NSANGO: 65-1126 Misala Ezali Kondima Oyo Etalisami
- 25-0622 Misala Ezali Kondima Oyo Etalisami
- 21-1126 Misala Ezali Kondima Oyo Etalisami
- 19-1201 Misala Ezali Kondima Oyo Etalisami
- 17-1203 Misala Ezali Kondima Oyo Etalisami
Molingami Liloba Akómí Mosuni,
Aleluya! Mabelé ya mbéto ya motema na bisó esílí kobongisama na boyókáká Liloba mpe Emónísamélí bisó, TOZALI Mwasi Ya Libala Ya Klisto moseka; ya lokúmu, moseka, Mwana Ya Nzambe Oyo azangí lisúmu, atélemí elongó na Mwasí Liloba peto, azangí kobebisama, asukwamí na Mái ya Makila ya Ye Moko.
Tokómí Liloba limónisami likómí mosuni, ete Yesu akoka kozua bisó, baoyo Abongisaki libosó ya bozalisi ya mokili, kati na tólo ya Tatá.
Mokili mokokí komóna etaliseli ya Kondima ya bisó likoló na loléngé tozalaki kosála, mpe kotálisa ete tozali na Emoniseli ya solo longwá na Nzambe ya Liloba na Ye lindimísámí, mpe tozali na nsómo te. Etali bisó te mokili mobimba básála to bándima nini…TOZALI NA NSÓMO TE. Kofina Play nde nzela ya Nzambe ebongisami mpo ya Mwasi na libala ya Yesu Klisto.
Ezali na mingi baoyo balobí ete bandimí Etindá oyo ya ntango ya nsúka, bandimí ete Nzambe atindaki mosakoli, bandimí ete William Marrion Branham azalaki mwanje ya nsambo motindami, bandimí ete alobaki Yango Elibí Nkoló Yawe, kasi BABÓÍ KONDIMA ete Mongóngó nde Mongóngó ya litómbá koleka okoki koyóka. Bandimi te ete alobakí Maloba mazángí kokwéa. Bandimaka te koyóka ba bande kati na masámbo ya bango.
Elingí koloba nini? ELINGÍ KOLOBA ETE EMÓNISÁMÉLÁKÍ BANGO TE!
Ezali emóniseli. Amónisaki yango epai na yo na nzela ya ngolu na Ye. Ezali eloko moko te oyo osálákí. Omífungwélákí nzela te kokóma kati ya kondima. Ozali ndèle na kondima, epesámeli yo na nzela ya ngolu ya Nzambe. Mpe Nzambe Amónisi yango epai na yo, mpo na yango kondima ezali emoniseli. Mpe Lingomba mobimba ya Nzambe litongámí likoló ya emôniseli.
Na nzela ya KONDIMA emónísámelakí bisó ete Etindá oyo ezali Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande oyo etiámakí na masíni mpe ebómbamákí, koléisa mpe kobongisa be Mwasi na libala ya Yesu Klisto.
Ezali KONDIMA ya solo solo, ezangi kobebisama kati na oyo Nzambe alobí kozala Soló. Mpe Etiámí lóngo na motéma mpe bomoto ya bisó mpe ezali na eloko moko te ekoningisa Yango. Ekotikala mpenza kaka wana kino mosakoli na Ye akotálisa bisó epai ya Nkoló na bisó.
Tokoki komípekisa te. Abongisaki bisó koyamba mpe kondima yango libosó ya bozalisi ya mokili. Ayebaki tokoyamba Mongóngó na Ye kati na eleko oyo. Ayebaki bisó libosó mpe Abongisaki bisó koyamba.
Na bongo, misala Molimó Mosanto azali kosala lelo, na nzela ya bimónoneli biye biyebí kokwéa soki moké te, bilaká biyebí kokwéa sokí moké te, bilembo nyoso ya bantómá bilakámí kati na Biblia, oya Malaki 4, mpe, oo, Emóniseli 10:7, nyoso wana ezali kokokisama, mpe kotálisama na nzela ya zébi, na lolengé mosúsu moko na moko. Mpe soko Náyabisaka bino Solo te, makambo maye makokáki kokóma te. Kasi soko nayebisaki bino solo, mazali kotátwela bino ete Nayebisákí bino Solo. Azali naino lolengé moko lobi, lelo mpe libela, mpe bomónisami ya Molimó na Ye bozali kolongola Mwasi na libala na nzela.Tika ete kondima wana, emoniseli ékwéa kati na motema na yo, yango. “ Oyo nde ngonga yango.”
Oyo nde ngonga yango. Oyo nde Etindá yango. Oyo nde Mongóngó ya Nzambe kobianga Mwasi ya libala ya Yesu Klisto. Oo Lingómbá, tika ete Nkoló ábongisa mabelé ya mbéto ya motéma na yo kozala na Kondima mpe ámónisa yo ete koyóka Mongóngó oyo likoló ya ba bande, nde eloko ekobongisa be mpe ekosangisa Mwasi ya libala ya Yesu Klisto.
Nabiangi yo mbala moko lisúsu ete óya komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, komatisa KONDIMA na yo na mabelé ya likoló, mpe kofanda elongó na bisó kat na bisiká ya likoló lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe kobongisa bisó mpo ya boyéi nokí na Ye.
Ndeko Joseph Branham
Nabondeli yo ete ózala kati na mabondeli mpo ya bisó póso ekoya lokola tozali kobanda Still Water Camp na bisó ya libosó.
Liteya: Misala nde Kondima Etálisámí 65-1126 Makomí ya kotanga:
Genese 15:5-6, 22: 1-12
Misala 2:17
Baloma 4:1-8, 8: 28-34
Baefese 1:1-5
Yakobo 2:21-23
St. Yoane 1:26, 6:44-46