25-1207 Na Sima Yesu Ayaki Pe Abengaki

Litéya: 64-0213 Na Sima Yesu Ayaki Pe Abengaki

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi Liloba,

Tozali kobika kati ya ngonga ya molílí koleka nyoso, kasi tozali na NSÓMO TE, Motéi ayéi. Ayéi kokokisa Liloba na Ye kati ya mokolo ya nsúka. Oyo ezalaki Ye ndèle, Azali lelo. Oyo komímónisa mpe komíyebisa na Ye ezalákí ndèle, ezali bongo lelo. Azali naino Liloba ya Nzambe, komímónisa kati na mosuni ya moto kati na mwanje na Ye ya nsambo ya nguya mpe amónísí bisó, tozali Mwasi Liloba na Ye ya bomoi.

Tozali na ntango te ya kobéndana na maloba to kosuana; tosílí tolekí mokolo yango; tozali kokende libosó, tosengeli kokóma Kúná. Molimó Mosanto ayéi kati na bisó. Nkoló Yesu na lolengé ya Molimó Amizipí mpe Amímónisí na nzela ya mosakoli na Ye ete Azali Mongóngó ya Nzambe epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Alobákí Akoya. Alobaki Akosala oyo. Alobakí Akomónana na mosala na mikolo ya nsúka mpe kosala makambo oyo lokola esalákí Ye ntango Ayaki kati na mosuni mbala ya libosó, mpe Ye oyo awa Azali kosala yango. Ozali kobánga nini? ELOKO MOKO TE!!!

Tozali na nzela na bisó na Nkembo! Eloko moko te ekotémisa bisó. Nzambe akondimisa Liloba na Ye. Etáli Ngai te atá nini ésálema. Ntango eyéi mpo ya ekela. Ntango eyéi mpo ya kondima to kondima te. Molongó yango ya kokabola oyo eyélaka mobali to mwasi nyoso ekómí.

Obótámákí na ntina. Ntango Pole ebétákí yo, elongólákí molili nyoso na yo. Ntango oyókákí Mongóngó na Ye koloba na yo likoló ya ba bande, eloko moko ekómákí. Elobákí na bomoto na yo. Elobákí: “Motéi Ayéi mpe azali kobianga yo. Tungísámá te, bángá te, Nabiángí Yo. Ozali Mwasi na Ngai ya Libala”.

Oo bato, bóndimisama! Bózua kaka te libakú ya ndambo ata nini likoló na yango. Nzambe azali na manáka: Liloba na Ye Abómbákí likoló ya ba bande. Motéi ayéi mpe azali kobianga yo. Yaka nzela epesámí na Nzambe.

Motéi mbala moko lisúsu akosangisa Mwasi na Ye ya libala zingázingá na mokili mobimba na Mongóngó na Ye. Akoyíkisa bisó mpiko, kondimisa bisó, kobikisa bisó, komema bisó na Bozali na Ye ya nguya mpe koyebisa bisó:

Motéi ayéi mpe Azali kobianga yo.
Oo, mosumuki, oo, moto ya maláli, Ozali nde te komóna Motéi komónisama kati ya bikelámo bato, kati ya bandimi? Ayéi kobianga bana na Ye baoyo bandimí na bokolóngonó ya nzóto. Ayéi kobianga mosumúki na mbóngwáná ya motéma. Mozóngi nsima, moí lingomba, Motéi ayéi mpe azali kobianga yo.

Kosopama nini oyo ya Molimó Mosanto Mwasi ya libala akozala na yango Lomíngo loye lokola Nzambe azali koyanganisa bana na Ye elongó mbala moko lisúsu mpe kokóta kati na ba ndako ya bisó, masámbo ya bisó, biyánganelo ya bisó, mpe kobianga bisó kobima mpe koloba: “Motéi ayéi mpe azali kobianga. Nyos’oyo ozali na yango bosenga, ezali ya yo.”

Tiká ete maloba yango mázinda na bozindó ya mitéma ya binó bandeko mibali mpe basi. NYOS’OY OZALI NA YANGO BOSENGÁ, MOTÉI AYÉI MPE AZALI KOPESA YO YANGO.

Tata na Likoló, E Nkoló, Tiká ete ékóma lisúsu.
Makambo nyoso oyo Nalobaki: “ Yesu ayéi mpe azali kobianga yo.” Asalaka nini ntango Ayáka? Abiángaka. Mpe tika ete ékóma lisúsu, Nkoló. Tika ete Molimó Mosanto na Yo áya kati ya bato na mpókwa oyo, Nkoló Yesu kati na lolengé ya—ya Molimó. Tíká ete Áya na mpókwa oyo mpe Ámímónisa, na nsima Amízipola.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: 64-0213 Na Nsima Yesu Ayákí Mpe Abiangákí.
Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville
Makomi: St. Yoane 11:18-28