Nsango: 60-1231 Emoniseli, Mokapo ya Minei Eteni ya I
- 24-1229 Emoniseli, Mokapo ya Minei Eteni ya I
- 20-1231 EMÓNISELI, MOKAPO YA MINEI ETENI YA I
- 16-0413 EMÓNISELI, MOKAPO YA MINEI ETENI YA I
Balingami Babulami Baoyo balátisámí na Bilamba Pèmbé,
Ntango toyoki Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó, Eloko moko ekómaka kati na bozindó ya bomoto ya bisó. Bozali ya bisó mobimba bobóngólami mpe mokili zingázingá na bisó mozali komónana ete molimwí.
Boni nde moto akokí kolimbola oyo ezali kosalema kati ya mitema mia bisó, makanisi ma bisó, mpe bomoto na bisó, wana ezali Mongóngó ya Nzambe kozipola Liloba na Ye na Liteya Moko na moko Tozali koyóka?
Lokola mosakoli ya bisó, toyoki ete tomemámí kati na lóla ya misato mpe emonáni lokola ete molimo ya bisó ezali kolongwa na nzoto oyo ya kufa. Maloba mazali te kolimbola oyo tozali koyoka wana Nzambe azali kofungolela bisó Liloba na Ye lokola libosó naino soko moké te.
Yoane atiamaki na esanga ya Patámo mpe asengamáki kokoma yango emónaki ye mpe kotia yango kati ya búku moko ebiangamí Emononeli, na ntina ete ékoka kokita kati na bileko. Mabómbami mangó mabómbamákí kino mamonisameláki bisó na nzela ya motindami ya Ye mwanje ya nsambo oyo aponami.
Na nsima Yoane ayokaki Mongóngó yango moko likoló na ye mpe akamatamákí kati na lóla ya misato. Mongóngó yango motalisaki ye bileko ya lingomba, koya ya bayúda, kosopama ya malózí, Konetolama, Boyei lisúsu, Bokonzi ya mbula nkóto, mpe Ezalelo ya Sekó ya babíkisami na Ye. Azuaki ye na likoló mpe amónisaki likambo mobimba epai na Yoane lokola Alobaki Akosála.
Kasi Yoane amonaki nini ntango amonaki likambo yango libosó? Moto moko te ayebaki mpenza kino lelo oyo.
Eloko ya libosó amónaki kati na Boyei ezalaki Mose. Atálisaki basanto baoyo bakúfi baoyo bakosekwa; bileko motoba nyoso baoyo balálákí.
Kasi bobele Mose te atelemáki wana, kasi Elia azalaki wana mpe lokola.
Elia yango Azalaki kotelema Azalaki nani?
Kasi Elia azalaki wana; motindami ya mokolo ya nsúka, elongó na Ebólo ya ye, ya babóngwani, baoyo Banétólámí.
NKEMBO…ALELUYA…Nani nde Yoane amónaki kotelema kuna?
Mosúsu te kasi mwanje ya 7 motindami ya Nzambe, William Marrion Branham, na EBÓLO YA YE BABÓNGWANI, BANÉTOLÁMÍ…MOKO NA MOKO NA BISÓ!!
Elia atálisaki libóndo ya babóngwani. Bokanisa, Mose azalaki libosó, na nsima Elia. Elia asengelaki kozala motindami ya mokolo ya nsúka, ete elongó na ye mpe ebólo ya ye nde lisekwa likoya…ekoya li…boye, ekoya Konetolama, Nalingi koloba. Mose ayeisáki lisekwa mpe Elia ayeisaki ebólo ya Banétolami. Mpe, kuna, bango nyoso mibale batalisamaki kuna mpenza.
Ata bolobaka na ntina ya kozipolama, komonisama, mpe Emoniseli.
Yango oyo! Tozali na yango awa mpenza na bisó elongo sikawa, Molimo Mosanto, Yesu Klisto, lolenge moko lobi, lelo, mpe libela. Bozali…Ezali koteyamela bino, Ezali kolakisamela bino, Ezali komeka kosala ete bómona nini nde ezali malamu mpe nini nde ezali mabe. Ezali Molimo Mosanto Ye Moko Koloba na nzela ya mbebu ya moto, kosala kati ya bato, komeka kotálisa mawa mpe ngolu.
Tozali Babulami tolati Bilamba Pembé baoyo mwanje na Ye amónaki baoyo baútaki na mabelé bipai nyoso kolia Lipa ya Bomoi. Tobandámí mpe tobaláni na Ye mpe toyóki Kopepwa yango ya bolingo kati ya motema na bisó. Tomibónzeli epai ya Ye, mpe bobele na Mongóngó na Ye. Tomíbebisí te, mpe tokomíbebisa te na mongóngó mosúsu ata nini.
Mwasi ya libala azali komílengele kobuta likoló lokola Yoane asalaki; kati na Bozali ya Nzambe. Tokozuama na likoló na Konetolama ya Lingomba. Boni yango ezali kobalola bomoto ya bisó!
Nini nde Akomonisa bisó na nsima?
Kosambisama; libanga ya saladi, mpe oyo etálisí; eteni oyo ezali kosala. Libanga ya Yasipi, mpe mabangá masúsu manso ndengé na ndengé. Akozua nyoso oyo kokita koleka na Ejekiele, kozonga na Genese, kozonga kuna na Emoniseli, kokita na kati-káti ya Biblia, kokangisa yango elongó; mabangá manso maye mpe lángi iye.
Ezali Molimó Mosanto yango moko, Nzambe yango moko, kotalisa bilembo yango mokó, bikamwiseli yango moko, kosala makambo yango moko bobele lokola Alakáki. Ezali Mwasi ya libala ya Yesu Klisto komibongisa na boyókáká Mongóngó na Ye.
Totómbeli bino boyei bolamu komibakisa na bisó lokola tozali kokóta kati na bisiká ya likoló na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka Elia, motindami ya Nzambe na eleko oyo ya nsúka, komónisa mambómvami mabómbamákí kati na bileko.
Ndeko Joseph Branham
Liteya: 60-1231 Emoniseli, Mokapo ya Minei Eteni ya I
Bolimbisi bokanisa Liteya ya bisó ya Mbula ya Sika, Mokolo ya Mibale na mpokwa: Etumba 62-1231. Ezali te na nzela Malamu koleka kobanda Mbúla ya Sika.