25-1221 Kobima Na Moláko

Nsango: 64-0719E Kobima Na Moláko

BranhamTabernacle.org

Balingami Baoyo balingámí,

Nzambe abóngwanaka te. Liloba na Ye liyebí kobóngwana te. Manáka ma Ye mayebí kobóngwana te. Mpe Mwasi na Ye ya libála ayebí kobóngwana te, tokotíkala na Liloba. Ezali koleka bomoi epai na bisó; Ezali Etóko ya Mái ya Bomoi.

Eloko bobele moko topésámí lotómo kosala ezali koyóka Liloba, oyo ezali Mongóngó ya Nzambe mondimísámí motiámákí likoló ya ba bande mpe mobómbámákí. Eloko sé moko tozali komóna ezali endimeli te, ebólo ya bato te, tomónaka eloko mosúsu te kasi Yesu, mpe Azali Liloba likómí mosuni na mokolo ya bisó.

Nzambe azali kati ya Molako ya bisó mpe tozali na na nzela na Nkembo wana tokambámí na Likonzí ya Móto, oyo ezali Nzambe Ye moko koloba na nzela ya mosakoli na Ye oyo andimísamaki ya Malaki 4. Tozali kolia Mana wana mabómbamákí, Mái ma Bomoi oyo Bobele Mwasi ya libála nde akokí kolia.

Nzambe abóngolaka nzela na Ye te, mpe soki te zábolo abóngolaka ya ye. Oyo esalákí ye esili koleka mbúla 2000, azali kosala eloko yango moko lelo, longólá sé alekísí lisúsu mayéle mabe.

Sikawa, nsima ya mbúla nkámá minei, Nzambe akendékí alimá kati na bango mokolo moko. Éngébéné na Makomi, Asengelakí kokóma mosuniNi, mpe koúmela kati na bango. “Nkombo na Ye ekobiangama Mosungi, Mokonzi ya Kímia, Nzambe na Nguya, Tata na Séko.” Mpe wana eyaki Ye kati na bato, balobakí: “Tokozala te na Moto oyo kokonza bisó!…”

Kokokana na Makomí, Mwana ya Moto alingaki koya mbala moko lisúsu mpe kobika mpe komímónisa Ye moko kati na mosuni ya moto, mpe Asálákí yango, mpe bazali koloba eloko yango moko. Ya solo bazali kozóngela mpe kotéya Etíndá, kasi bakolinga te ete moto yango ákonza bango.

Oyo nde ezali mpenza kokóma:

Mpe lokola ezalaki ndéle, ezali mpe bongo sikawa! Biblia elobákí ete Lingómbá ya Laodikia likobimisa Ye libándá, mpe Azalaki kobeta, komeka kokóta. Ezali na likambo moko lilóngóbáni te esiká moko boye. Sikawa mpo ya nini? Basáláki moláko ya bango moko.

Moto akoki koloba: “Nayebí mpe Nandimí Ndeko Branham azalaki mosakoli. Azalaki mwanje ya nsambo. Azalaki Eliya. TONDIMÍ Etíndá oyo. Nsima komísálela ekimelo moko boye, ézala ata ya motindo nini, kozanga koyókisa bato Mongóngó mwa Nzambe BOBELE MOKO mondimísámákí kati na lingómbá na bango…Ezali na mbébá moko esiká moko boye. Sikawa, mpo ya nini? Basalákí moláko ya bango moko.

Nazali koloba makambo oyo te mpo ya kokabola lingombá, Liloba ya Nzambe esálaka yango. Nalingí ete tósangana elongó, kozala LISANGÁ MOKO moto na moningá na ye mpe elongó na Ye, kasi ezali na nzela kaka moko ya kosála yango: zingázingá ya Mongóngó mwa Nzambe likoló ya ba bande. Nde BOBELE YANGO ELOBÍ NKOLÓ ya Nzambe.

Nzambe amónisí nzela na Ye ebongí be epai na bisó. Ezali mpenza na nkembo nzokande na petee mingi. Litéya moko na moko tozali koyóka Ye koyebisa bisó, kondimisa bisó, koyikisa bisó mpiko ete, TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA. Tozali kati na Mokáno mwa Ye mobongí be. Tomíléngélí na BOYÓKÁKÁ KOYÓKA YE.

Etindá oyo ezali mpenza ya beébeé koleka zoloná ya lobí lokoya. Tozali lisakoli kokokisama. Tozali Liloba limónisámí. Nzambe azali kotálisa bisó na Litéya moko na moko tozali koyóka ete lelo oyo, Likomí liye lizali kokokisama.

Ekokí kozala na bókó libandá kuna na bikólo, zingázingá na mokili mobimba, wapi kútu bande oyo ekokúta bango kati na ba ndako to mangómbá na bango. Tolingi kobondela, Nkoló, ete wana losámbo lozali kokóba, na—na…to wana bande ezali koyókisama, to ézala na etémelo ata nini tokoki kozala kati na yango, to—to loléngé, tika ete Nzambe ya Lóla oyo alekí monéne ámemia bosémbo oyo ya mitéma mia bisó na ntóngó oyo, mpe ábikisa baoyo ya boséngá, kopesa bango oyo basengeli na yango.

Bózila bobelé monúti moko…Nini nde Mongóngó ya Nzambe epai ya mokili moúti kosakola mpe koloba?…bato bakozala koyóka ba bande kati na ba ndako to masámbo na bango.

Kasi tozali kolobamela mabe mpe kopámelama na bolobáká ete TOKOKÍ soko moké te kozala na Losámbo ya Bande na Ndako? Ndeko Branham atikálá soko moké te koloba ete bóyókisa ba bande kati ya MASÁMBO ya bino?

NKEMBO NA NZAMBE, BÓYÓKA YANGO, BÓTÁNGA YANGO, EZALI YANGO ELOBÍ NKOLÓ. Mpe Ezali kaka te ete Alobaki yango, kasi na boyókáká ba bande kati ya ba ndako Mpe masámbo ya binó, Nzambe monéne koleka ya Lóla akomemia bosémbo ya mitéma ya bisó mpe akobíkisa baoyo ya boséngá mpe kopesa bisó ELOKO ATA NINI TOZALI NA YANGO BOSENGÁ!!

Eténi oyo moko ya Liloba ETÁLÍSÍ ete bato bazali koyóka babáteli na bangó mpe BAZALI KOYÓKA LILOBA TE, to balingákí bábéta bangó móndengé mpe kotálisa bangó na nzela ya LILOBA ete tozali kati YA MOKÁNO MWA YE MOBONGÍ BE mpe Ezali kati ya MOKÁNO MWA YE MOBONGÍ BE KOYÓKA BA BANDE KATI YA MASÁMBO YA BANGO.

Nazali te kotia Liloba na esiká mosúsu to kozóngela yango mabe lokola mingi mpenza bazali koloba ete Nazali kosala yango. Míyókelá mpe mítángélá yo moko.

Ezali mpenza petee mpe ebongí be, FINÁ bobelé PLAY mpe yóká Mongóngó ya Nzambe koloba na yo. Lobá “Amen” na Liloba nyoso Ozali koyóka. Osengelí kútu te kosósola Yango, osengeli bobele Kondima Yango.

“Nalingí kobima na moláko. Ézala ata ekosenga ngai nini, Nakozua ekulúsu ya Ngai mpe komema Yango mokolo nyoso. Nakokende libándá na moláko. Etali ngai te oyo bato bakoloba na ntina na ngai, Nalingí kolanda Ye libándá ya moláko. Nabelémí kokende.”

Yáká mpe kendé koleka epekiseli ya lokito kino kati ya Liloba ya Nzambe elongó na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville. Ezangi nsúka oyo Nzambe akoki kosála mpe akosala na moto oyo abelémí kokende koleka moláko ya moto.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: 64-0719E Kobima Na Moláko

Makomi: Baebele 13:10-14 / Matái 17:4-8