Nsango: 65-1128M ESIKA MOKO KAKA EPESAMI NA NZAMBE MPO NA KOBONDELA
- 25-0713 ESIKA MOKO KAKA EPESAMI NA NZAMBE MPO NA KOBONDELA
- 21-1128M ESIKA MOKO KAKA EPESAMI NA NZAMBE MPO NA KOBONDELA
- 19-1229 ESIKA MOKO KAKA EPESAMI NA NZAMBE MPO NA KOBONDELA
- 17-1217 ESIKA MOKO KAKA EPESAMI NA NZAMBE MPO NA KOBONDELA
- 15-1129M ESIKA MOKO KAKA EPESAMI NA NZAMBE MPO NA KOBONDELA
Balingami Libóta Ya Yesu Klisto,
Eloko moko ezali kosalema lokola libosó naino soki moké te na Mwasi ya libala ya Klisto na mokili mobimba. Makambo toyókaki na ntina na yango mpe totálelakí komóna mamónaní sikawa libosó ya míso ma bisó.
Molimó Mosanto azali kosangisa Mwasi na Ye ya libala lokola elobakí Ye ete Akosala, na nzela na Ye SÉ MOKO epesamí mpo ya lelo, Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.
Azali komónisa mpe kondimisa Liloba ya Ye lokola libosó naino soki moké te. Lokola etóko ya etele, Emóniseli ezali kopunjwapunjwa na kati ya bisó.
Lisangá kati ya molimó ya Klisto na Lingomba na Ye sikawa, ntango Mosuni mozali kokóma Liloba, mpe Liloba lizali kokóma mosuni, emonisamí, endimisami. Bobele mpenza oyo Biblia elobaki ekokóma kati na mokolo oyo, ezali kokóma, mokolo na mokolo. Na bongo, ezali koyíkana na noki mpenza kuna libandá, kati na masóbé wana, mpe makambo kokóma, na motindo ete Nakokákí kútu kozua nyoso na yango te.
Mokolo na mokolo Emónoneli koleka na koleka ezali kozala komónisama mpe kotalisama epai na bisó. Lokola mosakoli, makambo mazali kokóma mpe kosalema na lombangu mpenza, tokoki ata te koyeba nyoso na Yango…NKEMBO!!!
Ntango ya bisó ekómí. Likómí lizali kokokisama. Mosuni mozali kokóma Liloba, mpe Liloba lizali kokóma mosuni. Kaka oyo mosakoli alobakí ekosalema ezali kosalema sikawa.
Mpo ya nini bisó?
Ezali na mfúlu te, lolaká lozangí kosósolama te, ndimbola ya moto esengélámí na yango te kati na bisó. Tozali na bisó koyóka kaka Liloba Peto Libongí be útá na monoko ya Nzambe lokola Azali koloba na bisó mbebu na litói.
Sikawa tomóní Liloba yango moko lilakamákí, ya Luka, ya Malakí, bilaká binso biye longwá lelo, bikómí mosuni, kofanda kati na bisó, oyo toyókaki na matói ma bisó; sikawa tomóní Ye ( na míso ma bisó) kolimbola Liloba na Ye moko, tosengeli te na ndimbolá soko nini ya moto.
Mwasi ya libala, ekokákí na yango kaka te kokóma polélé koleka yango. Ezali Nzambe, kotelema libosó ya Mwasi na Ye ya libala kati na mosuni ya moto, oyo tokokí komóna na míso ma bisó moko, koloba mpe kolimbola Liloba na Ye Moko, mpe kotia yango likoló ya bande. Liloba Libongí be lilobámí mpe litiámí na bande na Nzambe Yemei, na bongo esengeli na ndimbola moko te ya moto.
● Nzambe azali koloba libélá na Mwasi na Ye ya libala, likoló ya ba bande.
● Nzambe kolimbola Liloba ya Ye Moko, likoló ya ba bande.
● Nzambe komimónisa Ye Moko likoló ya ba bande.
● Nzambe koyebisa Mwasi na Ye ya libala, bosengeli na ndimbola ata moko ya moto te, Liloba ya Ngai likoló ya ba bande nde nyoso MWASI NA NGAI YA LIBALA ASENGELI NA YANGO.
Bókanisa, ntango bolongwí awa, bóbanda kobima na ezipelo sikawa; bozali kokende kati ya mombóto, kasi bóúmela kati na Bozali ya Mwana. Bóbakisa te, oyo elobí Ngai; bólongola te, oyo elobí Ngai. Zambí, Nalobi Soló, na lolengé Nayebi Yango, lokola Tata apesaki ngai. Bomoni?
Nzambe abongisakí NZELA SÉ MOKO EBONGÍ BE mpo ya Mwasi ya libala kosala bobele yango epesakí Ye bisó motindo ete tósála. Etíkalá kobonga ata mbala moko libosó te, kino lelo. Kobánzabanza te, kolémalema te, motuna te soko eloko moko nde ebakisámí, elongolámí, to elimbolámí. Mwasi ya libala apesamelakí Emónoneli ya solo: KOYÓKA BA BANDE EZALI NZELA YA NZAMBE EBONGÍ BE.
Bobele soko ezali ete, Bótika Naloba yango lisúsu. Emoniseli ya ngai ezali ete MWASI YA LIBALA YA YESU KLISTO, basúsu te, MWASI YA LIBALA, asengeli NA ELOKO MOSÚSU TE kasi Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.
Kasi wana mbala moko Molimó Mosanto yango mpenza mpenza…Liloba ya solo liyéi kati na yo (Liloba, Yesu), nambisa, Ndeko, Etindá ezali ndèle sekelé epai na yo te; Oyebí Yango, ndeko, Epelí nde kopela libosó na yo.
Etindá ezali sekelé epai na ngai te. Yesu Klisto azali lolengé moko lobí, lelo mpe libélá. Lóla mpe mabelé nyoso ibiangámí Yesu. Yesu nde Liloba.
Mpe Nkombo ezali kati na Liloba zambí Azali Liloba. Amen! Azali ko nini ndèle? Liloba lilimbolamí nde bomónisami ya Nkombo ya Nzambe.
Nzambe Azali kosangisa Mwasi na Ye ya libala na Mongóngó na Ye, oyo Atíakí na ba bande mpe Abómbaki mpo ya lelo, na ntina ete Ákoka koyeisa Mwasi na Ye ya libala elongó lokola Libóké Moko. Mwasi ya libala a komóna yango mpe akoyeba Yango lokola NZELA SÉ MOKO Akoki komema Mwasi na Ye ya libala elongó.
Asalaki yango mbula 60 isílí koleka kotálisa bisó boni Akosala yango lelo. Tozali “moko ya masámbo ya ye likoló ya bikanganeli ya biyókeli”
Soko nandimaka kokende na losambo te, mpo ya nini ko Nazali na losambo? Tozalakí na yango bakanganàkí na bisó na telefone kati na mboka mobimba pókwa mosúsu, kilomètele nkámá mitano na Zómi na mwambe nyoso na matúmu manei izalaki na moko ya masámbo ya ngai.
Batéyi mingi bayebisaka masámbo ya bango kozala na “ekanganeli ya telefóne”, to “ kolanda manáka to Liteya na nzela ya biyókeli”, “koyóka Liteya yango moko na ntango moko”, ezali te kokende na losámbo. AÚTI KAKA KOLOBA EZALI KOKENDE NA LOSAMBO! Ezali to bayebi na bango kaka Liloba te to bakoki kotanga mokanda ya bolingo te lokola Mwasi ya libala akoki kotanga.
Lingomba nde nini? Bótika bobele tomona oyo Ndeko Branham alobi Lingomba Lingómbá nde nini.
Bikútanelo ebelé na ebelé, Bazali na efandelo oyo lokola bino nyoso bozali na yango awa longwá na eyanganelo. Ekanganí mpe elongó kati na Phoenix, ete esiká nyoso makútani mazali, eyaka mbala moko kati na…Mpe bayanganaka kati ya masámbo mpe kati ya ba ndako, mpe makambo ya lolengé wana, na nzela ya mwa mbóngé moké mpenza.
Ndeko Branham alobí polélé bato kati na “ba ndako” ya bango mpe “ makambo ya motindo yango” ezalaki moko ya masámbo na ye na nzela ya ekanganeli ya biyókeli. Na bongo ba ndako, bitékelo ya pitoló ya mítuka, matongi, mabota bayángani elongó longwá na ekanganeli na ye na nzela ya biyókeli esáláki bango kobiangama lingomba.
Tika ete tótanga koleka mwa moké MOKANDÁ YA BOLINGO.
Tobondeli mpo ya mangomba manso mpe biyanganeli nyoso bayangani zingázingá ya—ya—ya mwa mikolofóne libandá nyoso Kúná, útá na ekólo, mosiká kino na libóngo ya Elimwelo ya ntango, likoló kuna na ba ngómbá ya Arizona, na nsé kuna na mabánda ya Texas, koleka mosiká na libongo ya Ebimelo ya ntango, kati na mboka mobimba, Nkoló, epai wapi bayangani. Ngonga ebelé ikeseni, tozali kati na ntango, kasi, Nkoló tozali elongó na pokwa oyo lokola libóké moko, bandimi, kozila boyei a Masiya.
Boye kozala na ekanganeli ya biyókeli, koyóka Ndeko Branham NYOSO NA NTANGO YANGO MOKO; bazalaki elongó lokola liboké moko, bandimi, kozila boyei ya Masiya.
Kasi bozali koloba soko bosali bongo lelo, yango ezali kokende na losámbo te, ezali mabe, ezali Koyangana elongó te ata mingi na koleka wana emóní bisó mokolo kobelema, ezali kokende na losámbo te?
Tika nátuna yo motúna mpe óyanola eyánganelo na yo. Soko Ndeko Branham ázalaka awa lelo, kati na nzóto, mpe okokákí kolanda matéya ma ye to koyóka ye na nzela ya ekanganeli ya biyókeli koyóka ye mokolo ya Lomíngo nyoso na ntóngó, nyoso na ntango yango moko elongó na Mwasi ya libala na mokili mobimba, babáteli, bolingakí kokangana na Ndeko Branham na nzela ya biyókeli to bolingaki kotéya?
Ndeko Branham alobí polélé lotómo na yo nde lingomba na yo. Soko ózalaka awa esili koleka mbúla 60 mpe Ndeko Branham azalakí kotéya, kasi lingómba na yo balingaki koyóka ye te kasi kozala na losámbo ya bango moko ( oyo ebelé ya batéyi basálakí na mikolo yango), olingaki kokende na “losámbo na yo”, to olingakí kokende na “Eyánganelo ya Branham” koyóka Ndeko Branham?
Nakopesa yo eyano ya ngai. Nalingaki kozala kotelema na ekuke kati na mbúla, mbúla mpémbé to ekumbakí kokóta kati na Eyánganelo koyóka mosakoli ya Nzambe. Soko NAZALAKÍ kokende na losámbo wana mosúsu, mbe nakokaki kobóngola losámbo na pókwa wana.
Kasi mwasi yango, ayebakí na ye te soko nguya ezalaki kati na lingénda to te, kasi ayebakí ete Nzambe azalakí kati na Eliya. Nde esiká Nzambe azalaki: kati na mosakoli na Ye. Alobakí: “Lokola Yawe azali na bomoi mpe molimó na yo mozali na bómoi, Nakotika yo te.”
Nabiangí yo komíbakisa na bisó mpe kozala moko ya masámbo ya Ndeko Branham na nzela ya ekanganeli ya biyókeli mokolo mwa Lomíngo 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe komemela bisó Litéya: Esiká Moko Kaka Epesamí Na Nzambe Mpo Ya Kobóndela 65-1128M
Ndeko Joseph Branham