NSANGO: 61-0730E Ntina Motoba Ya Boyei Ya Gabriele Epai Na Danyele
- 25-0209 Ntina Motoba Ya Boyei Ya Gabriele Epai Na Danyele
- 16-1125 Ntina Motoba Ya Boyei Ya Gabriele Epai Na Danyele
MolingamiMwasi na libala Oyo Azali Kosepela,
Totálisi bilongi ya bisó na epai ya Likoló kati na libóndeli mpe malómbó koyeba mokolo mpe ngonga mpenza tozali kobika kati na yango.
Lokola libosó naino soko moké te, tozali kofanda kati na bisiká ya likoló, longwá na mokili mobimba, koyóka Nzambe koloba mpe komónisa Liloba na Ye epai ya bisó na nzela ya mwanje motindami na Ye ya nguya. Mwanje motindami ya mabelé oyo Tata atindákí epai na Mwasi na Ye ya libala kati na mokolo oyo ya nsúka komónisa Liloba ya Ye.
Gabaliéle azali mwanje ya bato baponámí na Nzambe, Bayúda. Kasi epai na Mwasi na Ye ya libala ya Mabóta, Melikisedeke Ye moko ayáki mpe alobákí na nzela ya mosuni ya moto kati na mwanje ya mabelé abiangamákí William Marrion Branham, ete Ákoka koloba mpe komónisa Liloba na Ye YONSO epai na Molingami na Ye Mwasi ya libala ya motéma.
Asaláki ete Étiama na bande, Ébómbama, mpe Ébátelama, na ntina ete Mwasi ya libala Ákoka kozala na Biléi ya Ye ya molimó, Máná mabómbámí, na nsóngé ya misapi ya bangó na monúti moko na moko ya mokolo na mokolo kino na nsúka ya ntango.
Bomoto na bisó ya kati etóndí na epakweli ya lolengé wana lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe komónisa Liloba na Ye epai na bisó. Boni Azipólí Liloba na Ye ete tókoka komóna polélé mpe kosósola ntína na Yango. Ezali komónisa ngonga mpenza tozali kobika kati na yango, koyebisa bisó tozali ba nani mpe nini nde ekosalema noki mpenza; boyéi noki ya Konétolama na bisó.
Azali kútu komónisa na Mwasi na Ye ya libala yango ekosalema awa na mabelé na ntango tozali elongó na Ye na Elámbo ya Libála. Boni Akofungola míso makúfí ma bato na Ye baponámí; baoyo Abetaki na lolándá mpo na ntina ya Mwasi na Ye ya libala ya Mabóta.
Baninga na ngai, Nayebi motindo nini tolembí kolemba na mokili oyo mpe kotálela na etingiá Boyéi na Ye kozua bisó tókende, kasi tiká mpe ete tósepela mpe tózala na matóndí kati na oyo ezali kosalema sikawa mpenza libosó na míso ma bisó mpenza.
Tiká tótómbola mabóko, mitéma, mingóngó mia bisó likoló, mpe tósepela. Kaka te ete tozali kotála libosó na oyo ekosála Ye mpo na bisó nokí mpenza, kasi tiká ete tósepela na ntina na yango ezali Ye komónisa bisó SIKAWA mpenza.
Azali koyebisa bisó tozali Mwasi na Ye ya libala oyo abongísamákí libosó kosangana elongó na Ye na Liloba na Ye. Azali kondimisa bisó lisúsu na lisúsu, tozali kati na Mokáno mwa Ye mobongí be na botíkaláká na Mongóngó mwa Ye, Liloba na Ye, mwanje na Ye. Apesi bisó KONDIMA na boyebaká mpe na bosósólaká tozali ba nani:
LIOBA NA YE KOBIKA KATI NA MOSUNI.
Tozali na eloko ya kobánga te; eloko ya kotungisama na ntina na yango te; eloko ya kozala na mawa na yango te. Nayebí yango boní? NZAMBE ALOBAKI BONGO!
NA BONGO TIKÁ ETE TÓSEPELA, TÓZALA NA ESENGO, TÓZALA NA MATONDI; LILOBA YA BOMOI LIZALI KOBIKA MPE KOFANDA KATI NA BISÓ. TOZALI MOMBÓTO NA YE YA BOKONZI YA TÓMBWÁ.
Nandimí sóló ete Nkoló asengeli mpe kozala asepélí na boyebáká ete ntango ekómí mpe tosili komiléngele na bomíbateláká solo mpe sembo na Liloba na Ye.
Lokola elengé mobali oyo atalákí kati na talatála mpo na mbala ya libosó, tozali kotála kati na Liloba na Ye, komóna TOZALI ba nani.
Nkoló…EZALI NGAI. Nazali Mwasi Liloba na Yo ya bomoi. Nazali oyo Oponákí. Nazali kati na Yo, Ozali kati na ngai, tozali Moko.
Tozánga kozala na biyenga boni mpe kozala bato ya esengo koleka baoyo ndèle babiká likoló ya mabelé? Babulami banso mpe basakoli libosó na bisó balingaki kobíka kati na mokolo oyo mpe komóna bilaká biye kokokisama. Kasi na NGOLU ya Nzambe, Atiakí BISÓ awa.
Ndengé tózila ezali te:
Brrrr! Oo! Whew! Na maloba masúsu, ntango mongúná alongólámí, nsúka ya lisúmu eyéi, bokótisami ya boyengebene ya lobiko na lobíko eyéi, Satana atiámí elembo kati na libúlú ya bozíndó lizangí nsúka, mpe boyebi ya Nkoló bokozipa mabelé lokola mái makozipaka mbú. Amen! Nkembo na Nzambe! Ezali koya, ndeko, ezali koya!
Kopakolama nini yango ekozala mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali Koyangana elongó útá na mokili mobimba koyóka mwanje ya Nzambe, Mongóngó ya Nzambe epai ya Mwasi na libala, komemela bisó Liteya: Ntina Motóbá Ya Boyéi Ya Gabalièle Epai Ya Danyele 61-0730E.
Ndeko Joseph Branham