoka kokóma Ye, LILOBA. Tozali LILOBA.

Yango esali tózala Mombóto moké na Ye oyo eyebamákí libosó longwá na ebandeli. Tozali Liloba koya likoló ya Liloba, likoló ya Liloba, likoló ya Liloba, likoló ya Liloba mpe tozali koya na litongi mobimba ya Klisto ete Ákoka koya kozua bisó kozala Mwasi na Ye ya libala.

Nini nde ezali kosalema SIKAWA?

Ezali Lisangá Lizangí komónana ya Mwasi ya libala ya Klisto Koyangana zingázingá na Liloba, útá na mokili mobimba.

Oyo ezali kokende na mboka mobimba. Kati na New York, sikawa ngonga ya mitáno ya mói esili koleka na minúti ntúkú mibalé na mitano. Likoló mosiká kuna na Philadelphia mpe zingázingá mobimba kuna, balingami babulami wana bafándí kuna koyóka, sikawa mpenza, kati na masámbo kuna nyoso. Mosiká kuna likoló, mosiká na nsé zingázingá na Mexico, mosiká likoló zingázingá kati ya Canada mpe nyoso zingázingá, kuna nyoso. Kilométele nkámá misáto na ntúkú mibalé na mibalé esiká sé esiká na kati ya mokili ya Amerika ya Likoló awa, pene, bato Bazali na yango, koyóka sikawa mpenza. Nkóto na nkóto mbala nkóto na nkóto koyóka.

Mpe yango nde Etindá na ngai epai na bino, Lingomba, bino ezali lisangá, lisangá ya molimó na nzela ya Liloba.

Alobaki ete Ezalakí lisangá ya molimó ya Klisto na Lingomba na Ye, mpe Ezali KOSALEMA SIKAWA MPENZA. Mosuni mozali kokóma Liloba, mpe Liloba lizali kokóma mosuni. Tomónisamí, mpe tondimisámí; bobele oyo Biblia elobaki ete elingaki kokóma na mokolo oyo, mpe ezali kokóma sikawa, mokolo na mokolo kati ya moko na moko na bisó.

Nzambe akozala na Lingomba moseka. Mwasi Liloba na Ye, ya solo, na sembo. TOZALI MWASI MOPONAMI wa Nkóló na bisó Yesu Klisto.

Ntango Nini Oyo, Mobali?

Tozuí emóniseli kati na mikolo Oyo ya nsúka, mpo ya Etindá ya Nkoló Nzambe koyanganisa Mwasi na Ye ya libala elongó. Eleko mosúsu te etikalá ndèle kolakama. Elakámí na eleko oyo: Malaki 4, Luka 17:30, Mosanto Yoane 14:12, Yoele 2:38.
Bilaká wana ezali mpenza kaka lokola Yoane Mobatisi amítalisí kati ya Makomí.

Nani nde akokisí Makomi oyo?

Mwanje na Ye ya nsambo ya nguya, William Marrion Branham. Asalákí yango ntango nyoso na nzela ya etandelo. Azalaki kosala yango ntango nyoso na nzela ya etandelo. Asali yango lisúsu na mokolo ya bisó, kobianga kobima mpe koyanganisa Mwasi na Ye ya libala moseka kati na mokolo ya nsúka na nzela ya mosakoli na Ye.

Ntango ya nkembo nini oyo Mwasi ya libala azali kozala na yango. Koyangana moko na moko ezali kokóma monéne mpe monéne mpe elengi na elengi. Etikalá soki moké te kozala na ntango lokola oyo. Ntembe nyoso elímwí.

Yaka komíbakisa na bisó lokola tozali koyóka Liloba lilakámí mpo ya mokolo na bisó koloba, mpe koyebisa bisó ba nani nde tozali mpe nini nde ezali kokóma na mokolo ya bisó. Lisangá Lizangí Komónana Ya Mwasi ya Libala Ya Klisto 65-1125.

Ndeko Joseph Branham

Makomí:

St. Matai 24:24
St. Luka 17:30 / 23: 27-31
St. Yoane 14:12
Misala 2:38
Baloma 5:1 / 7:1-6
2 Timote 2:14
1 Yoane 2:15
Genese 4: 16-17 / 25-26
Danyele 5:12
Yoele 2:28
Malaki 4