NSANGO: 60-0522E Kotiama Lokumu Ya Mwana #4
- 25-0525 Kotiama Lokumu Ya Mwana #4
- 21-0711 Kotiama Lokumu Ya Mwana #4
- 18-0708 Kotiama Lokumu Ya Mwana #4
- 16-0228E Kotiama Lokumu Ya Mwana #4
Balingami Babóngólámí,
Na Bofináká Play, tozali koyóka Liloba ya Nzambe lizangí kokwéa. Ezali Liloba moko na moko Solo, lisakola moko na moko ya Yango. Tobiangami mpe tobatelámí, totóndisámí mpe totiamí pembeni; totóndisámí na Molimó Mosanto, mpe sikawa tosili koíngela kati ya Mboka ya Kanana. Tozali na nsómo ya eloko moko te…ELOKO MOKO TE, toyebí baoyo tozali.
Mpo ete totikali na Liloba na Ye, lokola Apesáki bisó motindo tósala, Akoyebisa bisó ete Atikelákí bisó libulá. Ntango nini nde Osalákí yango, Tata? Ntango Naponaki bino mpe Natiaki nkombó ya bino likoló ya Búku ya Bomoi ya Mwana Mpate libosó ya bozalisi ya mokili.
Wana esilaki litondí ya ntango koya, Natindaki Yesu Mwana Mpate, Oyo abomamákí longwá na bozalisi ya mokili, ete bókoka koyamba libula ya binó kozala bana ya Ngai mibali mpe basi, banzambe mike. Nasengeláki nátala-tala bino mpo ya makeléle mpe koningana-ningana libosó ete Nakoka kotia binó.
- “Bondimí ete koyóka Mongóngó na Ngai likoló ya ba bande kati na losambo ezali mabe?”
- “Ee, bosengelaki te koyóka bande kati ya losámbo.”
- “Longólá yango. Bozali kosala makeléle.”
- Bondimí ete Mongóngó na Ngai likoló ya ba bande esengeli na ndimbola?”
- “Ee, Esengeli na moto moko kolimbola Yango.”
- “Ozali kosala makeléle. Bwaká yango libandá. Obelémí naino te.”
Ntango obelemí, okoloba, “”Amen” na Liloba moko na moko.
- “Ondimí ete Nazali lolengé moko lobi, lelo mpe libela?”
- “Amen.”
- “Ondimí ete Mongóngó ya Ngai likoló ya ba bande nde MONGÓNGÓ YA LITÓMBÁ KOLEKA Osengeli koyóka?”
- “Amen.”
- “Ondimí ete Mongóngó ya Ngai likoló ya bande nde ekosangisa Mwasi ya libala?”
- “Amen.”
- “Bondimí ete mwanje ya Ngai ya nguya nde akotálisa binó epai na Ngai?”
- “Amen”
Bozali kokangama makasi sikawa. Natálí-tálí bino mpo ya makeléle mpe bisiká ya kolemba-lemba. Nabelémí kokanga ekuke. Nakotia Elembo ya Ngai likoló na bino. Bolóngí momekano mwa Ngai.
Sikawa bótika náyebisa bino likambo moko, balingami na ngai bato ya motúya kati na mikili ya ba bande; ngambo ya bibale minéne mpe epai sé epai bozali, bóbanga te. Nyoso ezali malamu. Nayebakí bino libosó ya bozalisi ya mokili. Nayebaki eloko moko na moko oyo ekokaki kokóma.
Nazali koya mpo ya binó nokí mpe komema binó na Esiká wapi kúfa ezali te, bwalé te, zúwa te, eloko te; bobele bobongi be, bolingo bobongí be.
Kino ntango wana, bóbósana te, Napesi bino Liloba ya Ngai, boZALI LILOBA YA NGAI likómí mosuni. Soko bosengeli na eloko ATA NINI, bóloba Yango, nsima bóndima Yango, Ezali libulá ya bino.
Nakotinda Mongóngó ya Ngai epai na binó lisúsu Lomíngo loye mpe kolimbola Yango nyoso epai ya binó. Nakoyebisa binó mbala moko lisúsu bozali banani, wapi bozali kokende, mpe Eúlání na nini na ngambo kuna, sikawa mpenza.
Yaka komíbakisa na Mwasi na Ngai ya libala lokola Nazali na bango nyoso bafándí elongó na bisiká ya likoló Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe koyóka Ngai na botíami mpenza kotia binó na nzela ya Liloba ya Ngai. 60-0522E Kotiama Na Bokonzi Ya Mwana # 4
Ndeko Joseph Branham